Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • jy mok. 39 lok. 98-lok. 99 par. 7
  • Mawa na libota oyo eboyi kobongola motema

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mawa na libota oyo eboyi kobongola motema
  • Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Masolo mosusu
  • Basokemi mpe bato na lolendo
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • ‘Bozwa kopema na bino‘
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Lisungi oyo ebongi mpenza mpo na kokitisa mitungisi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • “Ekanganeli na ngai ezali ya bopɔlɔ mpe mokumba na ngai ezali pɛpɛlɛ”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Makambo mosusu
Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
jy mok. 39 lok. 98-lok. 99 par. 7
Mwana mobali moko azali kobɛta piololo na zando, kasi bana mosusu baboyi kobina

MOKAPO 39

Mawa na libota oyo eboyi kobongola motema

MATAI 11:16-30 LUKA 7:31-35

  • YESU APAMELI BINGUMBA MOSUSU

  • AKITISI BATO MIKUMBA MPE ABƆNDISI BANGO

Yesu azali kozwa Yoane na valɛrɛ mingi, kasi bato mosusu bazali kotalela ye ndenge nini? Yesu alobi boye: “Libota oyo . . . ezali lokola bana mike oyo bafandi na bazando, oyo bazali kobelela baninga na bango ya lisano, balobi: ‘Tobɛtɛlaki bino piololo, kasi bobinaki te; togangaki na kolela, kasi bomibɛtaki na mawa te.’”​—Matai 11:16, 17.

Yesu alingi koloba nini? Alimboli makanisi na ye; alobi boye: “Yoane ayei alei te mpe amɛli te, kasi balobi: ‘Azali na demo’; Mwana ya moto ayei azali kolya mpe komɛla, kasi balobi: ‘Talá! Moto oyo amipesá na kolunda mpe na komɛla vinyo, moninga ya bakɔngɔli-mpako mpe ya basumuki.’” (Matai 11:18, 19) Yoane azalaki na bomoi ezangi mindɔndɔ lokola oyo ya Monaziri, kutu aboyaki komɛla vinyo, ata bongo, bato wana balobi ete azali na demo. (Mitángo 6:2, 3; Luka 1:15) Kasi, Yesu azali na bomoi lokola oyo ya bato nyonso. Azali kolya mpe komɛla kozanga kolekisa ndelo, kasi balobi na ye ete alekisi ndelo. Emonani ete ezali mpasi kosepelisa bato.

Yesu akokanisi libota yango na bana mike oyo bazali na bazando, oyo baboyi kobina ntango bana mosusu bazali kobɛta piololo to koyoka mawa ntango basusu bazali kolela. Alobi boye: “Atako bongo, bwanya ya moto emonanaka na makambo ya boyengebene oyo asalaka.” (Matai 11:16, 19) Ya solo, “makambo” oyo Yoane ná Yesu basalaki emonisi ete bifundeli oyo bafundi bango ezali ya lokuta.

Nsima ya kokokanisa libota yango na libota oyo eboyi kobongola motema, Yesu apameli bingumba lokola Korazine, Betesaida mpe Kapernaume epai asalaki makamwisi. Yesu alobi ete soki asalaka makamwisi wana na Tire mpe Sidone bingumba ya Fenisia, mbɛlɛ bato na yango babongoli motema. Atángi mpe Kapernaume, epai abandaki mosala na ye. Ata kuna, mingi baboyaki kobongola motema. Yesu alobi mpo na engumba yango boye: “Na Mokolo ya Kosambisama, mokili ya Sodoma ekozala kutu mwa malamu koleka yo.”​—Matai 11:24.

Na nsima, Yesu akumisi Tata na ye oyo abombeli “bato ya bwanya ná bato ya mayele” solo ya liloba na ye oyo ezali na motuya mingi kasi amonisi yango epai ya bato mpamba oyo bazali lokola bana mike. (Matai 11:25) Apesi libyangi epai ya bato lokola oyo: “Bóya epai na ngai, bino nyonso oyo bozali komona mpasi na mosala mpe na kokumba mikumba, mpe ngai nakopemisa bino. Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino mpe bóyekola epai na ngai, mpo ngai nazali na ezaleli ya boboto mpe na komikitisa na motema, mpe milimo na bino ekopema. Mpo ekanganeli na ngai ezali ya pɛtɛpɛtɛ mpe mokumba na ngai ezali pɛpɛlɛ.”​—Matai 11:28-30.

Ndenge nini Yesu apemisaka bato? Bakonzi ya mangomba bamemisi bato mikumba na ndenge bakómisi bango baombo ya makambo ya bonkɔkɔ; na ndakisa bakómisi mibeko ya Sabata makasi. Kasi Yesu apemisi bango na ndenge azali koteya bango solo oyo etali Nzambe, oyo ebebisami te na makambo ya bonkɔkɔ. Amonisi mpe ndenge baoyo bakonzi ya politiki bazali konyokola mpe baoyo kilo ya masumu elekeli bango bakoki kozwa bopemi. Ɛɛ, Yesu amonisi bato yango ndenge masumu na bango ekoki kolimbisama mpe ndenge bakoki kozala na kimya na Nzambe.

Baoyo nyonso bazali kondima ekanganeli ya Yesu oyo ezali pɛtɛpɛtɛ bakoki komipesa epai ya Nzambe mpe kosalela Tata na biso ya likoló oyo azali motema mawa. Kosala bongo ezali mpasi te mpo makambo oyo Nzambe asɛngaka ezali kilo te.​—1 Yoane 5:3.

  • Na ndenge nini bato ya eleko ya Yesu bazali lokola bana mike?

  • Nini etindi Yesu akumisa Tata na ye ya likoló?

  • Na ndenge nini bato mingi bazali na kilo, kasi Yesu alobi na bango nini mpo bázwa bopemi?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto