Lingomba ekoki kokokisa bamposa na biso?
TOKOLYA nini? Tokomela nini? Tokolata nini? Ezali wana mabanzo minene, mingimingi epai na baoyo bazali na mpasi mpo na komilukela biloko bisengeli na bango mpo na kobikela. Kasi tosimba maloba oyo ya Yesu: “Botungisa mitema na bino te ete bokolya nini mpe ete bokomela nini soko ete bokolatisa nzoto na bino nini.” (Matai 6:25) Maloba yango makamwisi yo? Ya solo, ntango moto azangi bilei, bilamba to ndako, azali mpenza na mposa ete basalisa ye na esika ya koyoka maloba mpamba, oyo mpo na bamoko ekozanga ata elengi.
Yesu akangaki motema te liboso na bamposa motindo yango. Nde atyelaki yango likebi. Ata bongo, ayebaki mpe likambo monene oyo moto akomikotisa na yango na kolingaka kokokisa bamposa na ye: likama yango ezali oyo ya kopesa ntina mingi na biloko ya mosuni mpe komona ete Nzambe azali na esika te. Esengeli bongo koyeba esika ya likambo mokomoko.
Tokokoka kosala bongo na kolandaka toli oyo ya Yesu: “Bolukaka nde liboso Bokonzi na Nzambe mpe boyengebene na ye mpe biloko oyo nyonso ekobakisama na bino.” (Matai 6:33) Wana ekotya biso makasi mpo na kolanda toli oyo, lingomba tolingi kolobela lingomba ya solo, oyo ezwi moboko kati na basolo ya Biblia ekoki mpenza kokokisa bamposa na biso.
Yesu azalaki na makanisi mabongi. Alobaki te ete wana moto akomi moyekoli na ye mpe abandi kobatela mitinda na ye, bobele na ntango yango, mikakatano na ye nyonso ekosila. Alingaki mpe koloba te ete bayekoli na ye bakokanga maboko mpe kozela ete Nzambe akokisa bamposa na bango na ndenge ya likamwisi. Soko ezala ndenge yango, moto nyonso akolinga kokoma moklisto nokinoki na elikya ete bampasi na ye nyonso esila mbala moko! Yesu alingaki nde komonisa ete Tata na ye, Jéhovah Nzambe, azali kopesa biso nyonso oyo tozali na yango mposa. Yango alobi na sikisiki ete: “Tata na bino na likolo ayebi ete bozali na bosenga na yango nyonso.”—Matai 6:32.
Jéhovah azali mpe kokokisa bamposa na biso ya elimo, oyo ezali na ntina mingi koleka. Na nzela na Makomami Mosantu, azali kopesa biso batoli oyo ekosalisa biso na kotambwisa bomoi na biso na lolenge malamu koleka. (Yisaya 48:17) Nzambe azali lisusu kosangisa basaleli na ye kati na lisangá moko oyo ezali kosunga bango soko mposa emonani. (Misala 4:34) Azali mpe kosalisa basaleli na ye na nzela na elimo santu na ye to makasi oyo ekosalaka misala. (Luka 11:13; Bagalatia 5:22-25) Mpe lisusu, azwaki bibongiseli mpo na kozongisa Paradis awa na mabelé.—Luka 23:43; Emoniseli 21:1-4.
Ndenge nini bamposa na biso ekokokisama
Totalela sikawa mitinda ya Biblia oyo esalisaki bamoko ete bakokisa bamposa na bango mpo na oyo etali biloko ya mosuni. Tala oyo ekomaki ntoma moklisto Paulo:
“Tomipetola mpenza na mbindo nyonso na nzoto mpe na elimo.” (2 Bakolinti 7:1)
Kanisa moke na bampasi nyonso oyo moto atiki komela likaya to tabaka to biloko bisusu ya mabe, akopengola. Soko tozali kolekisa ntango na biso mpambampamba te, to tozali kotya likebi te mpo na kotanga mikanda ya mbindo to tozali komipesa te na masano oyo ekobebisaka elimo, yango ekosalisa biso ete tomibombela mwa mosolo.
Makomami mabakisi:
“Zala elongo na bameli na masanga te, soko elongo na bato te baoyo bakolyaka mosuni na mposa mabe. Mpamba te kolanga mpe kolyaka mingimingi ekokomisa moto na bobola; goigoi ekolatisa mpe moto bilamba bipaswani.” (Masese 23:20, 21)
Tomoni ete molangwa mpe lokoso ya kolya ekomema na bobola mpe ekolatisa moto bilamba bipaswani. Bato mingi, ata baoyo bazali mpenza kobanga Nzambe, bakomi babola mpamba te bazali komipesa na komela masanga to bazali baombo ya misala oyo ekobebisaka nzoto. Ye oyo abwaki misala motindo yango mpo na kolanda masengami ya Biblia akozwa mwayé ya komileisa, ya komilatisa mpe ya kozwa ndako.
