Yekolá na Liloba ya Nzambe
Mpo na nini Nzambe azali na ebongiseli?
Lisolo oyo ezali na mituna oyo mbala mosusu omitunaka mpe emonisi esika oyo okoki kozwa biyano na Biblia na yo. Batatoli ya Yehova bakosepela kotalela biyano yango elongo na yo.
1. Mpo na nini Nzambe akómisaki Bayisraele ebongiseli?
Nzambe akómisaki bato ya libota ya Abrahama ekólo moko mpe apesaki bango mibeko. Abengaki ekólo yango Yisraele mpe apesaki yango mokumba ya kobatela losambo ya solo mpe Liloba na ye, Makomami Mosantu. (Nzembo 147:19, 20) Na ndenge yango, bato ya bikólo nyonso bazwi mapamboli na nzela ya ekólo yango.—Tángá Ebandeli 22:18.
Nzambe aponaki Bayisraele mpo bázala batatoli na ye. Ntango bazalaki kotosa Nzambe, bazalaki kozwa matomba na mibeko na ye. (Kolimbola Mibeko 4:6) Soki toyekoli lisolo ya Bayisraele, tokoyeba makambo mingi oyo etali Nzambe ya solo.—Tángá Yisaya 43:10, 12.
2. Mpo na nini bakristo ya solo bazali na ebongiseli?
Na nsima, Yehova Nzambe asundolaki Bayisraele mpe na esika na bango, asalaki lisangá ya bokristo. (Matai 21:43; 23:37, 38) Kala, Bayisraele bazalaki batatoli ya Nzambe. Lelo oyo, bakristo ya solo babengamaka batatoli ya Yehova.—Tángá Misala 15:14, 17.
Yesu abongisaki bayekoli na ye mpo bápesa litatoli na ntina na Yehova mpe bákómisa bato ya bikólo nyonso bayekoli. (Matai 10:7, 11; 24:14; 28:19, 20) Mosala yango ezali kosalema sikoyo na ndenge oyo esalemá naino te. Mpo na mbala ya liboso, Yehova asangisi bamilio ya bato oyo bauti na bikólo nyonso na losambo ya solo. (Emoniseli 7:9, 10) Bakristo ya solo babongisami mpe mpo na kolendisana mpe kosalisana. Na mokili mobimba, na makita na bango, bazalaka na programɛ moko ya mateya ya Biblia.—Tángá Baebre 10:24, 25.
3. Batatoli ya Yehova babandaki ndenge nini na ntango na biso?
Na ntango na biso, ebongiseli ya Batatoli ya Yehova ebandaki na bambula 1870. Mwa bato moke oyo bazalaki koyekola Biblia elongo, babandaki kososola mateya ya solo ya Biblia oyo ebombanaki banda kala. Bayaki koyeba ete Yesu abongisaki lisangá ya bokristo mpo esakola nsango malamu. Yango wana, babandaki mosala ya kosakola nsango ya Bokonzi na mokili mobimba. Na 1931, bazwaki nkombo ya Batatoli ya Yehova.—Tángá Misala 1:8; 2:1, 4; 5:42.
4. Ndenge nini ebongiseli ya Batatoli ya Yehova ezali kotambwisama lelo?
Na siɛklɛ ya liboso, masangá ya bokristo na mikili mingi ezalaki kotambwisama na lisangani ya mikóló-bakambi oyo ezalaki kondima ete Yesu azali Mokonzi ya lisangá. (Misala 16:4, 5) Ndenge moko lelo oyo, Batatoli ya Yehova bandimaka ete Yesu azali Mokambi na bango. (Matai 23:9, 10) Bazali mpe kotambwisama na Lisangani ya Mikóló-Bakambi oyo esalemi na bankulutu oyo bakɔmeli, oyo na lisalisi ya Makomami, bazali kolendisa mpe kotambwisa masangá koleka 100 000 na mokili mobimba. Na lisangá mokomoko, mibali oyo bakokisi masɛngami bakómaka bankulutu to bakɛngɛli. Na bolingo nyonso, mibali yango babatelaka etonga ya Nzambe.—Tángá 1 Petro 5:2, 3.
Batatoli ya Yehova babongisami mpo na kosakola nsango malamu mpe kokómisa bato bayekoli. Mpo na kosalisa bato na bisika nyonso, babongolaka mikanda oyo elimbolaka Biblia na minɔkɔ koleka 500, babimisaka yango, mpe bakabolaka yango. Ndenge moko na bantoma, basakolaka ndako na ndako. (Misala 20:20) Basɛngaka bato oyo balingaka mateya ya solo báyekola Biblia elongo na bango. Lokola Batatoli ya Yehova balingaka kosepelisa Nzambe mpe kosalisa basusu, basali ebongiseli moko oyo ezali na bato ya esengo.—Tángá Nzembo 33:12; Misala 20:35.
Mpo na koyeba makambo mosusu, talá Mokapo 19 ya buku oyo, Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova.