Koyokana na bilimu: mpo na nini bato mingi bazali kosepela na yango?
KATI na engumba na ye, Frans azali likonzi ya lingomba ya misioni. Soki mosala ya kosala na temple ezali, azali moto ya liboso mpo na kopesa nkombo. Wilhelmina, ye mpe abangaka Nzambe. Alobaka ete, “esengeli nakende na temple, mpe mbala moko akei. Motindo moko, Esther azali kosangana mbala na mbala na losambo mpe alekisaka mokolo moko te kozanga ete asala mabondeli. Nzokande bato misato oyo bazali bango nyonso na likambo moko: bazali mpe bato oyo basololaka na bilimu mabe.
Likambo ya Basurinamiens misato oyo ezali bobele yango moko te. Kati na mokili mobimba, kosolola na bilimu ezali kosepelisa bato mingi. Totika mituya miloba: Bobele na Etats-Unis, mikanda koleka ntuku misato, mibisami nyonso mpo na makambo etali koyokana na bilimu mabe mikabolamaki na ba exemplaires 10 millions. Na Angleterre, motuya ya bato oyo bazali kosepela na losambo ya bilimu mabe ezali kotangama na bamilio mibale. Na Pays-Bas, bolukiluki moko oyo euti kosalama sikawa emonisi ete kati na bato oyo bazali kondima bimonanelo ya bilimu mabe ezali na bafandi ya bingumba minene, bato ya mayele mingi mpe bilenge. Lisusu, lokola bato ya Afrike, bato ya Asia, mpe ya Amerike-Latine, bakoki kondimisa yango, kati na mikili mingi koyokana na bilimu mabe esili kokota mpenza kati na bomoi ya mokolo na mokolo. Tala likambo oyo ezali kolimbola mpo na nini John Weldon mpe Clifford Wilson bazali kosukisa mokanda na bango Choc occulte mpe forces parapsychiques (Angl.) na maloba oyo: “Ntalo monene ya bakomi na masolo ya bato bazali kondima ete tozali kobika na eleko moko oyo bato bazongeli mpenza boyokani na bango elongo na bilimu koleka bileko nyonso mosusu”.
Na yango, koyokana na bilimu mabe-ezala na mitindo na yango nyonso lokola babengi yango na Francais, astrologie, hypnotisme, parapsychologie, perception extra-sensorielle, magie, kolimbola bandoto, mpe bongo na bongo ezali kobenda bato ya mitindo nyonso. Mpo na nini?
Mangomba mosusu ya boklisto ya mokili ezali kozipa miso, kino kondima, mosala ya koyokana na bilimu mabe. Bazali kondimisa epai na bato ete koyokana na bilimu ezali nde mwango mosusu ya kobelema na Nzambe.
Tozwa ndakisa ya lzaak Amelo, moto na mombongo ya mboka Suriname oyo azali na mibu 70. Na boumeli ya mibu nsambo, azalaki mpe mosangani oyo amemyami mingi kati na etuluku ya batambwisi na lingomba ya misioni mpe azali mosololi na bilimu mabe oyo ayebani mingi na mosala yango. Alobi boye: “Mokolo nyonso ya poso, bapesi-toli nyoso ya lingomba na misioni bazalaki kokutana na libanda ya mboka. Tozalaki kosolola na bilimu mabe na butu mobimba. Ntango ntongo ezalaki kotana, diakre azalaki kotalatala montre na ye mpe, penepene na 5 heures, azalaki koyebisa biso tokata. Nsima na kosukola, tozalaki kolongola bilamba oyo tozalaki na yango mpo na kolata mosusu mpe tozalaki kokenda na ndako-nzambe -epai wapi tozalaki kokoma mpenza na ngonga ya kobanda losambo ya ntongo na lomingo. Na boumeli ya mibu nyonso wana pasteur amonisaki biso ata mabe moko te mpo na mosala yango.”
Nsima na koyekola boyokani oyo ezali kati na kosolola na bilimu mabe mpe Mangomba na Suriname, professeur to molakisi R. van Lier, ye moto na Hollande andimaki ete bato mingi bazali komona ete koyokana to kosolola na bilimu mabe ezali “lingomba mosusu ya mibale”. Kati na boyekoli moko oyo ebimisami kala mingi te na université ya Leyde, amonisaki mpe ete bato bazali kotalela koyokana na bilimu mabe lokola “eteni moko ezwami kati na lolenge mingi ya losambo, mpe losambo ya bilimu ezali na molongo moko na losambo ya boklisto”.
Mbala mosusu mituna oyo mizali koyela yo na makanisi; Lokola mangomba ya boklisto ya mokili ezali kondima misala ya bilimu mabe emonisi ete Nzambe andimaka yango? Tozali mpenza kopusana penepene na Nzambe ntango tozali koyokana na bilimu mabe? Biblia ezali mpenza koloba nini na ntina na boyokani elongo na bilimu mabe?’
[Elilingi na lokasa 3]
Izaak Amelo azali koyeba lisusu ete bapesi-toli nyonso ya lingomba na misioni, bakisa ye moko, bazalaki kosangana na milulu ye kosolola na bilimu mabe