Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • yp1 lok. 48
  • Bandakisa ya kolanda​—Yakobo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bandakisa ya kolanda​—Yakobo
  • Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 1
  • Masolo mosusu
  • Yakobo ná Esau bayokani
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Mapasa oyo bakeseni
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Yakobo azwaki libula
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Yakobo apesaki motuya na bozwi ya elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 1
yp1 lok. 48

Bandakisa ya kolanda​—Yakobo

Yakobo ná ndeko na ye Esau, bazalaki kosolola te bambula mingi. Kutu, Esau azalaki koyina Yakobo. Atako Yakobo asalaki mabe te, azalaki moto ya liboso oyo alukaki kosilisa matata. Andimaki kozanga makambo mosusu mpo na koluka kimya. Mposa na ye ezalaki te ya koluka soki nani na kati na bango azali na elonga na kowelana na bango, kasi ete ndeko na ye alinga ye. Yakobo abukaki te mibeko oyo amityelaki, mpe alingaki kaka te ete ndeko na ye asɛnga ye bolimbisi liboso ete bázongisa kimya.​—Ebandeli 25:27-34; 27:30-41; 32:3-22; 33:1-9.

Ndenge nini osalaka mpo na kosilisa matata ná bato ya libota na yo? Ntango mosusu, okoki komona ete oza’ mpenza na elonga mpe ete ndeko na yo to moboti na yo aza’ mpenza na foti. Soki makambo ezali bongo, ozelaka tii moto oyo bobendani na ye aluka yo mpo bózongisa kimya? To okoki nde kosala lokola Yakobo? Soki likambo oyo okosala ebuki te mibeko ya Biblia, okondima kotika makambo mosusu mpo ozongisa kimya? (1 Petro 3:8, 9) Yakobo atikaki te ete lolendo ekabola libota na ye. Amikitisaki mpe azongisaki boyokani ná ndeko na ye. Okosala bongo ná bato ya libota na yo?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto