Lingomba ya solo: ekoki komonana?
RONALD, oyo tolobelaki na lisolo euti koleka amonaki ete ezalaki malamu atika kolukaluka. Akotikala komona ata lingomba moko te oyo ekoki komemela ye lisalisi mpe litambwisi oyo azalaki na yango mposa. Kasi ata bongo amipesaki chance ya nsuka. Alobaki boye: “Soko mpenza Nzambe moko azali, lelo oyo nalingi ayeba ete nazali koluka ye na bosembo.” Na butu moko, asalaki libondeli oyo: “Soko mpenza ozali Nzambe ya bolingo, luka ngai, mpamba te ngai nazali koluka yo uta bambula ebele kozanga litomba.”
Mwa mikolo na nsima, Ronald akomaki kosala elongo na Témoin de Jéhovah moko oyo abandaki koyanola na mituna na ye etali Biblia. Biyano azwaki elamusaki mposa na ye ya koyebayeba makambo, mpe na nsima abandaki koyekola Biblia. Akomaki koyangana na makita ya ba Témoins de Jéhovah.
Na nsima na sanza motoba, Ronald ayaki kondima ete amonaki lingomba oyo ezalaki kopesa ye makasi ekoki mpo na kobongola mpenza bomoi na ye. Nsima na kofanda esika moko na ba Témoins de Jéhovah na boumeli ya mbula misato, amonisaki na mokanda oyo atindelaki Mosenzeli mwa bolamu oyo azwaki na bomoi na ye ya sika.
Abungisaki “likanisi ya koboma”
Ronald akomaki: “Nazali komipekisa malamu sikawa. Wana ezali bolamu ya liboso oyo solo (mateya ya Biblia) ememeli ngai. Nayekolaki kobunda uta mwa ntango molai. . . . Mpo na komimekisa nazalaki kolekisa bangonga motoba kino mwambe na mokolo, mpe nazalaki ntango nyonso na mokano kati na motema; balingaki ete nakoma na likoki ya koboma.”
Moko te akosilisa mikakatano mizali kati na ye mpe moninga na ye na nzela na etumba mpe na koboma. Lingomba oyo ezali na ntina ezali nde lingomba oyo ezali kopesa nzela na kimya. Kati na Baloma 12:18, Biblia elobi: “Bozala na kimya elongo na bato nyonso.” Ba Témoins de Jéhovah bazali komibongisa mpo na etumba te mpe bazali koluka komibatela te na koyekolaka kobeta mindoki. Bayebani na mokili mobimba mpo na ezaleli na bango ya bokatikati mpe ya kimya oyo bazalaka na yango na ntango ya bitumba.
Mamelo moko akomaki boye na zulunalo moko ya ltali, nsima na komona ndenge lingomba yango ezalaki kotambwisa basembwi na yango: “Mokili ekokoma mpenza ndenge mosusu soko tolamuki biso nyonso mpe tozwi ekateli, lokola ba Temoins de Jehovah, mpo ete tosimba lisusu mindoki te!”
Ezaleli yango ya kimya oyo ezali komonana kati na Batemwe esili kopesa nzela na libota ya mokili mobimba oyo esangisi kati na yango bato koleka 3 milio bazwami na mikili 208. Ata bazali na mokili nini, na mposo nini to na molongo nini, bazali komitambwisa lokola baninga ya solo. Kati na mokili mabe oyo tozali kofanda, bokangami motindo yango ezali eloko eleki motuya, mingimingi soko moto azali na mposa ya lisalisi. Ezali yango Eva, elenge mwasi na Suede oyo azali Témoin de Jehovah, amonaki.
Eva azwaki maladi bakobengaka meningite wana ezalaki ye na mobembo mpo na kokende na Grece. Azalaki na Athenes, esika ayebaki ata moto moko te, mpe makanisi ebungaki ye mpe akomaki na maladi makasi, bakumbaki ye nokinoki na lopitalo. Batelefonaki tata na ye mpo na koyebisa ye yango. Bongo ye, na Suede, abengaki nkulutu moko ya lisanga ya ba Temoins de Jéhovah oyo atelefonaki epai na Batemwe oyo ayebaki na Athenes. Na yango, Batemwe bagreke oyo Eva ayebanaki na bango liboso te bayaki nokinoki kotala ye.
