Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • fg liteya 14 mituna 1-4
  • Mpo na nini Nzambe azali na ebongiseli?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini Nzambe azali na ebongiseli?
  • Nsango malamu oyo euti na Nzambe!
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini Nzambe azali na ebongiseli?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Nzambe azali na ebongiseli?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Ezali na ntina ozala mondimi ya lingomba moko boye?
    Lamuká!—2012
  • Ndenge oyo lisangá ebongisami mpe etambwisamaka
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
Makambo mosusu
Nsango malamu oyo euti na Nzambe!
fg liteya 14 mituna 1-4

LITEYA 14

Mpo na nini Nzambe azali na ebongiseli?

1. Mpo na nini Nzambe akómisaki Bayisraele ebongiseli?

1. Basaleli ya Nzambe na Yisraele; 2. Bakristo ya liboso bazali kosakola

Nzambe akómisaki bato ya libota ya Abrahama ekólo moko mpe apesaki bango mibeko. Abengaki ekólo yango “Yisraele” mpe apesaki yango mokumba ya kobatela losambo ya solo mpe liloba na ye. (Nzembo 147:19, 20) Na ndenge yango, bato ya bikólo nyonso bakokaki kozwa matomba na nzela ya Yisraele.​—Tángá Ebandeli 22:18.

Nzambe aponaki Bayisraele mpo bázala batatoli na ye. Lisolo ya ekólo yango emonisi ete ntango bazalaki kotosa Nzambe, bazalaki kozwa matomba na mibeko na ye. (Kolimbola Mibeko 4:6) Na yango, bato mosusu bakokaki koyeba Nzambe ya solo na nzela ya Bayisraele.​—Tángá Yisaya 43:10, 12.

2. Mpo na nini bakristo ya solo babongisami?

Na nsima, Yehova Nzambe asundolaki Bayisraele mpe na esika na bango, asalaki lisangá ya bokristo. (Matai 21:43; 23:37, 38) Lelo oyo, na esika ya Bayisraele, bakristo ya solo bazali kosalela Yehova lokola batatoli na ye.​—Tángá Misala 15:14, 17.

Yesu abongisaki bayekoli na ye mpo básakola mpe bákómisa bato ya bikólo nyonso bayekoli. (Matai 10:7, 11; 24:14; 28:19, 20) Lokola nsuka ya mokili oyo ekómi pene, mosala yango ezali kosalema sikoyo na ndenge oyo esalemá naino liboso te. Mpo na mbala ya liboso, Yehova asangisi bamilio ya bato oyo bauti na bikólo nyonso na losambo ya solo. (Emoniseli 7:9, 10) Bakristo ya solo babongisami mpo na kolendisana mpe kosalisana. Na mokili mobimba, na makita na bango, bazalaka na programɛ moko ya mateya ya Biblia.​—Tángá Baebre 10:24, 25.

3. Ndenge nini ebongiseli ya Batatoli ya Yehova ebandaki na ntango na biso?

Batatoli ya Yehova bazali kosakola na ebandeli ya bambula ya 1900 mpe lelo oyo; mikanda oyo elobeli Biblia.

Na bambula 1870, mwa bato moke oyo bazalaki koyekola Biblia elongo, babandaki kososola mateya ya solo ya Biblia oyo ebombanaki banda kala. Bayaki koyeba ete Yesu abongisaki lisangá ya bokristo mpo esakola nsango malamu. Yango wana, babandaki mosala ya kosakola nsango ya Bokonzi na mokili mobimba. Na 1931, bazwaki nkombo ya Batatoli ya Yehova.​—Tángá Misala 1:8; 2:1, 4; 5:42.

4. Ndenge nini ebongiseli ya Batatoli ya Yehova ezali kotambwisama lelo?

Na siɛklɛ ya liboso, masangá ya bokristo na mikili mingi ezalaki kotambwisama na lisangani ya mikóló-bakambi oyo ezalaki kondima ete Yesu azali Mokonzi ya lisangá. (Misala 16:4, 5) Ndenge moko lelo oyo, Batatoli ya Yehova na mokili mobimba batambwisami na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, oyo esalemi na bankulutu oyo bakɔmeli. Lisangani yango nde etambwisaka babiro ya filiale ya Batatoli ya Yehova oyo esalaka mosala ya kobongola mikanda oyo elimbolaka Biblia na minɔkɔ koleka 600, konyata yango, mpe kokabola yango. Na ndenge yango, Lisangani ya Mikóló-Bakambi esalelaka Makomami mpo na kolendisa mpe kotambwisa masangá koleka 100 000 na mokili mobimba. Na lisangá mokomoko, mibali oyo bakokisi masɛngami bakómaka bankulutu to bakɛngɛli. Na bolingo nyonso, mibali yango babatelaka etonga ya Nzambe.​—Tángá 1 Petro 5:2, 3.

Batatoli ya Yehova babongisami mpo na kosakola nsango malamu mpe kokómisa bato bayekoli. Ndenge moko na bantoma, basakolaka ndako na ndako. (Misala 20:20) Tosɛngaka mpe bato oyo balingaka mateya ya solo mpo tóyekola Biblia elongo na bango. Kasi, Batatoli ya Yehova bazali kaka ebongiseli te. Tozali mpe libota moko, bana ya Tata moko, oyo alingaka biso. Tozali bandeko mibali mpe basi oyo batyelanaka likebi. (2 Batesaloniki 1:3) Lokola Batatoli ya Yehova babongisami mpo na kosepelisa Nzambe mpe kosalisa basusu, basali libota moko oyo ezali na bato ya esengo, awa na mabele.​—Tángá Nzembo 33:12; Misala 20:35.

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 19 ya buku Makambo oyo Biblia eteyaka

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto