Sepelá na oyo ozali na yango
1 Makomami eyebisi biso ete tosengeli kokokisa bamposa ya bato ya ndako na biso. Kasi likambo yango esengeli te kokóma mokano ya liboso na bomoi na biso. Makambo ya elimo nde esengeli kozwa esika ya liboso. (Mat. 6:33; 1 Tim. 5:8) Na ‘bantango oyo ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza,’ ezali pɛtɛɛ te kozala na bokatikati na likambo yango. (2 Tim. 3:1, NW) Nini ekosalisa biso tózala na bokatikati na likambo yango?
2 Landá oyo Biblia elobi: Liloba ya Nzambe ekebisi biso ete koluka kokóma na bozwi mingi ekoki komema na libebi ya elimo. (Mos. 5:10; Mat. 13:22; 1 Tim. 6:9, 10) Na ntango oyo ya ntina mingi mpenza, ekoki kozala likama mpo na biso soki totii makanisi na biso mingi na mosala na biso ya mosuni to na makambo ya mbongo, mpe tozongisi makambo ya elimo—makita, boyekoli, mpe mosala ya kosakola—na esika ya mibale na bomoi na biso. (Luka 21:34-36) Nzokande, Biblia epesi toli oyo: “Lokola tozali na biloko ya kolya mpe na bilamba ya kolata, tokosepela na biloko yango.”—1 Tim. 6:7, 8, NW.
3 Yango elingi koloba te ete baklisto basengeli komikómisa babola. Kasi toli yango ezali kosalisa biso tóyeba biloko nini tosengeli na yango mpenzampenza: biloko ya kolya, bilamba, mpe esika ya kofanda oyo ekoki, na kotalela mboka oyo tofandi. Soki tozali na biloko oyo moto nyonso asengeli mpenza kozala na yango na bomoi na ye, tosengeli te koluka ntango nyonso kobakisa biloko mosusu ya malamu koleka. Ntango tozali kokanisa kosomba eloko moko boye to kozwa mosala mosusu oyo ekobakisama likoló ya oyo tosalaka liboso, ezali malamu tómituna motuna oyo: ‘Nasengeli mpenza na yango?’ Komituna bongo ekosalisa biso tólanda toli oyo epemami: “Tiká ete lolenge ya bomoi na bino ezanga bolingo ya mbongo; bósepelaka nde na biloko oyo bozali na yango sikoyo.”—Ebe. 13:5, NW.
4 Soki totyeli Yehova motema, akopambola biso. (Mas. 3:5, 6) Atako tosengeli kosala mosala makasi mpo na kozwa biloko oyo tosengeli na yango mokolo na mokolo, kasi totyaka te makanisi na biso nyonso kaka na biloko wana. Ezala tozali na biloko moke to ebele, totyelaka Yehova elikya ete akokokisa bamposa na biso. (Filp. 4:11-13) Boyokani malamu na Nzambe esalisaka biso tósepela na oyo tozali na yango mpe ememelaka biso ebele ya mapamboli mosusu.
5 Tólanda ndakisa ya kondima ya basusu: Mama moko oyo azalaki kobɔkɔla ye moko mwana na ye ya mwasi na nzela ya solo abandaki mokemoke kokómisa bomoi na ye pɛpɛlɛ. Atako azalaki malamu na ndako na ye moko, akendaki kofanda na mwa ndako moko ya moke mpe na nsima akómaki kofanda na eteni moko ya ndako ya etazi, esika bato mosusu bazalaki mpe kofutela. Yango esalisaki ye akitisa ngonga oyo azalaki kolekisa na mosala na ye mpe azwaki likoki ya kolekisaka ntango mingi na mosala ya kosakola. Mwana na ye akolaki mpe abalaki. Nsima na yango, mama yango asɛngaki ye moko azwa epaso na mosala, liboso kutu akokisa mbula oyo bazwaka epaso, atako ayebaki malamu ete akobanda kozwa lisusu mbongo oyo azalaki kozwa liboso te. Sikoyo, ndeko na biso wana akokisi mbula nsambo na mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza mpe ayokaka mawa te ndenge atikaki biloko mosusu mpo na kotya Bokonzi ya Nzambe na esika ya liboso na bomoi na ye.
6 Nkulutu moko na mwasi na ye basalaki mosala ya mobongisi-nzela na boumeli ya bambula mingi mpe na ntango wana kaka bazalaki na bana misato oyo bazalaki kobɔkɔla. Libota na bango, na esika báluka kokokisa makambo oyo mitema na bango elingi, bayekolaki nde kokokisa makambo oyo basengelaki na yango mpenza. Ndeko yango alobi boye: “Esɛngaki ete tózala na bomoi oyo ezangi mpenza mindɔndɔ. Atako na bantango mosusu tokutanaki na mikakatano, kasi ntango nyonso Yehova apesaki biso biloko oyo tosengelaki na yango. . . . Ntango namonaka ndenge libota na ngai ezali kotya makambo ya elimo na esika ya liboso motindo wana, namonaka ete makambo nyonso ezali mpenza ndenge esengeli kozala mpe bomoi na biso ezali malamu.” Mwasi na ye abakisi boye: “Ntango namonaka [mobali na ngai] azali na mosala mingi na makambo ya elimo, nayokaka esengo mingi na motema.” Bana na bango mpe basepelaka ndenge baboti na bango bazwaki ekateli ya kosalela Yehova na mosala ya ntango nyonso.
7 Mpo na baoyo nyonso baponi bomoi wana ya kokangama na Nzambe, na esika bámipesa na koluka biloko ya mokili, Biblia elaki bango mapamboli mingi banda sikoyo mpe na bomoi oyo ezali koya.—1 Tim. 4:8.