Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb nk. 122-123
  • Maloba ya ebandeli ya eteni 9

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Maloba ya ebandeli ya eteni 9
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Mpiko ya Yehoyada
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Yoasa atikaki Yehova mpo na baninga mabe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Azalaki na mposa ya kosalisa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Elombe ya etumba ná mwana moko ya mwasi
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb nk. 122-123
Mwana mwasi Moyisrale azali kosolola na mwasi ya Naamane, moto ya maba

Maloba ya ebandeli ya eteni 9

Eteni oyo elobeli bilenge, basakoli, mpe bakonzi oyo bazalaki na kondima makasi epai ya Yehova. Na ekólo Siri, mwana mwasi moko Moyisraele azalaki na kondima ete mosakoli ya Yehova akobikisa Naamane. Mosakoli Elisha atyelaki Yehova motema mobimba ete akobatela ye na mabɔkɔ ya banguna. Nganga-nzambe monene Yehoyada atyaki bomoi na ye na likama na ndenge abatelaki elenge Yehoashe mpo nkɔkɔ na ye ya mwasi Atalia oyo azalaki motema mabe aboma ye te. Mokonzi Ezekiasi atyaki motema ete Yehova akobikisa Yerusaleme, mpe amitikaki te na mabɔkɔ ya bato ya Asiri. Mokonzi Yosiya alongolaki losambo ya bikeko na ekólo, abongisaki tempelo, mpe azongisaki bato ya ekólo na ye na losambo ya solo.

MATEYA

  • Ata soki ozali mwana moke, okoki koloba makambo na ntina etali Yehova

  • Soki tosali oyo ezali malamu, Yehova alaki ete akozala elongo na biso

  • Ndenge moko na Yona, landáká malako ya Yehova mpe komilelakalelaka te soki makambo esalemi te ndenge okanisaki

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto