Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 1/7 nk. 21-24
  • Makabo na yo mamonisaka ete ozali na elimo ya komipesa?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makabo na yo mamonisaka ete ozali na elimo ya komipesa?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bibombelo ya makabo
  • Makanisi makeseni
  • “Na bobola na ye”
  • Kopesa maboko na losambo ya solo lelo oyo
  • Oyebaki yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Mopesi na “makabo nyonso malamu”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • “Kumisá Yehova na biloko na yo ya motuya”​—Ndenge nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • “Mosolo nyonso wana moutaka wapi?”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 1/7 nk. 21-24

Makabo na yo mamonisaka ete ozali na elimo ya komipesa?

Likanisi ebongi mpo na makabo

KATI na temple, nsima na koteya makambo ebele epai na bato, Yesu ‘afandi pembeni na Ebombelo na makabo mpe atali motindo mozalaki ebele na bato kobwaka mosolo kati na yango’. (Malako 12:41) Lisolo elandi ezali oyo ya mwasi mokufeli-mobali oyo apesaki mwa likabo ezalaki na ye. Kasi mpo na nini Yesu afandaki wana mpo na kotala baoyo bazalaki kopesa makabo? Alobaki epai na bayekoli na ye te ete ata loboko na bango ya mwasi esengelaki te koyeba oyo ezalaki kosala loboko ya mobali wana ezalaki bango kopesa makabo?​—Matai 6:3.

Liboso, Yesu apamelaki makasi bakonzi na mangomba oyo bazalaki kosalela myango ya nsoni mpo na kolya “bandako ya bakufeli-mibali”. Amonisaki ete “bakozwa ekweli eleki monene”. (Malako 12:40) Atyaki likebi na makambo oyo bato bazalaki kosala na esika yango, liboso na ebombelo na makabo, mpo na kobimisela yango liteya. Lelo oyo, biso baoyo tozali koyoka ndenge bato bazali kolobela mingi mpo na bozwi ya mangomba, na ndenge bazali kosalela yango mabe mpe na bomoi ya bozwi oyo ezali epai na baoyo bazali kosimba mosolo yango, tozali na bantina mingi ya kotalela malamu makambo oyo Yesu alobaki na libaku yango.​—Malako 12:41-44.

Bibombelo ya makabo

Lisolo elobi ete Yesu ‘afandi pembeni ya ebombelo’. Na ntembe te ezalaki na Lakur ya basi, esika bibombelo, to kesi etyamaki na mur mpo batyaka makabo kati na yango. Engebene bonkoko ya Bayuda, bakesi nyonso ezalaki 13. Bazalaki kobenga yango kelelo na hébreu, mpamba te mifinuku na yango ezalaki na madusu lokola oyo ekozalaka na kelelo. Elobami ete ‘moko te azalaki kokota na temple kozanga kotya kati na yango mwa eloko’.

Kati na mokanda na ye La Palestine au temps de Jésus-Christ (1885), professeur Edmond Stapfer, ye moto na France alobeli bibombelo yango ya makabo kino na makambo na yango ya mikemike; yango emonisi biso polele ndenge bomoi kati na lingomba ezalaki na eleko yango, mingimingi mpo na oyo etali makabo mapesamaki mpo na misala ya temple.

“Ebombelo mokomoko ezalaki na ntina na yango emonisamaki na likomi ya monoko na hébreu. Ya liboso ezalaki: Sikele ya sika, elingi koloba mosolo mopesamaki mpo ete esalelama na mbula wana; ya mibale: Sikele ya kala, elingi koloba mosolo mopesamaki mpo na makambo masengaki mbongo na mbula eleki; ya misato ekomamaki: Bibenga mpe ndeke mike; mosolo motyamaki na kati ezalaki kosalelama mpo na kofuta mbongo oyo esengamaki epai na oyo ayaki kopesa mabonza ya bibenga mibale to bandeke mibale ya mike, moko mpo na libonza, mosusu mpo na mbeka ya masumu. Na likolo ya eteni ya minei, ekomamaki: Mbeka, ezalaki mosolo mosalelamaki mpo na kosomba biloko bisengelaki mpo na mabonza mosusu. Ya mitano ekomamaki: Koni, ezalaki mpo na makabo ya bosembo mapesamaki mpo na kosomba koni ya etumbelo. Ya motoba: Mpaka na malasi (mbongo mpo na kosomba mpaka na malasi); ya nsambo: Mpo na esika ya bulee (mosolo mopesamaki mpo na mbondi.) Oyo motoba etikali ekomamaki: Makabo ya bolingo malamu.”

Bibombelo mibale ya liboso ezalaki mpo na kotya mpako ya moto na moto ya ndambo na meya (ezalaki palata mibale na mbongo ya Bagreke) oyo mobali nyonso akomaki mokolo asengelaki kofuta, na kolandaka Mobeko, mpo na kobatela temple, mpo na misala mizalaki kosalema kuna mpe mpo na mabonza mazalaki kopesama mokolo na mokolo mpo na libota mo mobimba. Mpako yango ezalaki kokangolama na bamboka mpe ememamaki na temple.​—Matai 17:24.

Mobeko ezalaki mpe kosenga epai na Bayisraele ete bapesa makabo ya ndenge na ndenge mpo na bango moko; bamoko mpo na masumu na bango, mosusu mpo na kokokisa milulu misusu, mpe mosusu lisusu mpo na komonisa ete bazali kobanga Nzambe mpe mpo na kopesa matondi. Mosolo motyamaki na bakesi likolo na yango ekomamaki “Ndeke mike mpe bana ya bibenga” mpe “Mabonza” ezalaki kosalelama mpo na mosolo nyonso mozalaki kobima na ntina ya mabonza. “Kati na kelelo no 3, mokanda Le temple, son ministere et ses services (angl.), elobi boye: “Basi oyo basengelaki kopesa ndeke mike lokola mabonza to makabo mpo na masumu bazalaki kotya mosolo mokokani na mabonza yango. Mosolo yango mozalaki kokongolama mikolo nyonso mpe bazalaki kosombela yango bandeke mike mpe kotumba yango mabonza.” Ezali yango baboti na Yesu basalaki.​—Tala Luka 2:22-24; Levitike 12:6-8.

Tolobela sikawa mpo na makabo mapesamaki mpo na koni mpe mpaka na malasi esalelami na etumbelo mpe makabo ya bolingo malamu. Professeur Stapfer alobi lisusu, “soko mbongo epesamaki mpo na koni to mpo na mpaka na malasi, ezalaki na motuya oyo na nse na yango basengelaki kopesa te. Esengelaki kopesa likabo kobanda na mosolo oyo bakokaki kosomba liboke na mpaka na malasi, to mosolo oyo bakoki kosomba na yango biteni mibale ya koni oyo ezali na 45 cm ya molai mpe ya mwa monene”.

Yango elakisi nini? Emonisi ete kobatela hema mpe na nsima kobatela temple ya Yelusaleme, esika ezalaki centre ya losambo ya solo, ezalaki kotyela Bayisraele mikumba mingi. Mabonza mpe makabo mazalaki eteni ya losambo na bango. Na bongo, engebene mobeko ‘moko te akokaki kobima liboso na Jéhovah maboko mpamba’. (Deteronome 16:16) Kasi, ndenge nini Bayisraele bazalaki kotalela mikumba yango?

Makanisi makeseni

Biblia emonisi ete Bayisraele bazalaki kofungola loboko mpe bamonisaki ezaleli ya bokabi na ntango na Moise, ya David mpe, bambula mingi na nsima, na biyangeli na Joas mpe Josias. (Exode 36:3-7; 1 Ntango 29:1-9; 2 Ntango 24:4-14; 34:9, 10) Bazalaki na esengo ya kopesa maboko na botongi mpe kobatelama ya ndako na Jéhovah, mpe komatisa losambo ya solo. Mayoki na bango emonisamaki polele na maloba malandi ya David: “Nasepelaki mingi wana balobelaki ngai ete, Tika tokende na ndako na Jéhovah.”​—Nzembo 122:1.

Kasi bango nyonso bazalaki na ezaleli ya bokabi te. Totangi boye ete na mikolo na Malaki, mingimingi, banganga nzambe bazalaki kobonzela Jéhovah “yango ebotolami mpe banyama batengumi mpe na malali”. Na esika ete basepela na libaku na bango ya mosala, bazalaki koloba: “Tolembi na likambo oyo solo!”​—Malaki 1:13.

Bobele bongo, na eleko na Yesu, bamoko bazalaki kosalela bisika to etemelo na bango mpo na kosalela matomba na bango moko. Na ndakisa, basenzi mosolo na temple, bazalaki kosanzé mbongo na koyibaka mwa moke. Bazalaki kozwa litomba mpo bobele makabo mapesamaki na mbongo ya Baebele ezalaki kondimama mpe baoyo nyonso bazalaki na mbongo ya Baromé to ya Bagreke basengelaki kosanze yango. Engebene Alfred Edersheim, sipesialiste mpo na lisolo ya Bayuda, “basenzi mosolo bakokaki kolongola mpo na lifuti na bango 1 méah, elingi koloba ndambo ya minei ya denali (denali ezalaki lifuti ya mokolo mobimba ya mosali), mpo na sikele mokomoko”. Soko ezalaki mpenza bongo, yango ezalaki mombongo malamu, mpe tokangi ntina mpo na yango bakonzi ya mangomba basilikaki makasi ntango bamonaki Yesu abengani basenzi mosolo kati na temple.

“Na bobola na ye”

Bandimbola oyo nyonso epesi lisusu kilo na elakiseli na Yesu oyo elobeli likabo ya bopolo oyo mwasi mokufeli-mobali atyaki na ntembe te, kati na kesi moko likolo na yango ekomamaki “Makabo ya bolingo malamu”. Lokola azalaki mokufeli-mobali, mwasi yango asengelaki te kofuta mpako ya temple mpe, lokola azangaki makoki, mbala mosusu akokaki te kosangisa mosolo mosengelaki mpo na mabonza, koni to makabo ya mpaka na malasi. Kasi alingaki kosala mwa likambo mpo na komonisa bolingo na ye epai na Jéhovah . Alingaki kotikala nsima te to kotikela libaku yango epai na baoyo bakokaki kosala eloko. Yango wana Yesu alobaki: “Kati na bobola na ye asili kobwaka mosolo na ye nyonso, lilei na ye nyonso.”​—Malako 12:44.

Tokoki kozwa mateya mingi ya motuya na lisolo yango. Oyo eleki monene ekoki kozala oyo elandi: Biso banso tozali na libaku malamu ya kosalela bozwi na biso ya mosuni mpo na kopesa maboko na losambo ya solo; nzokande, likambo oyo ezali kosepelisa Nzambe ezali boye ete topesa, mileki ya bozwi na biso te, kasi oyo ezali motuya mpo na biso. Na maloba mosusu, topesaka mpenza oyo ekoki kotika biso na bosenga te? To makabo na biso namonisaka mpenza elimo ya komipesa oyo ezali na biso?

Kopesa maboko na losambo ya solo lelo oyo

Lelo oyo, ba Témoins de Jéhovah bazali kopesa maboko na losambo ya solo na kosakolaka na molende nyonso “nsango malamu ya bokonzi . . . na mabelé mobimba.” (Matai 24:14) Kokokisa mosala yango kati na mokili mobimba ezali kosenga bobele milende, ntango mpe makasi te, kasi lisusu mosolo mingi. Lokola emonisi yango Annuaire ya ba Témoins de Jéhovah 1987, na “1986, mbongo nyonso la Société abimisaki ezalaki badolare 2 354 580 170 mpo na kopesa lisalisi na ba missionnaires 2 762, ba pionniers spéciaux 13 351 mpe bakengeli ya zongazonga 3 353 elongo na basi na bango mpe bakengeli ya distrike . Mosolo mobimisamaki mpe mpo na makambo mosusu, “mpamba te esengelaki kosomba, kotonga to kobongisa bandako, kosomba bamasini ya imprimerie to biloko ya bureau, ezala na siege mondial ya la Société to na bafiliales na yango 93. Esengelaki mpe kokokisa bamposa ya mosuni ya basali ya ba béthels 8 920.”

Bato mingi batunaka boye: Mosolo yango nyonso eutaka wapi?” Na bokeseni na Mangomba ya boklisto ya mokili, ba Témoins de Jéhovah basengaka mbongo te mpe batindaka mikanda te mpo na kosenga makabo. Kati na ba Salles na bango, ezali se na bakesi ya makabo-oyo ezali kokundola bibombelo ya ntango na kala. Mbala mosusu, ezali na bakesi mosusu mpo na makabo ya sikisiki, na ndakisa kotonga ba Salles du Royaume to ba Salles d’assemblées mpe kosalisa bamisionere mpo ete bakende koyangana na ba assemblées esalamaki na bamboka na bango. Makabo makoki mpe kotindama mbala moko na la Société Watch Tower, 25 columbia Heights, Brooklyn, New York 11201, Etats-Unis, to na filiale ya la Société na mboka na bino, mpo na kotombola mosala ya kosakola kati na mokili mobimba.

Ndenge nini otalelaka lolenge nyonso oyo ya makabo? Mpo na yo, lolenge oyo ya makabo ekokani na ndenge bato na ntango na Malaki bazalaki kotalela yango, mokumba mozali kolembisa mpe mozali kotinda yo omiloba na motema na yo: “Nalembi na likambo oyo solo!” To na ndakisa ya “mwasi mokufeli-mobali”, omonaka ete yango ezali mabaku ya komonisa molende na yo, litomba oyo ozali na yango mpo na lingomba ya solo mpe mposa na yo ya kokumisa Jéhovah na biloko na yo ya motuya? Kobosana te motuna oyo ya ntina mpenza: “Makabo na yo mazali komonisa ete ozali na elimo ya komipesa?”

“Meka ngai sasaipi na yango, soko nakozipwela bino maninisa na lola te kosopela bino lipamboli kino esika ekozanga mpo na yango. ” (Malaki 3:10) Bokoli ya elimo mpe mosala esili kokoma na biteni nyonso ya mokili ezali komonisa ete Jéhovah azali kokokisa elaka yango. Topesa ntango nyonso epai na Jéhovah makabo oyo mazali komonisa ete tozali na elimo ya komipesa.

[Etanda na lokasa 23]

NDENGE NINI OKOKI KOPESA MAKABO NA YO

◻ MAKABO: Makabo makoki kotindama mbala moko na Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania, 25 Columbia Heights, Brooklyn, New York 11201, Etats-Unis, to na filiale ya la Société ya mboka na bino. Likabo lokola ndako, mapango, bijoux to biloko mosusu bikoki mpe kotindama na la Société. Yango esengeli kotindama elongo na mokanda moke mpo na komonisa ete ezali makabo ya bolingo malamu.

◻ MAKABO: Mosolo mokoki kopesama na la Société mpe komonisa polele ete soko ozali na mposa na yango, bakoki kozongisela yo yango.

◻ MAKABO MAPESAMI KASI MAKOKl KOZONGISAMA: Mosolo mokoki kopesama na la Société Watch Tower na koyebisaka ete okoki kosenga yango ntango okozala na mposa na yango.

◻ ASSURANCE: La Société Watch Tower akoki kozwa lotomo ya kozwa mosolo motutami mpo na assurance-vie (kobatela nzoto). Mpo na yango, esengeli koyebisa la Société.

◻ FIDEICOMMIS: Na bamboka mosusu, compte ekoki kofungolama na banke mpo na la Société Watch Tower. Na yango esengeli koyebisa. Ba actions, ba obligations mpe biloko mosusu bikoki mpe kopesama, mpe mopesi akoki kobatela lotomo ya kosalela yango wana ezali ye na bomoi. Lolenge oyo ekopengola kobebisa mbongo mpe makama oyo makoki kobima mpo na koyeba soko testament ezali solo to te, mpe na kopesaka endimiseli epai na la Société ete akoki kozwa biloko soko owei.

◻ TESTAMENTS: Na bamboka misusu (kasi na France te), mapango to mpe ndako ekoki kopesama na la Société nsima na liwa na kokomaka testament oyo eyebani epai na Leta. Bongo kopi moko ya testament esengeli kotindama na la Société.

◻ Soko olingi koyeba makambo mingi na ntina yango to olingi kozwa batoli mpo na likambo yango, ekozala malamu ete okoma na la Société Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania, 25 Columbia Heights, Brooklyn, New York 11201, to a filiale ya la Société oyo ezali na mboka na bino.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto