Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye
Kobikisama ya mwana mobali moko azalaki na démo
WANA Yesu akendaki na ngomba Hermon, elongo na Petelo, Yakobo mpe Yoane, bayekoli mosusu bakutani na mokakatano. Ezongi ye, Yesu amoni mbala moko ete likambo moko ezali kotambola te. Ebele na bato bazingi bayekoli na ye, mpe bakomeli bazali mpenza kotyana ntembe makasi na bango. Emoni bango Yesu, bato bakamwe mpe bakimi mpo na kopesa ye mbote. Yesu atuni bango boye: “Bozali kotyana na bango ntembe na likambo nini?”
Moto moko amitangoli na etuluku na bato afukami liboso na ye mpe alimboli ye ete: “Molakisi, nayei na mwana mobali na ngai epai na yo, mpo ete azali na elimo na emimi. Soko ekokanga ye wapi, ekobwakaka ye na nse; ekobimisaka mfulu na monoko, ekopelisaka mino na ye, na bongo azali kokonda. Nalombi bayekoli na yo ete babimisa yango, nde bakoki te.”
Lokola bakomeli bamoni ete bayekoli bakoki te kobikisa mwana mobali oyo, babandi koseka bango. Bobele na ntango yango, Yesu ayei. Angangi boye: “E libota na kozanga kondima, naumela na bino ntango molai boni? Nayikela bino mpiko kino ntango nini?”
Yesu azali koloba epai na bayoki na ye nyonso, kasi na kozanga ntembe mpenza azali koloba mingimingi epai na bakomeli, oyo balingi kotumola bayekoli na ye. Bongo na nsima alobi na kotyaka mosapi epai na mwana mobali: “Bokamba ye awa na ngai.” Kasi wana mwana azali kobelema epai na Yesu, démo abwaki ye na mabelé mpe abandi konyokwama na mpasi. Abaluki na nse, mfulu etondi na mbebo.
Yesu atuni: “Ye asili koumela na oyo ntango molai boni?”
Bongo tata na ye ayanoli: “Longwa na bomwana na ye. Ekobwakaka ye kati na moto mpe kati na mai mpo na koboma ye.” Bongo abondeli Yesu na maloba oyo: “Kasi soko okoki kosala eloko, sunga biso mpe yokela biso mawa.”
Mbala mosusu, tata yango azali koluka lisalisi uta bambula mingi. Bongo sikawa, ndenge amoni ete bayekoli bakoki eloko te, azangi elikya. Yesu amoni ete atikali lisusu na elikya te, bongo alobi boye mpo na kolendisa ye: “Soko nakoki? Makambo nyonso makoki na moto na kondima.”
Tata na elenge yango angangi: “Nazali na kondima!” kasi abondeli boye: “Sunga ndai na ntembe na ngai!“
Yesu amoni ete bato bazali koya mbango epai na bango; yango wana angangeli demo yango na maloba oyo: “Yo elimo na ebubu, nazali kolaka yo, bima na ye mpe kotela ye lisusu tel!” Ntango elimo yango ebimi. engangisi mwana mobali yango mpe abandi kobendana mbala mingi mpenza. Bongo etiki ye na mabelé, na boye ete bato nyonso bazalaki wana balobi: “Asili kokufa!” Kasi Yesu asimbi ye na loboko, mpe atelemi.
Liboso na yango, wana atindaki bayekoli na ye bakende kosakola, babenganaki badémo. Yango wana eyanganaki bango kati na ndako moko, batuni ye mpenza: “Mpo na nini biso tokoki kobimisa ye te?”
Komonisaka ete ezali mpo bazangi kondima, Yesu ayanoli boye: “Motindo oyo ekoki kobima bobele na libondeli.” Esengelaki mpenza bamibongisa mpo na kobengana elimo mabe wana, oyo ezalaki makasi mingi.
Esengelaki kozala na kondima makasi mpe kobondela Nzambe mpo apesa bango nguya.
Nsima na yango, Yesu abakisi: “Mpamba te nazali koloba na bino ete, soko bozali na kondima ata lokola mombuma na sinapi, bokoloba na ngomba oyo ete, Tambola longwa awa kino esika kuna mpe ekotambola. Likambo moko te likoleka nguya na bino.”
Nguya nini kondima ekoki kozala na yango! Mabaku mpe mikakatano oyo ezali kobebisa mosala ya Jéhovah ekoki kokokana na ngomba monene. Nzokande, Yesu amonisi ete soki toloni kondima kati na motema, soko tobateli yango mpe tokolisi yango, ekotela mpe ekopesa biso likoki ya kolonga mabaku mpe mikakatano mikokani na bangomba. Malako 9:14-29; Matai 17:19, 20; Luka 9:37-43.
◆ Yesu ayei kokutana na makambo nini, wana eutaki ye na ngomba Hermon?
◆ Elendiseli nini Yesu apesi epai na tata na elenge mobali?
◆ Yesu amonisi ete nguya ya kondima ekoki kosala nini?