Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 15/5 nk. 3-4
  • Kosambela: ezali na ntina na mikolo na biso?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kosambela: ezali na ntina na mikolo na biso?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Litambwisi ya solo ezali te
  • Bato bakwei
  • Kozanga bomoko
  • Lingomba ya solo: ekoki komonana?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Losambo ezali na ntina nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Tosalela losambo na solo mpo na lobiko na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mangomba nyonso mazali malamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 15/5 nk. 3-4

Kosambela: ezali na ntina na mikolo na biso?

NAKIMAKI mbango na chambre na ngai mpe wana ezalaki ngai koleka nabwakaki Biblia na esika moko. Nazalaki kokanisa ete nakofungola yango lisusu te, mpe nakokota lisusu na Lingomba moko te. Elekaki mbula motoba uta nabandaki kolukaluka, kasi nazwaki lisalisi moko te.”

Ronald, mosali na informatique, azali na mbula 26; akutanaki na mimekamo ndenge na ndenge mpe azalaki kobanga ete bomoi na ye ebeba. Lingomba ezalaki lisusu kosalisa ye na likambo moko te. Alobaki boye: “Esili mpo na makambo ya Lingomba!”

Lokola Ronald, bato mingi bazwi te eloko oyo bazalaki koluka kati na mangomba. Ezali mpe bongo mpo na yo? Okanisi ete Mangomba epesi bato lisalisi mpenza mpe litambwisi oyo bazali na yango mposa mpo na kokoma baninga malamu ya mosala, baninga malamu ya pembeni, mibali malamu, basi malamu, baboti to bana na ezaleli malamu? Mangomba masili kopesa nzela na kimya mpe na bomoko kati na bato? Esili kosalisa bango mpo ete bakanga ntina ya bomoi? Esili kobimisa na motema na bango mpe na elimo na bango elikya makasi?

Litambwisi ya solo ezali te

Kati na mokili na biso oyo etondi na makambo ndenge na ndenge, bato bazali na mposa ya lisungi oyo etondi na mayele mpe pole. Bakoki kolikya kozwa lisungi yango epai na bakonzi na bango ya Mangomba? Mokanda elandi, etindamaki na zulunalo moko, epesi biso mwa ndambo ya eyano:

“Uta mwa ntango . . .makambo oyo tokomi koyoka na ndako-nzambe, ezali bobele, bolingo, bolingo, bolingo. . . . Bongo ekomi boni mpo na bipekiseli lokola ‘Okoboma te’, ‘Okoyiba te’, mpe bipekiseli mosusu? Ezali na makambo oyo esengeli kosalema te, mpe tozali na mposa ete balobelaka biso yango mbala na mbala. Kasi tozali koyoka lisusu ata liloba ‘lisumu’ te. Lokola soko ezalaka lisusu te, to ezali liloba mabe.”

Emonani lokola ete, bato mosusu bazali kokanisa ete bapesi​—toli ya Mangomba bazali kopesa nzela na makambo mingi. Batambwisi yango ya Mangomba bazali komonisa ete bazali na bolembu. Bakokani na monganga oyo azali kobombela moto na maladi sekele na ntina na maladi oyo ekangi ye mpe akopesa ye nkisi ezangi makasi. Wapi mwa bantina ya likambo yango?

Bato bakwei

Moto oyo azali na mitungisi mingi azali na likoki te ya kolekisa ntango mingi to kotya milende mingi mpo na kosalisa baninga. Myango ya bopanzi nsango mizali komonisa ete bakonzi mingi ya Mangomba bazali kokutana na mikakatano minene ezala na mosala na bango to na bomoi na bango. Tala mwa bandakisa ya likambo yango:

Leslie Freedman, pisikologe oyo ayekolaki makambo ya bakonzi na mangomba ya boyuda na boumeli ya mbula minei na Universite, alobaki boye: “Bato mingi bazali kotungisama na maladi ya moto mpe bazali kolemba na mikolo na biso oyo. Kasi mpasi yango ezali kobimisa makama mingi epai ya bakonzi na mangomba ya boyuda.”

“Soki nazalaki na mwana mobali, ekokaki na ngai kotika ye ete akoma sango? Ezali mawa, kasi eyano na ngai ezali ete te.” Ezali yango sango moko na nkombo ya William Wells alobaki kati na rapport moko elobelaki mikakatano ya bakonzi na mangomba. Mpo na nini bongo? Alobi ete, akoki te koyikisa elenge mpiko ete amipesa na nzela moko oyo ebebisami na “kozanga koyokana, na mobulu mpe na ntembe lokola ezali bongo mpo na mikumba ya bakonzi na katolike.”

Na Suede, epai Lingomba na misioni ya Luther ezali kosimbama na Leta, mpasi mpe ezali ata epai na bapastere. Tala oyo ekomamaki na zulunalo moko ya mboka yango: “Bakonzi na mangomba bazali na mobulungano ya moto oyo, soki ekomi makasi mpenza, ezali komema bamosusu ete bamiboma. . . . Bakonzi na mangomba bakomi mpenza na mpasi.”

Kozanga bomoko

Ndenge batambwisi na mangomba basili komikotisa na bitumba minene oyo ezali kokabola bamboka mosusu, ezali kopengola bango na mosala na bango, oyo ya kokokisa bamposa ya elimo ya bato. Bakonzi yango ya mangomba bazali mpe na mokumba na ndenge mbongo ebebisami, mbongo oyo ekokaki kosalelama mpo na kobongisa bomoi ya bato.

Kati na mokili mobimba, bato bazali lisusu na konfianse te mpo na Lingomba mpe bazali kokipe lisusu makambo matali mangomba te. Na Suede, na Finlande, na Allemagne, na Grande-Bretagne, na ltalie, na Kanada mpe na Etats-Unis, esili komonana ete bato bazali kobima na Mangomba mpe bazali kokota lisusu ndako-nzambe te.

Ozali kati na bato oyo, lokola Ronald, oyo bakanisi ete bazali lisusu na likambo moko te elongo na Lingomba? Kasi, ekoki kozala ete Lingomba moko esili komonisa ete ezali na motuya monene mpo na bato mingi? Lisolo elandi ekolobela mituna yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto