Lingomba ya solo ezali kobengana kobanga—Ndenge nini?
BATO mibale ya Angleterre Edwin mpe Mona Radford bakamwaki. Nsima na kotanga bamilio mibale koleka ya bobangi ya biyambayamba, bamonaki ete yango ezali na Ecosse, na lnde, na Ouganda mpe na Amerike ya katikati. Bamitunaki mpo na koyeba soki nini ezali na ebandeli ya likambo motindo boye. Mokomi Robertson Davies alobi boye na bosolo nyonso: “Mwa boyokani ezali kati na biyambayamba mpe mwa bindimeli mingi ya kala liboso ete mangomba oyo toyebi sikawa ebotama.” Kasi “liboke ya bindimeli” yango ya kala oyo ebimisi biyambayamba ezali nini?
Ebandeli mpe kokola ya biyambayamba
Biblia ezali komonisa ete ezali mokili na Sinéar (ekolo oyo ezalaki kati na Tigre mpe Efrate mpe oyo na nsima babengaki yango Babilone) yango nde ezalaki ebandeli ya bindimeli ya lokuta ya mangomba, bakisa mpe biyambayamba. Ezali nde na mokili wana Nimrod, “moluki makasi na nyama” abandaki botongi ya mawa ya ndako molai ya Babele, ndako oyo elingaki kopesa nzela na losambo ya lokuta. Nzokande Jéhovah Nzambe akweisaki mokano ya batongi na kokotisaka mobulu kati na nkota na bango. Mokemoke batikaki mosala mpe bapalanganaki. (Genese 10:8-10; 11:2-9) Kasi bisika nyonso oyo bakendaki kofanda, bamemaki bindimeli wana, makanisi mpe masolo ya lokuta. Babele ezalaki bobele ebandeli ya lingomba na lokuta te. Nsima na mibu, ebimisaki mpe epanzaki bisika nyonso misala ya maji, bondoki mpe bindimeli ya biyambayamba lokola astroloji. (Tala Yisaya 47:12, 13; Danyele 2:27; 4:7.) Na ntina yango, mokanda Les grandes métropoles du monde antique (Bingumba minene ya mokili na kala) (Angl.) Ezali koloba boye: “Astroloji etongamaki likolo na makambo mibale ya Babilone: Bilembo ya Zodiake mpe losambo ya myoto. . . . Bato na Babilone bazalaki kodefa na bitando bopusi oyo bazalaki kopesa epai na banzambe na bango.”
Na nini makambo wana ya kala mazali kosimba biso? Mokanda ya Emoniseli ezali koyebisa biso ete ebongiseli ya mokili mobimba ya losambo na lokuta ebotamaki uta na lisalisi ya makanisi oyo mazalaki komonana mingimingi kati na Babilone ya kala. Ekoli kino ntango na biso mpe ebengami “Babilone Monene”. (Emoniseli 17:5) Mateya wana ya Babilone ezwaki mbongwana na boumeli ya bileko mpe na kotalela bizaleli ya esika na esika, likambo oyo epesaki nzela na kobotama ya mangomba ndenge na ndenge oyo tozali komona na mikolo na biso lelo. Nzokande lokola banzete ndenge na ndenge ekoki kobota na mabelé se moko, motindo moko mpe mangomba wana mpe biyambayamba ndenge na ndenge oyo epalangani kati na mokili ezwaki ebandeli na yango esika bobele moko: Babilone. Mpo na komonisa likambo na ndenge ya elilingi, totalela ndenge nini moko na bindimeli ya biyambayamba ya bato na Babilone emikotisaki kati na mangomba mwa mingi.
Eutelo ya kobanga bakufi
Bato ya Babilone bazalaki kokanisa ete eteni moko ya nzoto na moto oyo ezangi komonana ezalaki kokufa te nsima na kufa ya nzoto mpe ekoki koya lisusu mpo na kosala malamu to mabe likolo na bato oyo bazali naino na bomoi. Na bongo babimisaki milulu oyo misengeli mpo na kolembisa nkanda ya bakufi mpe na komibatela liboso ya botomboki na bango. Kati na mikili mingi bato bazali naino kondima likanisi yango. Na ndakisa, na Afrika “ezali na ntina monene kati na bomoi ya mokolo na mokolo ya . . . bato mwa mingi”. Symboles, rites et communautés dans les religions africaines (Angl.).
Kati na mikili yango, bindimeli yango endimami ata epai na baoyo bazali komiloba ete bazali baklisto. Tala ndakisa, makambo oyo Henriette mwasi moko ya mibu 63 oyo azali moto na Afrika alobaki: “Atako nazali mosangani ya molende ya Lingomba ya misioni ya mboka na biso, nazalaki kobanga ‘milimo’ ya bato bakufa. Tozali kofanda penepene na cimetiere mpe ntango nyonso nkunda ebembe ezalaki kobelema penepene na ndako na biso, nazalaki kolamusa mwana na ngai mpe nazalaki kosimba ye makasi kino ntango nkunda ebembe ekoleka. Soki boye te, ‘molimo’ ya mokufi ekokota na ndako mpe ekozwa mwana na ngai ntango ezali ye kolala.”
Likanisi wana ya kobanga bakufi ekoli kino lelo mpo na liteya ya kozanga kokufa na molimo oyo boklisto ya mokili bakangami na yango. Lisolo ya bato ezali koyebisa biso ete bafilozofe ya bagreke, mingi mpenza Platon, akolisaki liteya ya bato na Babilone oyo ya kozanga kokufa na molimo. Engebene moto na Angleterre John Dunnett, molakisi na teoloji, ezali na bopusi na bango nde “likanisi ya kozanga kokufa na molimo epalangani kati na Mangomba ya boklisto”. Liteya wana ya bato na Babilone ekomisaki bamilio na bato baombo ya kobanga bibembe to bato bakufa.’
Lingomba ya solo ezali kobengana kobanga wana. Mpo na ntina nini? Mpamba te etongami likolo na bindimeli oyo euti na Babilone te, kasi likolo na mateya ya Biblia.
Ndimbola oyo Biblia ezali kopesa mpo na molimo
Mokanda ya liboso ya Biblia ezali koteya biso ete moto akomaki molimo, elingi koloba moto ya bomoi. (Genese 2:7) Ezali koyebisa lisusu ete ntango moto moko akufi, ezali molimo nde ekufi. Mosakoli Ezekiele azali kolongisa likanisi yango na maloba oyo: “Molimo oyo asali lisumu ye akokufa.” (Ezekiele 18:4; Baloma 3:23) Na yango molimo ekufaka mpe ezalaka na bomoi te nsima na liwa. Ezali yango nde Nzembo 146:4 ezali kondima: “Soko elimo ekolongwa, moto akozonga na mabelé lisusu, bobele na mokolo yango kokanisa na ye esili.” Yango wana molakisi John Dunnett azali koloba na nsuka ete kozanga kokufa na molimo “ezali liteya ya Biblia te”.
Soki molimo ezangi kokufa ezali te, na bongo ekoki mpe kozala na “milimo” ya bakufi te oyo ezali na nguya ya kobangisa bato oyo bazali na bomoi awa na mabelé. Na bongo, kobanga bato bakufa ezali na moboko te.
Kobanga etongami likolo na lokuta
Likambo ya kobanga bato bakufa ezali makasi. Mpo na nini? Mpamba te bikamwiseli mingi bisalamaka. Na yango, na butu moko, mwasi moko ya mobange oyo afandaka na Suriname ayokaki moto moko kobenga ye na nkombo na ye. Ayanolaki te, kasi “maboko” mazangi komonana mabandaki bongo kosimbasimba ye. Lokola azalaki komeka koboya, nguya moko ezangi komonana efinaki ye mpenza na nkingo. Mbala mosusu okokanisa boye: ‘Soki “milimo” ya bakufi ezali te, nani azalaki kotungisa mwasi wana?’ Awa mpe lisusu, boyebi ya Makomami ezali kopesa nzela na kobengana kobanga nyonso ya bato bakufa.
Biblia ezali kolimbola ete ezali mpenza na bilimu mabe, oyo babengi bango bademo. Bademo yango bazali mpenza milimo ya bato bakufa te, kasi baanzelu oyo batombokelaki Nzambe mpe basanganaki na Satana, “mozimbisi na bato na mokili mobimba”. (Emoniseli 12:9; Yakobo 2:19; Baefese 6:12; 2 Petelo 2:4) Biblia ezali koyebisa ete bilimu mabe bazali kosepela na kokosa, na kobangisa mpe na kotungisa bato. Lisolo oyo eyebisami kati na Luka 9:37-43 ezali koyebisa ete demo moko akatelaki mwana moko na “kobimisaka fulufulu na monoko na ye” mpe abwakaki ye na nse, mpe atuti ye. Ata ntango bamemaki mwana yango epai na Yesu, elimo mabe ebwakaki ye na mabelé mpe etutaki ye makasi. Kasi, lisolo elobi lisusu ete, Yesu apamelaki elimo yango ya mbindo, abikisaki elenge mobali mpe apesaki ye na maboko ya tata na ye.”
Tokomona ete Encyclopédie de littérature biblique, théologique et ecclésiastique (Angl.) ezali kolimbola biyambayamba lokola “losambo ya banzambe na lokuta”. Na bongo, kozala na bobangi ya milimo na bato bakufa ezali bongo koluka komitya na ngambo, mbala mosusu kozanga kotya ntembe, “ya banzambe na lokuta”, to bilimu mabe! Komitika to komipesa na losambo motindo yango oyo etongami likolo na libunga ezali mpenza lisumu monene liboso na Jéhovah Nzambe.—Kokokisa 1 Bakolinti 10:10 na Deteronome 18:10-12.a
‘Omikitisa liboso na Nzambe’—Okosala yango?
Okozala na nguya makasi mpo na kokima bilimu mabe na kobwakaka biyambayamba? Ezali solo ete bilimu mabe bazali na nguya, kasi nsima na komonisa ete esengeli na biso kosala liponi kati na losambo ya Jéhovah Nzambe mpe oyo ya bilimu mabe, ntoma Paulo atuni motuna oyo: “Toleki ye (Jéhovah) na nguya?” (1 Bakolinti 10:21, 22) Nzokande, tobosana te ete Satana na bilimu mabe na ye bazangi mpe nguya liboso na Jéhovah! Nkutu, bilimu mabe “bazali kolenga” liboso na Jéhovah. (Yakobo 2:19) Kasi Nzambe Mozwi-na-Nguya—Nyonso akoki kobatela yo soki esengi ye yango. Mokomi na Biblia Yakobo alobi mwa mosika: “Botosaka Nzambe. Botemelaka oyo na mabe mpe akokima longwa na bino.” (Yakobo 4:7) Bobangi na yo oyo etali bato bakufa yango mpe ekokima motindo moko.
Ezali yango nde bamilio na bato ya mokili mobimba oyo kala bazalaki na kobanga mpe bazalaki baombo ya biyambayamba bakoki koloba. Diable akimaki mosika na bango. Ndenge nini? Kobosana te ete boyebi ezali monguna ya biyambayamba. Engebene molakisi Rudolph Brasch, oyo amipesi na boyekoli ya ebandeli ya biyambayamba, “nyonso etali mateya ntango bato bazali koyekola mingi, bazali mpe kokima biyambayamba”.
Tala ndenge nini, nsima na kondima koyekola Biblia kozanga kofuta mosolo elongo na Témoin de Jéhovah moko, Henriette, oyo totangaki ye na ebandeli, amonaki na mbala moko bokosi ya bademo. Bikangeli oyo bizalaki kokomisa ye moombo ya biyambayamba ekweaki. Lokola bato mingi mosusu, amonaki bosolo ya maloba oyo mazwami kati na Baebele 2:15. Ntoma Paulo azali bongo koloba kati na verset yango ete Yesu “akobikisa baoyo nyonso, bomoi na bango mobimba, ezalaki na boombo ya kobanga liwa”. (Yelusaleme) Ya solo mpenza lokola moi ya ntongo elimwisaka ebele na mamwe oyo ezali kozipa zamba, polele ya basolo na Biblia yango mpe ezali na nguya ya kolimwisa bobangi nyonso ya milimo ya bato bakufa.
Lelo oyo, bato mingi oyo bazalaki kala ‘baombo ya kobanga’ bakataki nsinga ya bikelakela na nkingo na bango mpe balongolaki nsinga ya libateli to ya chance epai na bana na bango. Sikawa bazali kokabola mayoki ya Yisaka, ndoki ya kala oyo azalaki kosalisa bato na Afrika ya Sudi, ye azali na mibu 68, oyo nsima na koyekola Biblia elongo na ba Témoins de Jéhovah, angangaki: “Nazali na esengo koleka mpe nazali komiyoka ete nazali libre mpamba te nazali lisusu kotungisama na kobanga ya bilimu te.” Motindo boni maloba na Yesu oyo mazali solo: “Bokoyeba solo, mpe solo ekosikola bino”!—Yoane 8:32.
Ee, lingomba ya solo ezali kobengana kobanga!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na Misala 25:19, mabongoli mosusu ya Biblia (lokola oyo ya Grosjean mpe Létermy, ya Osterwald to ya Maistre de Sacy) ezali kobongola liloba na greke déisidaimonias, oyo elimboli kobanga bilimu mabe, na biyambayamba. Tala mpe liloba na nse ya lokasa ya Traduction du monde nouveau а références (Angl.).
[Elilingi na lokasa 5]
Biyambayamba epalanganaki kati na mokili mobimba longwa na Babilone