Ozalaka moto ya biyambayamba?
BIYAMBAYAMBA ezali na mokili mobimba. Ntango mosusu basepelaka na yango mingi mpo balobaka ete ezali makambo oyo bankɔkɔ batiká. Bato mosusu mpe bamonaka ete ezali kaka makambo mikemike oyo ebakisaka mungwa na bomoi. Na mikili ya Mpoto, bazwaka biyambayamba lokola makambo ya mikemike. Na bisika mosusu, na ndakisa na Afrika, bato bandimaka biyambayamba mingi.
Mimeseno mingi ya bato ya Afrika euti na biyambayamba. Mbala mingi, na bafilme, baemisyo ya radio, mpe na mikanda oyo babimisaka na Afrika, balobelaka biyambayamba, masolo ya bondɔki, losambo ya bonkɔkɔ, mpe bankisi. Mpo na nini bato bakangami mingi na biyambayamba mpe yango eutá wapi?
Biyambayamba eutá wapi?
Biyambayamba eutá mingimingi na makambo ya kobanga bilimo ya bato oyo bakufá to bilimo nyonso. Soki likambo moko esalemi, balobaka ete ezali elembo ete bilimo bazali kokanela, kokebisa to kopambola.
Kosala bankisi ya bonkɔkɔ mpo na kosilisa maladi esangani mpe na biyambayamba. Na mikili ya bobola, nkisi ya monganga ezali na ntalo mingi mpe ntango mosusu emonanaka te. Yango wana, ebele ya bato balukaka lisalisi to komibatela na nkisi ya bonkɔkɔ, na bikelakela mpe na biyambayamba. Lisusu, bamonaka ete kokende epai ya nganga-nkisi oyo ayebi bonkɔkɔ na bango mpe akoki kosolola na ye na monɔkɔ ya mboka, ezali pɛtɛɛ na esika ya kokende epai ya monganga na lopitalo. Yango esalaka ete biyambayamba esila te.
Na biyambayamba ya bonkɔkɔ, balobaka ete maladi mpe makama ya ndenge na ndenge eyaka mpamba te, eutaka epai ya bilimo. Banganga-nkisi bakoki koloba ete nkɔkɔ moko oyo akufá asiliki mpo na likambo moko boye. To bato oyo basololaka na bilimo bakoki koloba ete nganga-nkisi mosusu nde asali bikelakela mpo na kobwakela moto maladi to kolɔka ye azwa likama.
Biyambayamba ekeseni esika na esika, mpe kopalangana na yango etalelaka bonkɔkɔ, masapo, mpe makambo mosusu oyo esalemaka. Kasi, na bisika nyonso bandimaka ete esengeli kobondela moto moko ya mokili ya bilimo.
Ezali na mabe moko te to ezali likama?
Na mabota mingi, kobota mapasa ezalaka likambo monene mpe esepelisaka mpenza. Kasi, mpo na bato ya biyambayamba, ekoki kolimbola likambo mosusu. Na bisika mosusu na Afrika ya Wɛsti, bato ebele bakanisaka ete bana mapasa bazali bana ya mai to mwa banzambe, mpe basambelaka bango. Soki lipasa moko akufi, basalaka mwa bikeko ya mike ya mapasa yango, mpe libota mobimba basengeli kopesa bikeko yango bilei. Na bisika mosusu, kobota mapasa ezali libabe; kutu, baboti mosusu babomaka lipasa moko. Mpo na nini? Bakanisaka ete soki batiki mapasa mibale na bomoi, mokolo mosusu bakoboma baboti na bango.
Makambo ya ndenge wana ezali komonisa ete, atako biyambayamba mosusu ekoki komonana makambo mikemike oyo bato basepelaka na yango mpe ekoki kosala mabe te, mosusu ekoki kozala likama to mpe ekoki komema na liwa. Mwa likambo mosusu ya moke ekoki kosalema, kasi bakoki kopesa yango ndimbola moko oyo ekokómisa yango likambo monene oyo ekoki komema likama.
Ya solo, biyambayamba ezali nde bindimeli, ezali nde losambo mobimba. Soki totaleli makama oyo biyambayamba ekoki komema, ebongi mpenza tómituna: Bato ya biyambayamba basalelaka mpenzampenza nani?
Esika biyambayamba euti
Atako makambo ebele emonisaka ete Satana to bilimo mabe bazali, bato mosusu lelo oyo baboyaka kondima yango. Nzokande, na ntango ya bitumba, koboya kondima ete monguna ya makasi azali ezalaka likama. Ezali se ndenge moko mpo na etumba oyo tozali na yango na bikelamu ya elimo mpamba te ntoma Paulo akomaki ete: “Tozali kobunda . . . na bilimu mabe.”—Baefese 6:12, NW.
Ata soki tokoki komona bango te, bilimu mabe bazali. Biblia elobi ete elimo moko asalelaki nyoka, lokola bato oyo balobaka nsima ya ekeko moko kasi bazali komonana te; elimo yango asololaki na mwasi ya liboso, Eva, mpe atindaki ye atombokela Nzambe. (Genese 3:1-5) Biblia ebengi ekelamu yango ya elimo ete “nyoka ya ebandeli, oyo abengami Zabolo mpe Satana, oyo azali kobungisa mabele mobimba oyo efandami nzela.” (Emoniseli 12:9, NW) Satana alongaki mpe kobenda baanzelu mosusu ete bátombokela Nzambe. (Yuda 6) Baanzelu mabe yango babengami bademo mpe bazali banguna ya Nzambe.
Yesu abenganaki bademo oyo bakɔtelaki bato, bayekoli na ye mpe basalaki bongo. (Malako 1:34; Misala 16:18) Bilimo yango bazali te bankɔkɔ oyo bakufá kala, mpamba te bakufi “bayebi likambo te.” (Mosakoli 9:5) Bazali nde baanzelu batomboki oyo Satana apɛngwisaki. Kosolola na bango to komitika ete bátambwisa biso ezali likama monene, mpamba te balukaka kolya biso, ndenge moko na mokonzi na bango Satana Zabolo. (1 Petelo 5:8) Mokano na bango ezali ya kopɛngwisa biso mpo tóbungisa elikya kaka moko oyo bato bazali na yango: Bokonzi ya Nzambe.
Biblia emonisi mayele moko oyo Satana na bademo na ye bazali kosalela: “Satana ye moko azali kokoba komibimisa lokola anzelu moko ya pole.” (2 Bakolinti 11:14, NW) Mposa ya Satana ezali ete akosa biso mpo tóndima ete akoki kopesa biso bomoi ya malamu koleka. Yango wana, tokoki komona ete bato mosusu bazali kozwa makambo mosusu ya malamu na lisalisi ya bilimo mabe. Kasi bakoki kosilisa mikakatano mpo na libela te. (2 Petelo 2:4) Bakoki te kopesa moto bomoi ya seko, mpe etikali moke bábomama. (Baloma 16:20) Kaka Mozalisi na biso nde akoki kopesa moto bomoi ya seko mpe bolamu ya solo, mpe abatelaka biso malamu koleka liboso ya misala ya bilimo mabe.—Yakobo 4:7.
Nzambe apekisi koluka lisalisi na nzela ya bikelakela. (Deteronome 18:10-12; 2 Mikonzi 21:6) Wana ezali lokola kokóma moninga ya monguna, kosala boyokani na batomboki ya Nzambe! Kotala horoscope, kokɔta ndako ya nganga-nkisi, to komeka ata komeka mpamba kosalela biyambayamba ata ya ndenge nini ezali lokola kopesa nzela na bilimo mabe bálakisa biso bikateli oyo tokozwa na bomoi na biso. Ezali ndenge moko na komitya na ngámbo ya bikelamu oyo batombokelaki Nzambe.
Moto akoki kobatelama mpo mabe ekómela ye te?
Ade,a mobali moko oyo afandi na ekólo Niger, azalaki koyekola Biblia na Motatoli ya Yehova moko. Ade alimbolaki mpo na nini azalaki na nkisi na kati ya magazini na ye: “Banguna bazali mingi.” Moto oyo azalaki koteya Ade Biblia amonisaki ye ete kaka Yehova nde akoki kobatela na ndenge ya solo. Atángelaki Ade Nzembo 34:7, oyo elobi ete: “Anzelu ya Yehova akozingela esika ya baoyo bakotosaka ye; mpe akobikisa bango.” Ade alobaki ete: “Soki ezali solo ete Yehova akoki mpenza kobatela ngai, boye nakolongola bankisi yango.” Lelo oyo, mbula mingi na nsima, Ade azali nkulutu mpe mobongisi-nzela. Monguna moko te asalaki ye mabe.
