Mpo na nini kotya likebi na lingomba?
KATI na bamboka nyonso awa na mabelé, bato batyaka likebi na lingomba. Epai mosusu, ezali na bato mingi oyo bazali koloba polele ete basepelaka na makambo ya Nzambe te. Kasi ezali wana maoki na bango uta kala?
Moto asalemaki na motindo boye ete akoki te kozala na esengo ya solo bobele na nzela ya biloko ya mosuni. Bato bazali na mposa ya makambo ya elimo. Bomoi ya mokolo na mokolo oyo etali kokokisa bobele bamposa ya mosuni, elongo na mwa bantango ya kominanola, ekoki mpenza te mpo na kosilisa bamposa oyo ezali na kati ya moto. Na kokesana na nyama, moto alingaka koyeba ‘Mokano ya bomoi ezali nini?’ ‘Bomoi oyo ya mokuse, oyo ezali na makambo kitoko mpe na makambo mabe lokola, nyonso esuki bobele na yango?’ Omituná naino te mituna lokola oyo?
Nzokande, bamilió mingi ya bato oyo bazali na bomoi na mikolo na biso bakólaki na bisika epai bato mosusu bazalaki kolɛmbisa bosepeli nyonso mpo na makambo na Nzambe. Bopusi wana bokokaki kouta na baboti, na balakisi, na baninga to ata mpe na bayangeli.
Skalabrino, elenge mobali moko ya mboka Albanie, alimbolaki ete na nsé ya boyangeli ya communisme bateyaki bato ete Nzambe azali te. Lisusu, ezalaki mpenza likámá mpo na bango kosolola na ntina na lingomba; kosala yango ekokaki komema moto na bolɔ́kɔ. Nzokande, na mobu 1991, ntango azalaki na Suisse lokola moto akimá mboka na ye, azwaki libaku ya koyekola Biblia. Andimaki yango. Mpo na nini?
Ya solo, na Albanie asilaki koyoka ete ezali na búku moko Biblia, kasi ayebaki mpenza eloko moko te na ntina na yango. Na bongo, na ebandeli ekokaki mpenza kozala te mposa ya kososola Biblia nde elamwisaki bosepeli na ye. Atako bayebisaki ye ete akoyekola mokano na Nzambe mpo na bato mpe mpo na mabelé, atalelaki lisusu yango lokola libaku malamu ya kokólisa boyebi na ye ya lokótá oyo bazalaki koloba na mboka yango. Nzokande, aumelaki te komona ete makambo oyo azalaki koyekola mazalaki kokokisa bamposa makasi ya elimo oyo azalaki na yango. Motema na ye motondaki na esengo na ntina na elaká ya Nzambe oyo etali mokili ya sika epai kuna kimya ekozala, mokili oyo kati na yango bato bakozala na bomoi ya seko mpe bakozala na ebele ya biloko oyo bazali na yango mposa mpo na kozala na bomoi. Bosepeli na ye bobakisamaki ntango ayekolaki ete ye mpe libota na ye bakoki kozala kati na mokili wana ya sika. Akokaki te kobomba nsango malamu wana mpo na ye moko, na yango abéngaki na telefone libota na ye oyo lizalaki na Albanie mpo na koyebisa bango yango.
Aleksei, oyo azali kofanda na mboka Russie, akamwaki mpe na bopusi oyo boyebi ya sikisiki ya Biblia ekoki kosala likoló na bomoi ya moto. Mpo ete azalaki na mikakatano mingi mpe mpo ete alóngaki te kozwa ndimbola malamu mpo na mokano ya bomoi, akanaki komiboma. Nzokande, yambo akendeki na Finlande kotala moninga na ye moko. Na nzela, wana azalaki kati na engbunduka, alobelaki mikakatano na ye epai na baninga mingi oyo bazalaki kosala mobembo elongo na ye. Kati na bango ezalaki na mwasi moko Motatoli ya Yehova, oyo alendisaki ye na koyekola Biblia mpamba te yango esilisaka mikakatano motindo wana. Azalaki mpenza na ntembe. Na mobembo ya bozongi, akutanaki na likambo lolenge moko. Na mbala oyo, ezalaki Motatoli mosusu ya mwasi oyo asololaki na ye polele mpenza mpe ayebisaki ye ete azalaki mpe na mikakatano motindo yango, kasi Biblia esalisaki ye na kolónga yango. Motatoli yango alendisaki mpe ye na koyekola Biblia. Ntango akómaki na ndako, babéngaki ye na telefone. Ezalaki moninga na ye moko ya mwasi, oyo azalaki koyekola elongo na Batatoli mpe azalaki na esengo mingi. Aleksei abandaki kososola ete mbala mosusu Biblia ekoki solo kopesa lisalisi oyo azalaki na yango mposa, kasi ayebaki ete akokaki te kososola yango kozanga ete basalisa ye. Andimaki kolanda boyekoli ya Biblia poso na poso na ndako na ye elongo na Batatoli ya Yehova, mpe abandaki koyangana na makita na bango. Aumelaki te na kososola mpo na nini baoyo bazali koyokanisa bomoi na bango na mateya ya Biblia bazali mpenza na esengo mingi, atako bazali kokutana na mikakatano oyo mikómelaka bato banso.
Lokola ayebaki lolenge moto asalemaki, Yesu Klisto alobaki ete: “Bomoi ya moto ezali kaka mpo na mampa te.” (Matayo 4:4, Boyokani ya Sika) Alobaki lisusu ete: “Esengo na baoyo bazali kososola bamposa na bango ya elimo.” (Matai 5:3, NW) Bazali na esengo mpo ete basosoli sikawa bamposa na bango, mpe bazali kosala matambe masengeli mpo na kokokisa yango, mpe bazali kozwa mapamboli ya Nzambe. Nzokande, mposa na biso ya elimo ekokokisama te bobele na kokɔtáká na lingomba moko to na kokendáká na ndakonzambe. Losambo oyo losalemi na milulu mingi lokoki kosepelisa maoki, kasi lozali solo kolakisa nzela malamu ya kosilisa mikakatano ya bomoi? Ata soki lingomba moko lizali kolendisa mwa mateya ya moboko oyo mabongi, soki yango ezali kolimbola te mokano ya solo ya bomoi, ekoki solo kokokisa mposa na yo ya elimo? Oyo eleki mpenza ntina, kosalela lingomba motindo yango ekoki komema na kozala na boyokani malamu elongo na Nzambe? Kozanga makambo oyo, bosepeli ya solo ekozala te.
Mpo na yango, bato mingi bazali koluka eloko oyo bazwi naino yango te.
[Elilingi na lokasa 3]
Bamposa na yo ya elimo ekokokisama solo na kokɔtáká na lingomba moko?
[Elilingi na lokasa 4]
Mingi bamonaki ete ntango bakómaki na bososoli ya Biblia, bomoi na bango ezwaki ndimbola ya sika