Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 1/6 nk. 13-15
  • Nzambe azali na ebongiseli?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe azali na ebongiseli?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Yisraele​—Ekólo oyo ebongisamaki malamu
  • Bakristo ya siɛklɛ ya liboso babongisamaki malamu
  • Emonisi bolingo ya Nzambe
  • Mpo na nini Nzambe azali na ebongiseli?
    Nsango malamu oyo euti na Nzambe!
  • Zwá libateli na ebongiseli ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mpo na nini Nzambe azali na ebongiseli?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Yehova azali Nzambe oyo ayebi kobongisa makambo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 1/6 nk. 13-15

Nzambe azali na ebongiseli?

MOLƆNGƆ ezali komonana polele bisika nyonso na biloko oyo Nzambe akelá. Ezali komonana te kaka na biloko oyo tomonaka, kasi Biblia mpe emonisi ete baanzelu basalaka makambo na molɔngɔ kuna na likoló, na boyokani ya mokano ya Mozalisi. Mosakoli Danyele amonaki na emonaneli moko ebele ya baanzelu na tribinale ya Nzambe kuna na likoló: “Bankóto mbala nkóto bazalaki kosalela ye, mpe nkóto zomi mbala nkóto zomi batɛlɛmaki liboso na ye.” (Danyele 7:9, 10) Kanisá naino na ebongiseli oyo esengeli kozala mpo ebele ya baanzelu wana​—milio nkama moko koleka—​básala oyo Nzambe azali kotinda bango mpo na bolamu ya basaleli na ye awa na mabele!​—Nzembo 91:11.

Atako Yehova Nzambe, Mozalisi ayebi kobongisa makambo koleka bato nyonso, azalaka malilimalili te to alandelaka mibeko ntango nyonso te. Kasi azali Nzambe ya esengo oyo amibanzabanzaka mpo na bolamu ya bikelamu na ye nyonso. (1 Timote 1:11; 1 Petro 5:7) Likambo yango emonani polele na lolenge oyo asalelaki ekólo Yisraele mpe bakristo ya siɛklɛ ya liboso makambo.

Yisraele​—Ekólo oyo ebongisamaki malamu

Yehova Nzambe asalelaki Moize mpo abongisa Bayisraele mpo na losambo ya solo. Tótalela naino bibongiseli oyo ezwamaki mpo na kosala bakaa ntango bazalaki na esobe ya Sinai. Na ntembe te, mobulu elingaki kozala soki batikaki libota na libota etya hema na yango esika nyonso oyo elingi. Yehova apesaki ekólo yango malako ya sikisiki mpo na esika oyo libota na libota esengelaki kotya bakaa na bango. (Mitángo 2:1-34) Mibeko ya Moize ezalaki mpe na malako na makambo etali kolɔngɔnɔ ya nzoto mpe bopɛto, na ndakisa, likambo etali kozipa nyɛi.​—Kolimbola Mibeko 23:12, 13.

Ntango Bayisraele bakɔtaki na Mokili ya Ndaka, bazalaki ekólo oyo ebongisamaki malamu na makambo mingi. Ekólo yango ekabwanaki na bituluku ya mabota 12, mpe etuluku na etuluku ezalaki na eteni na yango ya mabele. Mibeko oyo Yehova apesaki ekólo yango na nzela ya Moize elobelaki makambo nyonso ya bomoi ya bato, na ndakisa losambo, libala, libota, kotánga, kosala mombongo, biloko ya kolya, mosala ya bilanga, kobatela banyama mpe bongo na bongo.a Atako mibeko yango mosusu ezalaki sikisiki mpe elobelaki makambo na mozindo, nyonso emonisaki ete Yehova amibanzabanzaka mpo na basaleli na ye mpe esalisaki bango mpo bázala na esengo. Lokola Bayisraele batosaki bibongiseli wana ya bolingo, Yehova asepelaki na bango mingi.​—Nzembo 147:19, 20.

Atako Moize azalaki motambwisi ya makoki, kolonga to kolonga te, esengelaki kouta te na makoki na ye wana, kasi nde na bosembo na ye na ebongiseli ya Nzambe. Na ndakisa, ndenge nini Moize ayebaki nzela oyo esengelaki koleka na esobe? Yehova atambwisaki bango na nzela ya likonzí ya lipata na moi mpe na butu na nzela ya likonzí ya mɔtɔ. (Kobima 13:21, 22) Atako Yehova asalelaki bato, kasi ye moko nde abongisaki bato na ye mpe atambwisaki bango. Ezalaki mpe bongo na siɛklɛ ya liboso.

Bakristo ya siɛklɛ ya liboso babongisamaki malamu

Lokola bantoma mpe bayekoli basakolaki na molende, masangá ya bokristo esalemaki na bisika mingi ya Azia mpe na Mpoto na siɛklɛ ya liboso. Atako masangá yango epalanganaki bisika nyonso, kasi ezalaki te kosala makambo na ndenge na yango. Kutu, ebongisamaki malamu, mpe ezalaki kozwa litambwisi ya bolingo oyo ezalaki kouta na bantoma. Na ndakisa, na Krɛti, Paulo apesaki Tito mokumba ya ‘kobongisa makambo nyonso.’ (Tito 1:5, Bible na lingala ya lelo oyo) Mpe Paulo akomelaki lisangá ya Korinti ete bandeko mosusu bazalaki “babongisi.” (1 Bakorinti 12:28, Biblia haut fleuve) Kasi, nani mpenza azalaki kosala ete molɔngɔ ya ndenge wana ezala? Paulo alobaki ete “Nzambe moto asangisá,” to abongisá lisangá.​—1 Bakorinti 12:24; Bible na lingala ya lelo oyo.

Bakɛngɛli oyo bazalaki koponama na lisangá ya bokristo, bazalaki te bakonzi ya bandeko na bango bakristo. Kutu, bazalaki nde “baninga ya mosala” oyo bazalaki kolanda litambwisi ya elimo santu, mpe basengelaki kozala “bandakisa ya etonga.” (2 Bakorinti 1:24; 1 Petro 5:2, 3) Ezali Yesu Kristo oyo asekwaki, nde azali “mokonzi ya lisangá,” kasi te moto moko boye to etuluku moko ya bato ya kozanga kokoka.​—Baefese 5:23.

Ntango lisangá ya Korinti ebandaki kosala makambo oyo ekeseni mpenza na oyo masangá mosusu ezalaki kosala, Paulo akomelaki bango ete: “Nini? Liloba ya Nzambe ebimaki nde epai na bino, to kaka epai na bino nde yango ekómaki?” (1 Bakorinti 14:36) Paulo atunaki Bakorinti motuna wana oyo esɛngaki bápesa eyano te mpo na kosembola makanisi na bango mpe kosalisa bango báyeba ete basengelaki te kosala makambo na ndenge na bango moko. Masangá ezalaki kokola mpe kotambola malamu ntango ezalaki kolanda malako ya bantoma.​—Misala 16:4, 5.

Emonisi bolingo ya Nzambe

Tokoloba nini lelo oyo? Bato mosusu bakoki kokatana mpo na kokóma bandimi ya lingomba moko boye. Kasi, Biblia emonisi polele ete Nzambe asalelaka ntango nyonso ebongiseli na ye mpo na kokokisa mokano na ye. Abongisaki basambeli na ye na Yisraele, mpe abongisaki bakristo ya siɛklɛ ya liboso na losambo na bango.

Na yango, tokoki mpenza te koloba ete Yehova Nzambe azali kokoba kotambwisa basaleli na ye, ndenge asalaki na ntango ya kala? Ɛɛ, kobongisa basambeli na ye mpe kosangisa bango na bomoko, emonisi ete alingaka bango mpe amibanzabanzaka mpo na bango. Lelo oyo, Yehova asalelaka ebongiseli na ye mpo na kokokisa mokano na ye mpo na bato. Ndenge nini tokoki koyeba ebongiseli na ye? Tótalela makambo oyo elandi.