Lisolo yango ezali kokundola biso elakiseli oyo ntoma Paulo asalelaki mpo na komonisa ete bomoko mpe kokabola mpasi ya bamosusu ezali kotambola nzela moko. Kati na 1 Bakolinti 12:25, 26, tozali kotanga boye: “Ete kokabwana ezala kati na nzoto te kasi ete bilembo nyonso bibatelanaka. Soko elembo moko ekozwa mpasi, bilembo nyonso ekoyoka mpasi elongo.”
Ezali yango ekomelaki Eva na Grece. Na boumeli ya mposo soko misato, baninga na ye ya sika batikaki ye te. Abikaki na maladi na ye mpe akokaki kozonga epai na ye. Alobi boye: “Nazwaki mpenza bolamu oyo ekobimaka na bondeko oyo etondi na bolingo.”
Azali koluka lisusu ‘kozwa mbongo mingi te’
Kasi tozongela mokanda ya Ronald. Nsima na koyebisa biso ndenge nini kondima na ye ya sika esalisaki ye ete ayeba komibatela, atika koluka “likoki ya koboma” mpe afanda na kimya koleka, alobeli likambo ya mosala mpe mosolo, komonisaka ete mateya ya Biblia esalisaki ye ete akoma na ezaleli ya bokatikati na likambo yango. Ronald alobi boye: “Na kompanyi, esika nazalaki kosala nazalaki mosali aleki malamu ya informatique mpe nazalaki kosala ata ba heures supplémentaires, mpe yango ezalaki kotinda ngai ete natika kotalela bamposa ya libota na ngai mpe ata baninga na ngai. Koleka bambula nsambo nazalaki kosala kino mpokwa. Nazalaki ntango nyonso kolinga kozwa mbongo mingi.”
Mposa yango ya koluka ‘kozwa mbongo mingi’ ekoki kozala mabe to mpe koboma, soko eumeli. “Mpo na bamoko, mbongo ezali kolimbola kimya, mpo na bamosusu ezali nguya. Mpo na bamosusu lisusu, ezali kosalisa bango ete basomba bolingo. Bato mingi mpe bazali komona yango lokola ndimbola ya kowelana to ya elonga.” Wana ezali maloba ya Jay Rohrlich, psychiatre oyo asalisaka mingimingi bato minene bakotalaka makambo ya mosolo, oyo bazali kosala na Wall Street.
Zulunalo Science Digest epesi likanisi na yango mpo na maloba oyo ya psychiatre yango: “Endimeli oyo elobi ete mosolo ekoki kopesa biloko yango . . . ezali mbala mingi kobimisa lokola makama, bolembu, kozanga mpongi, maladi ya motema mpe mitungisi kati na libota.” Biblia epesi nde toli elandi: “Ezaleli na bino ezanga mposa na mosolo.” Ronald ayekolaki toli yango mpe abandaki kosalela yango. Yango esalisaki ye mingi mpenza.—Baebele 13:5.
Azwaki likanisi esengeli mpo na mosala
Mposa ya mosolo etindaka mingimingi bato ete balonga mpenza kati na bomoi na bango, likambo oyo ekoki kobimisa epai na basali oyo bayebi koyika mpiko maladi makasi ya moto mpe kozanga koyokana oyo ekoki komema kino na komiboma. Wana batunaki ye na zulunalo U.S.News & World Report mpo na boyokani oyo ezali kati na bomoi ya mosala mpe mitungisi mpo na oyo etali bolingo, monganga Douglas LaBier alobelaki likambo ya “moto moko oyo, ntango akomaki na mosala mokolo mosusu na ntongo, amonaki ete bureau na ye etyamaki na esika mosusu. Mpo na yango amataki na nsuka ya ndako na etage epai ye azalaki kosalela mpe amibwakaki”.
Bongo docteur LaBier alobi boye: “Likambo oyo esengeli, ezali bomoi malamu mpe epesi nzela na makambo mingi, oyo ekozingama bobele na mosala te (carriere). Bato oyo bazali na bomoi ya bokatikati basengeli komileisa na ndenge ekoki, kozala na ntango mingi ya kopema mpe kosala mwa ekzersise ya nzoto. Mpe lisusu, basengeli kopesa ntango mingi na libota na bango mpe kolona makoki oyo ezali mbala mosusu ata na boyokani te na mosala na bango mpe oyo ezali kosepelisa bango.”
Na nzela na Biblia, ba Temoins de Jéhovah bazali koyekola ezaleli ya bokatikati na ndenge na bango ya kotalela mosala mpe mosolo. Mosakoli 4:4, 6 elobeli mosala makasi oyo ezali kobimisa “kolulela na moto oyo akolulelaka mozalani na ye.” mpe elobi: “Mwa moko elongo na kimya eleki maboko mibale matondi na mosala mpe koluka kokwa mopepe.” Ronald ayaki komona ete kosalela maloba yango ezalaki na ntina. Atikaki kosala ba heures supplémentaires, mpo alekisa ntango mingi na makambo ya elimo elongo na libota na ye mpe baninga na ye.
Akomi na bomoi ya libota etondi na esengo
Ronald ayei kondima na nsima ete batoli ya Biblia oyo etali libala mpe bomoi ya libota esalisaki ye ete akokisa mikumba na ye ya libala na mayele nyonso. Na eleko oyo, kati na mikili mingi, bomoi ya libota ezali se kobeba, batoli yango ezali mpenza na ntina. Na mikili ya Mpoto, bato bazali kobalana bazali moke, kasi baoyo bazali koboma mabala bazali mingi, mpe bana bazali kobotama lisusu mingi te.
Ezalela yango ezali mabe, mpamba te libota ezali esika oyo moto akokisaka mwa bamposa na ye ya ebandeli to ya moboko. Kati na bolukiluki moko esalemaki na Sydney Morning Herald, zulunalo ya Ostralia, batunaki epai na bato 2 000 likambo oyo ezalaki kosepelisa bango mingi. Batangaki bongo mosala, libota, baninga, kominanola, biloko ya mosuni, mpe kosambela. Nde bato mingi batyaki “libota” na esika ya liboso.
Ba témoins de Jéhovah balingi ntango nyonso kobatela makasi bikanganeli ya libota. Yango wana, na boumeli ya bambula mitano oyo euti koleka, bazulunalo oyo mibale La Tour de Garde (Mosenzeli) mpe Reveillez-vous! (oyo ebimaka koleka 22 milio ya ba exemplaires na minoko koleka 100) ebimisaki masolo koleka 60 oyo ezalaki kolobela makambo mingi makoki kosalelama na libota. Kozanga ntembe mpenza, lingomba oyo mateya na yango mazwami na Biblia mpe ezali kosalisa bato ete batalela bamposa ya libota na bango na mayele mpe na bolingo, lingomba yango ezali mpenza na motuya monene.
Azwi eyano na motuna “eleki monene”
Ronald asukisi mokanda na ye na maloba malandi: “Nakanisaka mingi na likambo moko wana nazali kotanga zulunalo to nazali koyoka bansango, wana nazali kosolola na baninga ya mosala to nazali kosakola epai ya bazalani na ngai. Na yango, mpo ete nazali Témoin de Jéhovah, nazali na eyano na moko kati na mituna mileki minene oyo bato bazali komituna kati na mokili mobimba: Mpo na nini kobomana, mpo na nini mobulu, mpo na nini bitumba, mpo na nini pite, maladi, kowelana, kozanga kotanga makanisi ya mokolo na mokolo? Ntango nayokaki ete biloko mabe ya ntango oyo mpe mikakatano na yango ezali se mpo ya ntango moke, namonaki lokola ete kilo monene oyo ezalaki likolo na mapeka na ngai elongwaki.”
Biblia emonisi likambo oyo ezali kobombana nsima na makambo mabe oyo ezali komonana kati na mokili na eleko na biso. Ezali kolimbola mpo na nini mokano na ebandeli na Mozalisi, oyo ezali kokana ete ekomisa mabelé paradis mpo ete moto afanda, mokano yango ekokani naino te. Ezali kolaka ete Nzambe akolongola mabe nyonso na mabele mpe akozalisa paradis moko oyo bato bakosepela na yango libela na libela.—2 Petelo 3:9-13.
Mpo ete esalisa mpenza bato, lingomba esengeli kobimisa mbuma malamu. Esengeli “kobota” bato malamu koleka. Esengeli kozala na likoki ya kolimbola mpo na nini makambo mazali mabe lelo na mabelé. Mpe esengeli kobimisa kati na elimo mpe mitema na bato, elikya makasi. Ezali nde lingomba ya lolenge yango oyo Ronald azalaki koluka, mpe azwaki yango. Ekoki mpe kozala bongo mpo na yo.—Matai 7:17-20.
[Elilingi na lokasa 5]
Kati na bango, baklisto ya solo bazali mpenza baninga.