Mituna ya batángi
Matai 17:20 elobi ete bantoma bakokaki te kobikisa mwana mobali oyo azalaki na mpasi ‘mpo na kondima moke na bango.’ Nzokande, na Malako 9:29, balongaki te mpo basalaki libondeli te. Mpo na nini Baevanzile epesi bantina ekeseni?
Likambo ezali boye, Evanzile moko ezali kobakisa makambo oyo Evanzile mosusu elobi te, kasi ezali na bongolabongola te. Liboso, tótánga Matai 17:14-20. Mobali moko alobaki ete mwana na ye azalaki na maladi ya ndɛkɛ mpe bayekoli ya Yesu bakokaki kobikisa ye te. Na nsima, Yesu abikisaki mwana yango nsima ya kobimisa demo oyo azalaki konyokola ye. Bayekoli batunaki mpo na nini bakokaki kobimisa demo wana te. Lisolo ya Matai elobi ete Yesu ayanolaki ete: “Mpo na kondima moke na bino. Zambi nazali koloba na bino ete, soko bozali na kondima ata lokola mombuma na sinapi, bokoloba na ngomba oyo ete, Tambolá longwa awa kino esika kuna mpe ekotambola. Likambo moko te likoleka nguya na bino.”
Sikawa, tókamata Malako 9:14-29, epai makambo malobami na bozindo. Na ndakisa, Malako 9:17 abakisi ete na likambo oyo, ndenge wana ya kokwea na maladi ya ndɛkɛ eutaki na elimo mabe. Tóbosana te ete Biblia elobi esika mosusu ete Yesu abikisaki bato ya maladi ya ndɛkɛ mpe bato oyo batungisamaki na bademo. (Matai 4:24) Na likambo ya moto oyo, kokwea ezalaki kouta na ‘elimo na ebubu,’ ezali bongo elimo mabe, lolenge monganga Luka andimisi yango. (Luka 9:39; Bakolose 4:14) Talá maloba oyo na Malako 9:18: “Soko [demo] ekokanga ye wapi.” Na bongo, elenge mobali azalaki ntango nyonso kotungisama na demo te, kasi na bantango mosusu azalaki kotungisama. Lisusu, bayekoli bakokaki kobimisa demo wana te mpe kobikisa elenge mobali wana te. Ntango batunaki mpo na nini, Yesu ayanolaki ete: “Motindo oyo ekoki kobima bobele na libondeli.”
Nzokande, soki totángi lisolo ya Malako na likebi nyonso, tokomona ete bongolabongola ezali te na makambo Matai akomaki. Na Malako 9:19, tozali kotánga ete Yesu atungisamaki mpo na kozanga kondima ya bato ya eleko wana. Mpe na vɛrsɛ 23, elobami ete alobaki na tata ya mwana mobali ete: “Makambo nyonso makoki na moto na kondima.” Na yango, Malako mpe alobeli mingi ntina ya kozala na kondima. Yango wana na vɛrsɛ 29, Malako abakisi likambo mosusu. Malako abakisi makambo Yesu alobaki na ntina na libondeli, makambo oyo ezala Matai to Luka balobelaki yango te.
Na yango, tokoloba nini? Na mabaku mosusu bantoma 12 mpe bayekoli 70 bazalaki kobimisa bilimo mabe. (Malako 3:15; 6:13; Luka 10:17) Kasi na libaku oyo bayekoli bakokaki kobimisa demo te. Mpo na nini? Soki tosangisi makambo nyonso malobami na masolo ya Baevanzile, tokosukisa ete babongisamaki te mpo na likambo ya mwana mobali oyo. Mbala mosusu, mokakatano ezalaki na motindo ya demo oyo basengelaki kobimisa, mpamba te emonani ete demo na demo azali na bomoto na ye, na bamposa na ye, mpe ata na makasi na ye. Mpo na kobimisa demo oyo, basengelaki kozala na kondima makasi mpe kobondela na etingya ete Nzambe asunga bango. Ya solo, Yesu azalaki na kondima motindo wana. Azalaki lisusu na lisungi ya ye oyo ayokaka mabondeli, elingi koloba Tata na ye. (Nzembo 65:2) Yesu akokaki bobele te kobikisa mwana mobali oyo azalaki na mpasi na kobenganáká demo, kasi asalaki yango.