▪ Bakristo ya solo babongisami mpo na kokokisa mosala moko. (Matai 24:14; 1 Timote 2:3, 4) Yesu apesaki bayekoli na ye mokumba ya kosakola nsango ya Bokonzi na bikólo nyonso, mokumba oyo ekokaki kosalema te soki ebongiseli ezalaka te na mokili mobimba. Na ndakisa, yo moko okoki kozala na mokakatano te ya koleisa moto moko, kasi soki esengeli oleisa bankóto ya bato, ata mpe bamilio, ekosengela ozala na etuluku ya bato oyo babongisami malamu mpe oyo bazali kosala na bomoko. Mpo na kokokisa etinda na bango, bakristo ya solo bazali kosala “na bomoko,” to “bazali kosala mosala ya [Nzambe] na bomoko.” (Sefania 3:9; Biblia Byington) Mosala oyo ezali kosalema na bikólo, minɔkɔ mpe na bato ya mposo ndenge na ndenge, ekokaki kosalema kozanga ete ebongiseli moko oyo ebongisami malamu mpe ezali kosala na bomoko ezala? Emonani polele ete ekokaki kosalema te.

▪ Bakristo ya solo babongisami mpo na kosungana mpe kolendisana. Moto oyo amataka bangomba, oyo azali ye moko, akoki kopona esika nini alingi komata mpe komona malamu ete akipe te bamati-ngomba oyo bamesani naino te na lisano yango. Kasi, soki akutani na likama to mokakatano moko, ekozala mpasi mingi, mpo moto ya kosalisa ye akozala te. Komitangola na basusu ezali mpenza likambo ya mayele te. (Masese 18:1) Mpo bakristo bákokisa mosala oyo Yesu apesi bango, basengeli kosalisana mpe kopesana mabɔkɔ. (Matai 28:19, 20) Lisangá ya bokristo ezali kopesa mateya mpe formasyo ndenge na ndenge ya Biblia oyo esengeli, mpe bilendiseli mpo moto nyonso akoba kokende liboso mpe atika te. Tolingaki koteyama ndenge nini na banzela ya Yehova soki makita ya bokristo oyo ebongisami malamu mpo na koteya biso mpe mpo na kosambela Yehova ezalaka te?​—Baebre 10:24, 25.

▪ Bakristo ya solo babongisami mpo na kosalela Nzambe na bomoko. Lokola bampate ya Yesu bayokaka mongongo na ye, bakómaka “etonga kaka moko” na nse ya litambwisi na ye. (Yoane 10:16) Bapanzani te na kati ya mangomba mpe bituluku oyo ezali kosala makambo na ndenge na yango; bakabwani mpe te na mateya na bango. Kutu, bango nyonso ‘bazali koloba na boyokani.’ (1 Bakorinti 1:10) Mpo na kozala na bomoko, tosengeli kosala makambo na molɔngɔ, mpe kosala makambo na molɔngɔ esɛngaka ebongiseli ezala. Kaka bandeko oyo bazali na bomoko nde bakoki kozwa mapamboli ya Nzambe.​—Nzembo 133:1, 3.

Bolingo ya solosolo mpo na Nzambe mpe mpo na solo ya Biblia ebendi bamilio ya bato na ebongiseli oyo ezali kokokisa masɛngami wana mpe mosusu oyo Biblia elobeli. Batatoli ya Yehova na mokili mobimba, lokola bato oyo babongisami malamu mpe bazali kosala na bomoko, basalaka makasi mpo na kokokisa mokano ya Nzambe. Bazali mpenza kondima elaka oyo: “Nakofanda na kati na bango mpe nakotambola na kati na bango, mpe nakozala Nzambe na bango, mpe bakozala bato na ngai.” (2 Bakorinti 6:16) Yo mpe okoki kozwa mapamboli kitoko oyo soki osambeli Yehova Nzambe na kati ya ebongiseli na ye.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá buku Étude perspicace des Écritures, volimi 2, nkasa 154-160, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Elilingi na lokasa 13]

Bakaa ya Bayisraele ebongisamaki malamu mpenza

[Bililingi na nkasa 14, 15]

Mpo na kokokisa mosala ya kosakola na mokili mobimba, ezali kosɛnga ebongiseli ezala

Mosala ya kosakola ndako na ndako

Kopesa lisungi na ntango ya likama

Mayangani

Kotonga bisika ya losambo

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto