“Basanzoli na esengo”: Liyangani ya Etúká ya Batatoli ya Yehova
Mikolo misato oyo mitondi na mateya ya Biblia mizali kozela yo. Lokola mayangani ya etúká 36 masili kokanama mpo na Burundi, Congo mpe Zaïre, mbala mosusu liyangani moko likoki mpenza kosalema penepene na esika ozali kofanda. Zalá wana ntango pologalámi ekobanda na miziki na 9:40 na ntɔ́ngɔ́ ya mokolo ya mitano.
Manáka ya Mwamitano na ntɔ́ngɔ́ mazali na maloba ya botombeli boyei malamu mpe lisukúlu-moboko, “Totyami pɛmbɛni lokola basanzoli ya esengo kati na mokili mobimba.” Nsima ya nzangá manáka makotya mpenza likebi likoló na bilenge, baboti mpe koyekola. Bilenge bakosepela mingi koyoka lisukúlu “Namilɛngɛli malamu mpo na libala?” Baboti basengeli koyoka na likebi mingi lisukúlu “Baboti oyo bazali kosepela na bana na bango.” Manáka ya nsima ya nzangá makosuka na lisukúlu “Kotánga kelasi—Salelá yango mpo na kokumisa Yehova.” Makambo oyo makolobelama masengeli kosunga bilenge na kolónga na eteyelo.
Manáka ya Mwapɔ́sɔ na ntɔ́ngɔ́ makotalela batisimo, mpe ekopesa libaku epai na baoyo bakokisi masɛngami ete bábatisama. Nsima ya nzangá ekozala na lisoló moko ya polele oyo ekomonisa lolenge nini uta kala Satana azali kosalela mposa ya kosangisa nzoto mpo na kozwa bato na motambo. Ekozala lisusu na lisukúlu ya nguya mingi “Tókima mitambo ya Zábolo.” Manáka ya mokolo wana makosuka na lisukúlu ya ntina mingi “Mpo na nini bato bazali na mposa ya boyebi ya Nzambe.”
Na Mwalomingo na ntɔ́ngɔ́, masukúlu-matongami na motó ya likambo “Basanzoli ya esengo na mikolo ya nsuka ya ebongiseli oyo” ekobenda likebi likoló na makambo oyo, mosika te, makobulunganisa mokili. Ekobenda likebi likoló na ntina ya kokima nokinoki na esika ya libateli liboso ete “bolɔ́zi monene” oyo Yesu Klisto alobelaki ebanda, lokola emonisami kati na Matai 24:21.
Manáka ya Mwalomingo na ntɔ́ngɔ́ makosuka na lisano-liteya ya ntina mingi “Tópesaka lokumu epai na baoyo babongi na yango na mikolo na bobangé na bango.” Bongo, nsima ya nzangá, lisukúlu mpo na bato banso, “Tósanzola Mokonzi ya seko!” likopesama. Yango ekozala mpenza likambo ya ntina mingi ya liyangani ya etúká.
Omibongisa uta sikawa mpo na kozala na liyangani wana. Mpo na koyeba esika ya liyangani oyo lizali penepene na bino, kende na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova, to tindá nkomá epai na babimisi ya zulunalo oyo. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwáli 1995 lisili kopesa bisika mayangani ya etúká ya 1995 makosalema na Burundi, na Congo mpe na Zaïre.