Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 22 lok. 56-lok. 57 par. 3
  • Likamwisi na Mbu Motane

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Likamwisi na Mbu Motane
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Bakatisi Mbu Motane
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • ‘Yah azali lobiko na ngai’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • ‘Tɛlɛmá ngwi mpe talá kobikisa ya Yehova’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Jéhovah azali nani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 22 lok. 56-lok. 57 par. 3
Farao ná basoda na ye

LITEYA 22

Likamwisi na Mbu Motane

Ntango kaka Farao ayokaki ete Bayisraele balongwe na Ezipito, amonaki ete esengelaki te atika bango bákende. Ayebisaki basoda na ye: ‘Bóbongisa makalo nyonso ya etumba mpe tólanda bango! Esengelaki te tótika bango bákende.’ Farao ná bato na ye babandaki kolanda Bayisraele.

Yehova azalaki kokamba bato na ye, na likonzí ya lipata na moi mpe na likonzí ya mɔtɔ na butu. Amemaki bango na Mbu Motane mpe ayebisaki bango bátya kaa wana.

Na ntango yango, Bayisraele bamonaki Farao ná basoda na ye bazali kolanda bango. Bayisraele bazalaki na katikati, liboso na bango mbu, nsima na bango basoda ya Ezipito. Babelelaki epai ya Moize: ‘Tokokufa! Ebongaki otika biso na Ezipito.’ Kasi Moize alobaki: ‘Bóbanga te. Bózela mpe bómona ndenge Yehova akobikisa biso.’ Moize atyelaki mpenza Yehova motema!

Yehova ayebisaki Bayisraele bálongola kaa. Na butu wana, Yehova atyaki likonzí ya lipata kati na Baezipito mpe Bayisraele. Baezipito bazalaki na molili. Kasi Bayisraele bazalaki na pole.

Yehova alobaki na Moize asembola lobɔkɔ na ye likoló ya mbu. Bongo Yehova atindaki mopɛpɛ ya makasi butu mobimba. Mbu ekabwanaki na biteni mibale, mpe nzela efungwamaki na katikati. Ebele ya Bayisraele wana batambolaki likoló ya zɛlo, na katikati ya bifelo ya mai.

Bayisraele bazali kokatisa na mabele ya mbu oyo etɛlɛmi lokola bifelo ngámbo na ngámbo

Basoda ya Farao balandaki Bayisraele esika bakatisaki mbu na makolo. Yehova akɔtisaki mobulungano na kati ya basoda yango. Bapinɛ ya makalo na bango ebandaki kolongwa. Basoda yango bagangaki: ‘Tólongwa awa! Yehova azali kobundela bango.’

Yehova ayebisaki Moize: ‘Sembolá lobɔkɔ na yo likoló ya mbu.’ Na mbala moko, bifelo ya mai ekwelaki basoda ya Ezipito. Farao ná bato na ye nyonso bakufaki. Ata moko te abikaki.

Na ngámbo mosusu ya mbu, ebele ya bato bayembelaki Nzambe mpo na kokumisa ye: ‘Tóyembela Yehova, mpo atombwami likoló mingi mpenza. Abwaki mpunda ná motambwisi na yango na mbu.’ Ntango bato bazalaki koyemba, basi bazalaki kobina mpe kobɛta mbonda ya mike. Bato nyonso basepelaki ndenge balongwaki na boombo.

“Mpo tózala na mpiko mpenza mpe tóloba: ‘Yehova azali mosungi na ngai; nakobanga te. Moto akoki kosala ngai nini?’”​—Baebre 13:6

Mituna: Likambo nini esalemaki na Mbu Motane? Ndenge nini Yehova abikisaki Bayisraele?

Kobima 13:21–15:21; Nehemia 9:9-11; Nzembo 106:9-12; 136:11-15; Baebre 11:29

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto