Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 26 lok. 66-lok. 67 par. 1
  • Banɔngi zomi na mibale

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Banɔngi zomi na mibale
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Banɔngi 12
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Okolanda Jéhovah na motema na yo mobimba?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Makambo oyo Yosua abosanaki te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Tyelá Yehova motema na yo mobimba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 26 lok. 66-lok. 67 par. 1
Mibali ya Yisraele bakei kotala mokili ya Kanana

LITEYA 26

Banɔngi zomi na mibale

Bayisraele balongwaki na Ngomba Sinai, bakatisaki esobe ya Parane, mpe bakómaki na esika babengi Kadeshe. Kuna, Yehova ayebisaki Moize: ‘Tindá mibali 12, mobali moko na libota mokomoko, mpo bákende kotala Kanana, mokili oyo nakopesa Bayisraele.’ Na yango, Moize aponaki mibali 12 mpe alobaki na bango: ‘Bókende na Kanana mpe bótala soki mabele na yango ebotaka malamu. Bótala soki bato na yango bazali makasi to te, soki bafandaka na bahema to na bingumba.’ Banɔngi yango 12, kati na bango Yosua ná Kalebe, bakendaki na Kanana.

Bayisraele bamilelileli mpe balɛmbi nzoto

Nsima ya mikolo 40, mibali yango bazongaki, bayaki na bambuma ya figi, ya grenade, mpe ya vinyo. Banɔngi yango bapesaki nsango oyo: ‘Mokili yango ezali malamu, kasi bato na yango bazali makasi mpe bingumba na bango ezali na bifelo ya milai.’ Na nsima, Kalebe alobaki: ‘Tokolonga bango. Tókende kaka sikoyo!’ Oyebi mpo na nini Kalebe alobaki bongo? Mpo ye ná Yosua batyelaki Yehova motema. Kasi banɔngi mosusu zomi balobaki: ‘Te! Bato yango bazali bingambe, bilombe! Tomimonaki lokola makɔnkɔ (mabanki) liboso na bango.’

Bayisraele balɛmbaki nzoto. Babandaki komilelalela mpe kolobana: ‘Tópona mokambi mosusu mpe tózonga na Ezipito. Mpo na nini tókende kuna mpo báboma biso?’ Yosua ná Kalebe balobaki: ‘Bótosa Yehova, mpe bóbanga te. Yehova akobatela biso.’ Kasi Bayisraele bayokaki te. Balingaki kutu koboma Yosua ná Kalebe!

Yehova asalaki nini? Alobaki na Moize: ‘Nasali makambo mingi mpo na Bayisraele, kasi bazali kaka kotosa ngai te. Bakotikala na esobe mbula 40, mpe bakokufa wana. Kaka bana na bango mpe Yosua ná Kalebe nde bakokɔta na mokili oyo nalakaki kopesa bango.’

“Mpo na nini bozali kobanga boye, bino bato ya kondima moke?”​—Matai 8:26

Mituna: Nini esalemaki ntango banɔngi 12 bautaki na Kanana? Ndenge nini Yosua ná Kalebe bamonisaki ete batyelaki Yehova motema?

Mitángo 13:1–14:38; Kolimbola Mibeko 1:22-33; Nzembo 78:22; Baebre 3:17-19

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto