Lingomba mpe biyambayamba—Baninga to banguna?
MOKOLO na Samedi 11 Juin 1983, bafandi nyonso ya esanga ya lndonésie ya Java bamikotisaki nokinoki na bandako na bango mpo na kokanga na mbango mpenza ba fenetres, ba portes mpe kotya mabaya na porte mpe fenetres mpo ete efungwama te. Nini ezalaki kolengisa bango? Ezali kolimwa ya moi mpo na mwa ntango moke oyo babenga na Lifalanse éclipse solaire eutaki kobanda, mpe bazalaki kobanga ete molili ekota na bandako na bango mpe ememela bango mpasi.
Bafandi ya mikili oyo mizali kokola mbala mosusu bazali kobatela bizaleli motindo oyo na molende nyonso lokola basambeli. Yango wana kati na bingumba mosusu ya Afrike bato bazali koboya kotambola na nse ya moi na midi, bazali kobanga soki te “bakozwa ligboma”. Bazali kopekisa bana ete balya maki, mpamba te bazali kokanisa ete “bakokoma miyibi”. Baboti bakolinga mpe te koloba soki bazali na bana boni, bazali kobanga noki te “bandoki bakoyoka bango komikumisa mpe bakoya kozwa moko”.—Mangomba ya liboso na Afrike. (Angl.)
Mindele bazalaka na momeseno ya kotiola makambo yango oyo na miso na bango, mazali komonana lokola elembo ya kobanga biyambayamba mpe ezali komonisa ‘kozanga boyebi oyo ezali komonana epai na bapakano’. Bindimeli yango etalelami bobele epai na bapakano te. Wayland Hand oyo azali koteya bankota mpe bizaleli ya baAlemá alobi ete bazali “kokuta yango epai na mabota nyonso ya mokili mobimba”. Elongo na ndeko na ye moko, M. Tally, asila kokoma pene na milio moko ya biyambayamba ezwami bobele na Etats-Unis.
Lokola bazali na mposa ya koyeba avenire na bango, baklisto mingi ya maloba bazali komibalola epai na astroloji-lolenge moko na biyambayamba ya kala oyo eumeli mingi. Mpe, likambo ya kokamwa ezali komonana kati na likambo yango, bindimeli wana ya biyambayamba endimami mbala mosusu polele epai na bakonzi ya mangomba. Na ndakisa totalela likambo oyo ebimaki na New York na mokolo ya malili ya 10 Janvier 1982 na ntango basalaki misa ya Epiphanie, misa oyo basalaki na libanda mpo na bato banso epai na nganga-nzambe mokonzi ya Lingomba orthodoxe greke ya Azi na nkombo Vasilios. New York Post ezali koyebisa ete na nsuka ya misa abwakaki ekuluse moko ya wolo kati na ebale East River mpe alobaki epai na bayangani ete ye oyo akobimisa yango akozala na esengo na mikolo na ye oyo etikali.
Kasi mateya ya boklisto ezali na boyokani elongo na biyambayamba? Mokomi moko alobaki boye: “Ezali likolo na nkunda ya kondima nde bafololo ya biyambayamba ezali kokola.” Nzokande, tosengeli komizela te ete lingomba ya boklisto enyata mpe ebengana kobanga nyonso ya biyambayamba?
Lingomba ezali kobengana kobanga ya biyambayamba?
Ezali yango nde lingomba ya solo esengeli kosala, mpe ezali yango mpenza nde esalaki na ekeke ya liboso. Baklisto ya yambo, baoyo bazalaki mpenza kofanda na mokili ya Baloma oyo etondi na biyambayamba, bakimaki biyambayamba. Kasi nsima na liwa ya bantoma na Klisto, mateya na lokuta, kati na yango biyambayamba ezalaki, ebandaki komikotisa kati na lisangá. (1 Timote 4:1, 7; Misala 20:30) Kelasi ya bakonzi na lingomba ebotamaki, mpe motindo moko, engebene mokanda Lisolo ya Lingomba na boklisto (Angl.), babandaki kosalela horoscopes mpe kobatela biyambayamba mosusu. Na nsima, bakomisaki misala wana ya bapakano misala ya “boklisto”.
Ezali boni na mikolo na biso? Lingomba ezali ntango nyonso kondima biyambayamba. Ezali yango nde ezali komonana na Suriname epai kuna baklisto mingi ya maloba oyo bauta na Afrika bazali kolata bikelakela oyo bazali kokanisa ete ekobatela bango liboso na bilimu mabe. Mpo na yango, moto moko alobaki boye mokolo mosusu: “Bato oyo bazali na bomoi, bazali kolya, kosala mpe kolala mikolo nyonso kati na kobanga.” Kati na mokili mobimba, bamilio na bato bazali bango mpe kobanga “milimo” ya bato bakufa. Nzokande, ezali likambo ya kokamwa na komona ete lingomba yango moko mbala mingi epesaki nzela na kondimisa bindimeli wana ya biyambayamba.
Totalela yango nsima na likambo oyo ebimaki na Madagascar, esanga moko ezwami pembeni na Afrika. Ntango bamisionere ya boklisto ya mokili babandaki kosakola bindimeli na bango, Bamalgaches babandaki koyokamela bango malamu, kasi baboyaki kotika bindimeli na bango ya bonkoko. Mangomba esalaki nini? Engebene zulunalo ya Kenya Daily Nation, “bamisionere ya liboso bapesaki nzela mpe bandimaki, nzokande na nsima bayaki komekola ezaleli yango”. Makama ezalaki nini? Lelo, pene na katikati ya bato na Madagascar batangami lokola “baklisto”, kasi bazali kobanga mingi “milimo” ya bankoko na bango! Mbala mingi babengaka nkutu sango to pasteur aya kobenisa mikwa ya nkoko moko liboso ete balongola ye na nkunda na ye ya kala mpo na nkunda mosusu ya sika ya libota. Ee, bakonzi na mangomba basili kokolisa lokuta oyo elobi ete na lisalisi ya biyambayamba, moto akoki kosepelisa, kolengola to kopesa kanyaka epai na Nzambe, Diable to mpe bankoko na ye.
Likambo yango ezali komonana mpe na Afrika ya Sudi, epai kuna 77% ya bato bazali komiloba ete bazali baklisto mpe epai kuna bazali kotanga bato mingi kati na milulu ya losambo. Lingomba ya bonkoko na Afrika, bakisa mpe mabe na yango, kobanga bankoko oyo bakufa, ezali bongo kobatela nguya na yango likolo na bamilio ya basambeli na yango. Na yango, kati na mikili mingi ya boklisto, lingomba ezali se kobomba biyambayamba ya kala oyo ezali kokola mpe koumela ntango nyonso.
Nzokande, lingomba ya solo ezali kobengana bobangi ya biyambayamba. Ndenge nini? Na nzela na boyebi oyo ezali likambo eleki ntina. Kasi ezali boyebi nini? Mpe ndenge nini tokoki kozwa yango?