Mokapo 28
Kosangisa te nzoto ná mobali to mwasi lokola yo
“Na bolenge na ngai, nazalaki kobunda na mposa oyo nazalaki na yango ya kolula baninga na ngai mibali. Na nse ya motema, nayebaki ete makanisi wana ezali malamu te.”—Olef.
“Ngai ná moninga na ngai ya mwasi tozalaki kopesana bizi mbala moko to mibale. Kasi, lokola nazalaki mpe kolinga bana mibali, nazalaki komituna soki nakobanda kosangisa nzoto ná baninga na ngai basi mpe bana mibali.”—Sarah.
EMONANI polele ete lelo oyo, likambo ya kosangisa nzoto mibali ná mibali mpe basi ná basi, ezali lisusu te likambo ya nsɔni ndenge ezalaki na boumeli ya mbula 30 to 40 oyo eleki. Soki omeki kaka koloba ete olingaka yango te, na ntembe te, okomona ndenge bakowolola yo! Amy, elenge mwasi moko ya mbula 16 alobi boye: “Mwana mwasi moko ayebisaki ngai ete, lokola nasepelaka te na bato oyo basangisaka nzoto basi ná basi to mibali ná mibali, wana emonisi mpe ete nazali moto oyo ayinaka bato ya mposo mosusu. Nyonso mibale ezali kaka likambo moko: kokanisela basusu mabe!”
Mokili ya lelo oyo ezali kopesa nzela na makambo nyonso, etindi bilenge mingi bákóma kosangisa nzoto mibali ná mibali mpe basi ná basi. Becky, elenge mwasi moko ya mbula 15 alobi boye: “Bilenge basi mingi na eteyelo balobaka ete basangisaka nzoto ná baninga na bango basi, to mpe ná bana mibali, to mpe balingaka koyeba soki kosangisa nzoto mibali ná mibali to basi ná basi ezalaka ndenge nini.” Christa, elenge mwasi moko oyo azali na mbula 18, amonaka mpe makambo ya ndenge wana na eteyelo na bango. Alobi boye: “Kutu, bana basi mibale ya kelasi na biso basɛngaki ngai tósangisa nzoto. Moko akomelaki ngai mwa mokanda mpe atunaki ngai soki nakolinga koyeba soki kosangisa nzoto mwasi ná mwasi ezalaka ndenge nini.”
Lokola bato bazali kolobela polelepolele likambo ya kosangisa nzoto mibali ná mibali to mpe basi ná basi, mbala mosusu okoki kobanda komituna boye: ‘Kosala bongo ezali mpenza mabe? Nakosala nini soki nasepelaka mingi na moninga na ngai mobali, to moninga na ngai mwasi? Elingi nde koloba ete nakómi moto oyo asangisaka nzoto mibali ná mibali to basi ná basi?’
Ndenge nini Nzambe atalelaka kosangisa nzoto mibali ná mibali mpe basi ná basi?
Lelo oyo, bato mingi—ata mpe bakonzi mosusu ya mangomba—bazali komona ete kosangisa nzoto mibali ná mibali to basi ná basi ezali mabe te. Nzokande, Biblia, Liloba ya Nzambe elobeli yango polele. Elobi ete Yehova Nzambe asalaki mobali ná mwasi mpe akanaki ete mposa ya kosangisa nzoto ekokisama kaka kati na mwasi ná mobali oyo babalani. (Ebandeli 1:27, 28; 2:24) Na yango, tokokamwa te ete Biblia epekisi kosangisa nzoto mibali ná mibali to basi ná basi.—Baroma 1:26, 27.
Bato mosusu bakoki koloba ete Biblia esilá ngala. Kasi, kanisá naino: mpo na nini bato bawelaka koloba bongo? Ekoki kozala mpo likanisi ya Biblia ekeseni ná oyo ya bango? Bato mingi baboyaka Liloba ya Nzambe kaka mpo eteyaka likambo moko oyo ekeseni na oyo bango balingi kondima. Nzokande, likanisi wana ezali solo te, mpe biso tosengeli koboya yango!
Kasi okosala nini soki omoni ete osepelaka mingi na moninga na yo mobali to mwasi? Yango elingi nde koloba mbala moko ete ozali moto oyo asangisaka nzoto mibali ná mibali to basi ná basi? Te. Kobosana te: ozali na “eleko ya ebandeli ya bolenge,” eleko oyo bamposa ya nzoto elamukaka yango moko. (1 Bakorinti 7:36) Soki na ntango moko boye oyoki ete ozali kolula moninga na yo mobali to moninga mwasi, yebá ete yango elimboli te ete okobanda kosangisa nzoto na bango. Mbala mingi, makanisi ya ndenge wana elimwaka na yango nsima ya mikolo. Kasi liboso makanisi yango elongwa, osengeli kokeba mpo omikɔtisa te na makambo ya kosangisa nzoto mibali ná mibali to basi na basi. Nini ekosalisa yo?
Bondelá mpo na likambo yango. Sɛngá Yehova ndenge Davidi asɛngaki ye ete: “Ee Nzambe, talá ngai malamumalamu mpe yebá motema na ngai. Talá ngai malamumalamu mpe yebá makanisi oyo etungisaka ngai, mpe moná soki kati na ngai ezali na nzela moko oyo eyokisaka mpasi, mpe kambá ngai na nzela ya seko.” (Nzembo 139:23, 24) Mpo na kopesa yo makasi, Yehova akoki kopesa yo kimya oyo “eleki makanisi nyonso.” Yango ekoki ‘kobatela motema na yo mpe makanisi na yo’ mpe kopesa yo “nguya oyo eleki makasi” mpo oboya kokokisa bamposa ya mabe.—Bafilipi 4:6, 7; 2 Bakorinti 4:7.
Tondisá bɔɔngo na yo na makanisi ya malamu. (Bafilipi 4:8) Tángáká Biblia mokolo na mokolo. Kobosana te ete nguya na yango ekoki kobongola makanisi mpe motema na yo. (Baebre 4:12) Elenge mobali moko na nkombo Jason alobi boye: “Biblia—na ndakisa bavɛrsɛ lokola 1 Bakorinti 6:9, 10 mpe Baefese 5:3—esalisá ngai mingi. Natángaka bavɛrsɛ yango ntango nyonso oyo bamposa ya mabe eyeli ngai.”
Boyá pornografi mpe eloko nyonso oyo elendisaka likambo etali kosangisa nzoto mibali ná mibali to basi ná basi. (Bakolose 3:5) Boyá eloko nyonso oyo ekolamwisa bamposa ya mbindo. Ekoki kozala pornografi, bafilme mpe baemisyo mosusu ya televizyo, mpe mbala mosusu bazulunalo ya midɛlɛ ya bilamba to ya ba-mannequin oyo balakisaka bato balati bilamba oyo etiki nzoto libándá. Na esika ya makanisi ya mbindo, tyá makanisi ya pɛto. Elenge mobali moko alobi boye: “Soki nayoki mposa ya kosangisa nzoto ná moninga mobali, nakanisaka vɛrsɛ ya Biblia oyo nalingaka mingi.”
Ya solo, bato mosusu balobaka ete kosala nyonso wana ezali na ntina te, mpe balobaka ete osengeli kaka ‘kokoba kosangisa nzoto ndenge ozali kosala’ mpe ‘kondima ndenge ozali.’ Kasi, Biblia elobi ete okoki kolonga ezaleli wana ya mabe! Na ndakisa, elobi ete bakristo mosusu ya ebandeli oyo bazalaki mibali oyo bazalaki kosangisa nzoto ná mibali babongwanaki. (1 Bakorinti 6:9-11) Yo mpe okoki kolonga etumba yango—ata soki sikoyo ezali naino kaka na makanisi na yo.
Okosala nini soki mposa ya kosangisa nzoto mibali ná mibali to basi ná basi ezali kosila te? Kolanda yango te! Yehova apekisi makambo ya kosangisa nzoto mibali ná mibali to basi ná basi. Na yango, moto oyo azali kobunda na bamposa yango asengeli kopona likambo oyo: koboya kokokisa bamposa yango.
Tózwa ndakisa ya moto moko oyo “alingá nkɛlɛ.” (Masese 29:22) Liboso, ezalaki soki asiliki, akosilika makasi. Kasi, nsima ya koyekola Biblia, amonaki ete asengeli komipekisaka. Yango elingi nde koloba ete akobanda lisusu koyoka nkanda ata moke te? Te, akobanda koyoka. Kasi, lokola ayebi oyo Biblia elobi na oyo etali kosilika makasi, akosala makasi mpo asalaka makambo na nkanda te.
Ezali mpe bongo mpo na moto oyo ayokaka mposa ya kosangisa nzoto mibali ná mibali to basi ná basi, kasi sikoyo ayekoli oyo Biblia elobi mpo na likambo yango. Mikolo mosusu, mposa ya mabe ekoki lisusu koyela ye. Kasi, soki moto azali kotalela likambo ya kosangisa nzoto mibali ná mibali to basi ná basi ndenge Yehova atalelaka yango, akoki kozwa makasi ya koboya kokokisa mposa yango.
Kolɛmba te!
Soki ozali kobunda na mposa ya kosangisa nzoto mibali ná mibali to basi ná basi, okoki koyoka lokola elenge mobali moko oyo alobaki ete: “Nameki ndenge nyonso mpo bamposa oyo nayokaka esila. Nabondeli Yehova asalisa ngai. Natángi Biblia. Nayoki badiskur oyo elobeli likambo yango. Kasi, nayebi te soki nasala nini.”
Soki ezali bongo mpo na yo, osengeli mpenza kobunda etumba. Nkisi oyo ekosilisa yango na mbala moko ezali te. Atako bongo, moto nyonso oyo alingi kosepelisa Nzambe asengeli kozala na bizaleli oyo Yehova alingaka mpe asengeli koboya pite ya lolenge nyonso, ata soki kosala bongo ekoki kozala mpasi mpenza. Kobosana ata moke te ete Nzambe ayebi etumba oyo ozali na yango na motema mpe ete ayokelaka basaleli na ye mawa.a (1 Yoane 3:19, 20) Soki otosi mibeko ya Nzambe, wana ozali kofungola nzela mpo apambola yo. Na yango, kobatela mibeko ya Nzambe, “ezali na litomba monene.” (Nzembo 19:11) Ata lelo, okozala na bomoi ya malamu mpenza na mokili oyo makambo ezali mabe.
Na yango, tyelá Nzambe motema, mpe benganá bamposa mabe. (Bagalatia 6:9) Salá makasi ‘oyina oyo ezali mabe’ mpe ‘okangama na oyo ezali malamu.’ (Baroma 12:9) Soki osali makasi, nsima ya mikolo, bamposa yango ekokita. Na nyonso, soki oboyi likambo etali kosangisa nzoto mibali ná mibali to basi na basi, okozala na elikya ya kozala na bomoi libela na libela na mokili ya sika ya Nzambe, epai bosembo ekozala.
Ndenge nini okoki kobengana mposa ya kolula moto oyo azali mwasi to mobali na yo te?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Soki mokristo moko asali pite to makambo mosusu oyo etali kosangisa nzoto, asengeli koluka lisalisi ya bankulutu ya lisangá.—Yakobo 5:14, 15.
VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO
“Talá ngai malamumalamu mpe yebá makanisi oyo etungisaka ngai, mpe moná soki kati na ngai ezali na nzela moko oyo eyokisaka mpasi.”—Nzembo 139:23, 24.
TOLI
Soki yo elenge mobali, okómi kolula mibali, to soki yo elenge mwasi osepelaka na mibali te, koyekola ndakisa ya Yesu ekosalisa yo otalela mibali na ndenge ebongi. (1 Petro 2:21) Azali ndakisa malamu mpenza ya mobali ya nguya mpe ya boboto.
OYEBAKI YANGO . . . ?
Atako okoki kopekisa mpenza bamposa na yo te, okoki koboya kosala makambo mosusu. Okoki koboya kolanda bamposa ya mabe.
MAKAMBO OYO NAKOSALA
Soki moto atuni ngai mpo na nini Biblia epekisi kosangisa nzoto mibali ná mibali to basi ná basi, nakoloba boye: ․․․․․
Mpo na kosolola na moto oyo alobi ete makanisi ya Biblia esalisaka moto te afungwama, nako ․․․․․
Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․
OKANISI NINI?
● Mpo na nini Nzambe apekisi kosangisa nzoto mibali ná mibali to basi ná basi?
● Makambo nini okoki kosala mpo okwea te na motambo ya kosangisa nzoto mibali na mibali to basi ná basi?
● Kolanda likanisi ya Nzambe na oyo etali kosangisa nzoto mibali na mibali to basi ná basi elakisi nde ete okómi monguna ya bato oyo basalaka bongo?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 236]
‘‘Makanisi mabe ya bato ya mokili ekɔtelaki ngai mpe nakómaki komituna soki nazali na ngámbo nini: kosangisa nzoto ná baninga na ngai basi to te? Sikoyo, naboyaka eloko to moto nyonso oyo alendisaka likambo ya kosangisa nzoto mibali ná mibali to basi ná basi.’’—Anna
[Elilingi na lokasa 233]
Bilenge nyonso basengeli kopona—kolanda makanisi mabe ya mokili na oyo etali kosangisa nzoto to kolanda toli ya Liloba ya Nzambe