Maloba ya ebandeli ya eteni 5
Sanza mibale nsima ya kokatisa Mbu Motane, Bayisraele bakómaki na Ngomba Sinai. Kuna, Yehova asalaki kondimana na Yisraele mpo ezala ekólo na ye. Abatelaki bango mpe apesaki bango nyonso oyo esengeli: mana mpo na kolya, bilamba oyo enzulukaki te, mpe esika ya kimya mpo na kofanda. Soki ozali moboti, salisá mwana na yo amona ntina oyo Yehova apesaki Bayisraele Mibeko, tabernakle, mpe bonganga-nzambe. Monisá ntina ya kokokisa maloba na biso, ya kozala ntango nyonso na komikitisa, mpe ya kotikala sembo epai ya Yehova.