Boluka Jéhovah mpe bosalela ye na motema na bino mobimba
Mateya mauti na Makomami: Sofoni 1:1 kino 3:20
MBULA ntuku mitano liboso ete Bababilonyé babebisa libota na Yuda oyo epengwaki, Jéhovah alobaki na nzela na mosakoli na ye Sofoni: “Ee, nakobebisa biloko nyonso longwa na likolo na mokili.” (1:1, 2) Kasi Nzambe amonisaki lisusu epai na libota na ye nzela ya kobikela. (2:3; 3:9) Na yango, mokanda ya Sofoni ezali na mateya ya motuya mpo na biso banso oyo mosika te tokomona “etumba monene ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso”.—Emoniseli 16:14.
Mokolo na Jéhovah ebelemi
Moto nyonso oyo amitangoli na Nzambe asengeli kozonga noki epai na ye, mpamba te mokolo na Jéhovah esili kobelema. Kati na bato oyo Nzambe ‘akoboma’ ezali na “baoyo babongwani nsima na kobila Jéhovah”. Basili kotika nzela na ye mpe bazali lisusu komibanzabanza te na mokano ya Nzambe. Oyo nde likama! Esengeli kosala mbongwana nokinoki.—Sofoni 1:3-11.
Bozwi ya mosuni ekozala na lisalisi ata moke te na mokolo na Jéhovah. Bamoko kati na baoyo bazali koloba ete bazali kosalela Jéhovah bazali komipesa mingi na koluka bozwi ya mosuni, mpe bazali komibongisela bomoi ya malonga. Kasi bazali komikosa! Bozwi na bango ekosalisa bango te na “mokolo yango”.—Sofoni 1:12-18.
Lobiko ekozala solo
Ekoki bobele te kozwa boyebi ya likolólikoló ya Makomami mpo na kobombama na mokolo na Jéhovah. “Basokemi” oyo basili “kotosa bikateli na ye” balendisami na ‘koluka Jéhovah, koluka boyengebene mpe koluka bopolo’. Bobele baoyo “bakoyika mpiko kino nsuka” nde bakobika.—Sofoni 2:1-3; Matai 24:13.
Mabota oyo mazali konyokola libota ya Jéhovah na ntango na biso makobomama. Ekokomela bango motindo moko lokola ekomelaki Moaba, Amona, Asulia mpe mabota mosusu ya zongazonga na mokili na Yuda. Libebi ezali mpe kozela Babilone Monene. (Emoniseli 18:4-8) Yango ezali kolendisa biso mpenza na kolanda kosakola na molende nyonso ekateli ya Nzambe.—Sofoni 2:4-15.
Libota oyo ebongisami lisusu
Jéhovah azali kobongisa sikawa libota na ye mpo ete ebikisama. Osili kobwaka makanisi malongwe na Babilone mpe osili kobanda koloba “monoko na peto” oyo ezali bongo solo ya motuya ezwami kati na Biblia? Ozali ‘kokumisa nkombo ya Jéhovah’ na komipesaka epai na ye? ‘Ozali kopesa likabo na yo’, elingi koloba “mbuma na bibebu na yo oyo ezali kotatola na ntina na nkombo na ye”? Mpo na kobongisa lobiko na yo, esengeli na yo kosala na bomoko “elongo” na baoyo bamipesi na Jéhovah.—Sofoni 3:1-10;Baloma 10:13-15; Baebele 13:15.
Mpo na kobikisama, tosengeli koluka Jéhovah mpe kotosa nkombo mosantu na ye. Lolendo, kozanga boyengebene mpe lokuta ezali na esika te kati na basaleli ya Nzambe. (Baefese 4:25-32) Bobele baoyo bazali ‘basokemi mpe na bopolo’ nde bakobikisama ntango akosantisa nkombo na ye.—Sofoni 3:11-20.
[Etanda na lokasa 28]
KOTALELAMA YA MIKAPO YA BIBLIA
○ Sofoni 1:5-Malcam, oyo mbala mosusu ekokani na Milco Moleke to Moloke, azalaki nzambe aleki monene ya Baamonite. (1 Mikonzi 11:5, 7)Losambo ya Moleke ezalaki na mosala moko ya mabe. Bazalaki kotumba bana lokola mbeka mpe yango eboyamaki na Mibeko.—Levitike 20:2-5; Misala 7:42, 43.
○ Sofoni 2:14-Lokola esakolamaki makonzi na Ninive oyo makweisamaki makomaki efandelo na bandeke mpe banyama ya zamba. Bandeke, mpe na ntembe te na mopepe lisusu, ‘ezalaki koyemba’ na ba fenêtres to maninisa oyo etikalaki mpamba. Bikuke mpe mbala mosusu biteni oyo ezalaki na kati ya bandako ebebisamaki.
○ Sofoni 3:9-Ata bato mingi bazali koloba monoko moko, yango elingi koloba te ete bomoko ezali kati na bango ndenge yango emonisami na bitumba oyo ekokweaka kati na bato oyo bazali koloba monoko moko. “Monoko ya peto” ezali solo ya Biblia, “ndakisa ya maloba na lobiko”. (2 Timote 1:13) Ezali kobengana lolendo, ezali kokumisa Nzambe mpe ezali kosangisa baoyo bazali koloba yango.
○ Agai 1:6-Lokola Bayuda bazangaki limemya na temple na ye, Jéhovah azalaki kopambola bango te. Bazalaki kolona mingi, kasi bazalaki kobuka moke mpe bazalaki na bilei mingi te mpe mayi mingi te. Bilamba na bango ezalaki ya mabe mpenza to ezalaki mingi mpenza te mpo na komibatela na malili, mpe basali bazangaki mosolo. Na bokesene na Bayuda, tozala na limemya na matomba ya Nzambe.—Masese 10:22; Nehemia 10:39.
○ Agai 2:9-Wana temple ya ‘kala’ oyo etongamaki na Salomo eumelaki mibu 420, “ndako ya nsima” esalelamaki na boumeli ya mibu 584 (longwa 515 liboso na ntango na biso kino mobu 70 ya ntango na biso). Na yango, temple ya mibale eumelaki koleka. Basambeli mingi bayaki epai na yango, na ndakisa na pantekote ya mobu 33 ntango Bayuda mpe bandimi mosusu bautaki mosika na Yuda bayanganaki wana. Lisusu, Masiya, Yesu Klisto, ateyaki kati na “temple yango”. Nyonso wana epesaki yango nkembo monene mpo na oyo etali losambo.