Etinda mosusu ezali kosalisa baklisto ete bakokisa bamposa na bango. Ebimisami na maloba malandi ya Paulo:
“Tondimi ete tozali na lisosoli na peto; tozali na mposa (kolongobana) na makambo nyonso.” (Baebele 13:18)
Ezali na kolongobana na makambo nyonso nde baklisto mingi bazali kokoka kokokisa bamposa na bango mpe oyo ya libota na bango. Bazali kozwa lokumu malamu mpe bato mosusu bazali kosepela kosala na bango elongo. Moto oyo azali na kolongobana akozanga mbala mosusu biloko mingimingi, kasi akoki ata bongo komizwela biloko bisengeli na ye mpo na kobikela mpe na ndenge yango kobatela lokumu na ye.
Toli mosusu ezali na likanisi ndenge moko: “Moyibi ayiba lisusu te, kasi tika ete asalaka mosala, asalisa maboko na ye misala ete akoka kokabela bango bazali kozanga.” (Baefese 4:28)
Na kotosaka etinda yango, baklisto mingi bakokaki kozwa mosala mpe kobatela yango, mpamba te bakokaki kotyela bango motema. Na ndenge yango bakokisaki bamposa na bango mpe oyo ya libota na bango. Bapesaki nzela te ete elimo ya mokili, oyo ezali kokanga miso na misala ya moyibi, elonga bango. Baklisto bazali koloba solo mpe bazali kozwela yango bolamu.
Tozwa ndakisa ya Témoin de Jéhovah moko, ye Mojaponé. Alingaki kokitisa ngonga oyo azalaki kolekisa na mosala ya mosuni mpo amipesa lisusu koleka na misala ya elimo. Ayebisaki likanisi na ye epai ya patron na ye, kasi aboyaki mpe abenganaki ye. Ntango mama ya patron ayokaki likambo yango, atunaki mwana na ye boye: “Ozali koyeba ete outi kobengana mosali oyo aleki basali na yo nyonso?” Témoin azwaki mpasi mosusu mpo abelaki mokongo na ndenge abandaki kosala mosala mosusu ya makasi. Nsima ya mwa ntango, akutanaki na patron na ye ya kala. Mosali na ye moko autaki koyiba ye wolo, platine mpe mpete na ndako na ye ya mosala. Yango epesaki ye nkanda makasi. Mpe kozanga kozela, patron abengisaki ye mpo azongela lisusu mosala na ye, mpe esengelaki ye moko mosali atya masengami na ye, mpamba te patron azalaki sikawa na mposa ya mosali moko oyo abukaka lokuta te.
Engebene ntoma Paulo, moklisto asengeli “kosala makasi”, bobele mpo na ye moko te, kasi lisusu “mpo na kokabela baoyo bazangi”. (Baefese 4:28) Na ntango ya mpasi, baklisto ya solo bazalaka pene mpo na kosalisa baninga na bango. Ezali ndenge yango libota moko ya bisanga bibengami Fidji basalisamaki nsima wana ndako na bango ekweisamaki na mopepe makasi na ntango oyo bango bazalaki na Assemblée. Ezongaki bango, ndako nyonso ekweaki. Kasi bandeko na bango kati na kondima basalelaki bongo bozwi na bango mpe ntango na bango mpo na kosalisa bango ete batonga lisusu ndako na bango. Tata alobaki boye: “Ezali elendiseli na koyeba ete baklisto bazali awa oyo bazali komibanzabanza mpo na biso!”
Yesu Klisto azalaki koyokela babola mawa. Mbala mingi mpe na ndenge ekeseni asalisaki baoyo bazangaki. Abosanaki te ete babola mpe mikakatano mosusu ya bomoi ekozala kino nsuka ya biloko mabe ya ntango oyo. (Yoane 12:8) Na yango, ata soko amipesaki mpo na kosalisa bato na kopesaka bango biloko ya mosuni, mosala na ye mpenza ezalaki ya kokokisa bamposa na bango ya elimo.
Epai na bibele oyo balandaki ye na Kapernaume, nsima wana balyaki mpe batondaki, Yesu alobaki: “Boluki ngai te mpo ete bomoni bilembo kasi mpo ete bolei mampa mpe botondi. Bosalaka te mpo na bilei bikobeba kasi mpo na bilei yango bikoumela kino bomoi na seko.” (Yoane 6:26, 27) Alingaki koloba nini na wana?
Alingaki koloba ete ezalaki mabe bato balanda ye mpe bayekoli na ye bobele mpo na kozwa biloko ya mosuni. Ayebaki malamu ete soko bazali kolanda ye mpo na kozwa bilei ya mosuni, yango ekomemela bango ata bolamu moko te oyo ekoki koumela. Yango wana alobaki na bango: “Esengo na baoyo bayebi mposa na bango ya elimo, mpamba te bokonzi na likolo ezali na bango. Esengo epai na bango bazali na mposa na kolya mpe komela boyengebene, mpamba te bakotonda.”—Matai 5:3, 6.
Soko moto azali na mposa ya kolya, azali mpe koyoka mposa ya koyeba solo mpe kokokisa mikano ya elimo. Bolamu ya solo ekozwama se na ntango moto akokisi mposa yango ya elimo. Boklisto ya mokili esili kobimisa bato oyo bamipesi na biloko ya mosuni, mpe mangomba na Asie basili kotika basembwi na bango na molili ya elimo. Kasi lingomba ya solo—lingomba oyo Yesu Klisto ateyaki-ezali kokokisa bamposa ya bato. Yo mpe okoki kozwa litomba na yango; ekosengela na yo ete osalela yango.
Mpo na kolimbola yango tolobela likambo ya elenge moko ya Ile Maurice. Mokolo moko, azwaki bazulunalo La Tour de Garde mpe Réveillez-vous! epai na moklisto moko oyo azalaki kokabola yango na nzela. Poso moko na nsima ayaki lisusu koluka bazulunalo mosusu. Alimbolaki ete bazulunalo yango esalisaki ye na kokanga ntina ya boboto na Nzambe na eleko oyo ye alingaki komiboma mpo na mitungisi na makambo matali mbongo. Nzala ya elimo ya elenge mobali yango ebandaki kosila.
Bamposa na biso ekokokisama mobimba mokolo mosusu? Biblia endimisi biso yango. Ezali solo ete bato, basili kolemba koyoka bilikya bizali kolaka bolamu, mpo mbala mingi bilikya yango bizali kokokana te. Kasi tokoki solo kotya motema na bilikya ya Biblia, mpamba te Jéhovah Nzambe, Mokomisi na yango, azali kokokisa elaka mokomoko. Yosua alobaki likambo yango epai na bandeko na ye Bayisraele na kokundwelaka bango maloba malandi: “Boyebi na mitema na bino mpe na milimo na bino nyonso ete eloko moko ezangi te na makambo malamu nyonso oyo Jéhovah Nzambe na bino atyaki ndaka na yango na ntina na bino. Yango nyonso ebimelaki bino, mpe eloko na yango moko ezangaki te.”—Yosua 23:14.
Mabanzo na biso ekosila mpenza nyonso na ntango oyo Nzambe akopetola mabelé mobimba engebene bilaka na ye ya kitoko. (Emoniseli 11:18) Bamposa na biso nyonso ekokokisama ntango Bokonzi ekokokisa mokano na ebandeli oyo Nzambe azalaki na yango mpo na bato na kozalisaka lisusu Paradis awa na mabelé. (Matai 6:9, 10) Ntango yango tokoyoka lisusu “makelele ya bato bazali kolela te to mongongo ya moto akomilela” mpo bamposa na ye ekokisami te.—Yisaya 65:17-25.
Maria, mamelo na kala oyo tobangaki na lisolo ya liboso andimaki likambo yango. Ayaki koyeba ete azalaki na molili na elimo uta bambula mingi, azalaki kobanga avenire mpe akokaki te koyeba ntina ya bomoi. Kasi boyekoli ya Biblia emonisaki ye ndimbola ya solo ya bomoi. Andimaki ete: “Nalongwe na molili mpe nakoti na pole.” (Nzembo 43:3; Masese 4:18) Na ndenge yango, akokaki bobele te kokokisa bamposa na ye ya mosuni, kasi na koleka asilisaki nzala na ye mpe mposa na ye ya elimo. Ee, lingomba ya solo ekoki kokokisa bamposa na biso.
[Elilingi na lokasa 7]
Lingomba ya solo ekokokisa bamposa na biso