Biblia ezali komonisa ete makambo oyo moto ayebaka te ete ekoki kosalema eyelaka biso nyonso, ezala bato ya biyambayamba to bato oyo bandimaka yango te. (Mosakoli 9:11, NW) Yehova amekaka biso na makambo ya mabe te. (Yakobo 1:13) Lisumu ya Adama nde ememelá biso liwa mpe ezaleli ya kozanga kokoka. (Baloma 5:12) Yango wana biso nyonso tobɛlaka mbala na mbala, mpe lisusu tosalaka mabunga oyo ekoki komemela biso makama. Na yango, ebongi te koloba ete maladi nyonso to mabe nyonso oyo eyeli biso ezali misala ya bilimo mabe. Soki tozali kokanisa ndenge wana, ekotinda biso tóluka kosala likambo moko boye mpo na kokitisa mitema ya bilimo.b Soki tobɛli maladi, tosengeli koluka kozwa nkisi oyo ebongi, kasi tosengeli te koluka kozwa lisalisi oyo euti na Satana Zabolo, “moto ya lokuta mpe tata ya lokuta.” (Yoane 8:44, NW) Bato oyo bafandi na bikólo oyo bazalaka na biyambayamba ya bonkɔkɔ, bazalaka na bomoi ya molai te to mpe ya malamu te koleka bato ya bikólo mosusu. Yango ezali komonisa polele ete kozala moto ya biyambayamba esalaka eloko moko te na bokolɔngɔnɔ ya nzoto ya moto.
Nzambe aleki bilimo mabe nyonso na nguya, mpe amibanzabanzaka mpo na bolamu na biso. “Miso ya Yehova ezali likoló ya bayengebene, mpe matoi na ye epai ya lilɔmbɔ na bango.” (1 Petelo 3:12, NW) Bondelá ye mpo abatela yo mpe apesa yo bwanya. (Masese 15:29; 18:10) Salá makasi mpo na kokanga ntina ya makambo oyo ezali na Liloba Mosantu, Biblia. Boyebi ya sikisiki ya Biblia nde ezali libateli oyo eleki malamu oyo tokoki kozala na yango. Ekosalisa biso tóyeba mpo na nini makambo ya mabe ekoki koyela moto mpe ndenge nini Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso akoki kondima biso.
Matomba ya kozala na boyebi ya Nzambe
Mpo na kozwa libateli ya solo, esengeli tóyeba Yehova malamumalamu mpe mikano na ye; yango ekeseni mpenza na kozanga koyeba mpe kozala moto ya biyambayamba. Tokoki komona yango malamu na ndakisa ya Jean, mobali moko ya ekólo Benin. Jean na bandeko na ye bazalaki mpenza bato ya biyambayamba. Na bonkɔkɔ na bango, mwasi oyo aboti mwana ya mobali asengeli kofanda mikolo libwa na mwa ndako ya ndɛlɛ oyo babongisá mpo na basi oyo bauti kobota. Soki aboti mwana ya mwasi, akofanda kuna mikolo nsambo.
Na 1975, mwasi ya Jean abotaki mwana mobali moko ya kitoko, mpe bapesaki ye nkombo Marc. Mpo na kolanda makambo ya Biblia oyo bayekolaki, Jean na mwasi na ye baboyaki kosalela makambo ya bilimo mabe. Kasi balingaki nde kotika ete kobanga mpe makɛlɛlɛ ya bandeko mosusu ya libota etinda bango bálanda biyambayamba mpe mama ya mwana akɔta ndako? Te, baboyaki kolanda biyambayamba wana ya mboka na bango.—Baloma 6:16; 2 Bakolinti 6:14, 15.
Likambo moko ya mabe ekómelaki libota ya Jean? Bambula mingi esili koleka, mpe lelo oyo Marc azali mosaleli na misala na lisangá ya Batatoli ya Yehova na mboka wana. Libota mobimba bazali na esengo mpo ete baboyaki kolanda biyambayamba mpe kobebisa elimo na bango.—1 Bakolinti 10:21, 22.
Baklisto ya solo basengeli kobwaka makambo ya molili ya biyambayamba mpe basengeli kondima pole ya elimo oyo Mozalisi, Yehova, mpe mwana na ye Yesu Klisto bapesaka. Na ndenge yango nde bakozala na kimya ya makanisi oyo eutaka na koyeba ete bazali kosala makambo oyo ebongi na miso ya Nzambe.—Yoane 8:32.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Topesi bango bankombo mosusu.
b Talá lisolo “Zabolo nde apesaka biso maladi?” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛmbɛ 1999.
[Etanda/Elilingi na lokasa 5]
Biyambayamba oyo ezali bisika mingi na mokili
• Banzete oyo balyaka na yango oyo etɛlɛmi na kati ya saani ya loso ezali elembo ya liwa
• Soki moto amoni esulungutu na moi akozwa libabe
• Buji oyo ekufi ntango molulu moko ezali kosalema elimbolaka ete bilimo mabe bazali pembeni
• Kokweisa lingɛmbu (parasol) na mabele elimbolaka ete moto akobomama na kati ya ndako
• Kotya ekɔti likoló ya mbeto ememaka libabe
• Soki ngonga ezali kobɛta, ebenganaka bademo
• Soki moto afuli babuji oyo ezali likoló ya gato ya fɛti ya mbotama mpe abomi yango nyonso mbala moko, likambo oyo azali kolinga ekokokisama
• Soki kɔmbɔ etuti mbeto, epesaka bilimo mabe oyo ezali na kɔmbɔ yango nzela ya kopesa mbeto yango lisuma
• Nyau ya moindo oyo akatisi nzela oyo ozali kotambola ezali libabe
• Soki moto akweisi kanya elimboli ete mopaya azali koya
• Soki batii elilingi ya nzoku etalana na ekuke, ezalaka makila malamu
• Soki batii ebende oyo batyaka na ensobu ya mpunda likoló ya ekuke, ezali makila malamu
• Nzete ya lierre oyo ezali kokola likoló ya ndako ebatelaka ndako
• Koleka na nse ya ebuteli epesaka libabe
• Soki moto apasoli talatala elingi koloba akozala na libabe mbula nsambo
• Soki moto asopi poivre elimboli ete akoswana na moninga na ye ya motema
• Kosopa mungwa ememaka libabe, kasi soki ozwi mwa ndambo moke mpe obwaki yango nsima ya lipeka ya lobɔkɔ ya mwasi, libabe ekoya te
• Kotika kiti oyo ediembaka eninganaka yango moko ntango moto afandeli yango te ezali kobenga bademo báya kofandela yango
• Kotika nse ya sapato etala na likoló epesaka libabe
• Ntango moto akufi, esengeli kofungola maninisa mpo ete molimo na ye ekoka kobima na ndako
[Etanda na lokasa 6]
Alongwaki na boombo ya biyambayamba
Batatoli ya Yehova bazalaki kosakola na mboka moko na Afrika ya Sudi. Babɛtaki na ndako moko mpe bamonaki mwasi oyo ayei kofungola, alati molato ya Sangoma (nganga-nkisi) nzoto mobimba. Balingaki kokende, kasi mwasi yango alobaki na bango báyebisa ye nsango oyo bazalaki kosakola. Motatoli moko atángaki Deteronome 18:10-12 mpo na komonisa ye likanisi ya Nzambe mpo na bikelakela. Nganga-nkisi yango andimaki nsango yango mpe andimaki báyekolaka na ye Biblia. Alobaki ete soki boyekoli ya Biblia endimisi ye ete mosala ya Sangoma eyokani te na mokano ya Yehova, akotika yango.
Nsima ya koyekola mokapo 10 ya buku Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis na lisalisi ya Biblia, atumbaki biloko na ye nyonso ya bonganga-nkisi mpe abandaki koyangana na makita na Ndako ya Bokonzi. Akomisaki mpe libala na ye na buku ya Leta, atako ye na mobali na ye bakabwanaki esilaki kolela mbula 17. Lelo oyo, bango mibale bazali Batatoli ya Yehova oyo bazwá batisimo.
[Elilingi na lokasa 6]
“Sangoma” moko azali kobwaka mikuwa mpo na koyeba esika mikakatano ya moto ya maladi euti
[Bililingi na lokasa 7]
Boyebi ya solosolo ya Nzambe ebatelaka na ndenge ya solo mpe epesaka bolamu