Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 1/6 lok. 32
  • Yaka na liyangani ya etúká “Bobangi Nzambe”!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yaka na liyangani ya etúká “Bobangi Nzambe”!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Masolo mosusu
  • “Basanzoli na esengo”: Liyangani ya Etúká ya Batatoli ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Yaká na Liyangani ya Etúká “Kondima kati na Liloba ya Nzambe”!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Okolinga kozangisa yango te!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mpo na nini osengeli kozala wana
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 1/6 lok. 32

Yaka na liyangani ya etúká “Bobangi Nzambe”!

Osili komilɛngɛla mpo na kozala na liyangani ya Etúká “Bobangi Nzambe” oyo Batatoli ya Yehova bakosala na 1994? Na ntembe te, okozwa matomba mingi na kozala kuna na boumeli ya mikolo nyonso misato! Bobele na Zaïre, mayangani 25 masili kobongisama, ekoki mpenza kozala ete liyangani moko likosalema pene na esika ofandi.

Bobangi mosusu ekoki kolembisa mpe kolongola elikya; nzokande lisukúlu-moboko ya mokolo ya mitano na ntɔ́ngɔ́ ekolimbola bobangi Nzambe mpe ekomonisa matomba mingi na yango. Ee, liyangani mobimba likomonisa polele matomba wana.

Mokolo ya mitano na nsima ya nzánga tokoyoka lolenge bobangi Nzambe ekoki kolendisa libala mpe bomoi ya libota, mpe lolenge ekoki kosalisa bilenge na kotikala sembo epai na Nzambe. Ebongiseli ya nsima na nzánga ekosuka na lisoló ya kosimba motema “Libondisi mpo na baoyo bakufeli bato.” Okosepela mingi na mateya oyo mabongisami kati na lisukúlu yango mpo na kosalisa baoyo basili kokufela balingami na bango.

Pologalámi ya mokolo ya Pɔsɔ ekomonisa lolenge bobangi Nzambe ekoki koyeisa makasi bokangami na biso na litambwisi ya Yehova litali lisangá mpe mosala na biso. Kati na lisukúlu “Tángá Liloba ya Nzambe, Biblia mosantu, mokolo na mokolo,” bayangani bakozwa batoli kitoko etali kotánga mpe koyekola Biblia. Pologalámi ya mokolo ya pɔsɔ ekosuka na motó ya likambo ya kobenda likebi “Mokolo ya nsɔ́mɔ ya Yehova mobɛlɛmi.”

Moko ya masukúlu ya ntina ya mokolo ya Eyenga ekozala lisukúlu “Lisekwa ya bayengebeni likozala.” Kati na lisukúlu oyo likolanda, “Babatelami na bomoi kati na bolozi monene,” ndimbola moko ekopesama likoló na elikya kitoko oyo Yesu apesaki na ntina na baoyo bakomona kufa te.​—Yoane 11:26.

Mokolo ya Eyenga na ntɔ́ngɔ́ ekosuka na lisano-liteya moko ya miniti 40 oyo ekotinda na kokanisa, na motó ya likambo Maponi oyo mazali liboso na yo. Bayoki bakokundwelama makambo malekaki kala na mikolo ya Yosua mpe bakomona ekateli na ye makasi ya kosalela Yehova. Lisusu, momekano ya mɔ́tɔ oyo esalemaki na mikolo ya Eliya ekolakisama, mpe bayangani bakozwa liteya na makambo wana, oyo makosalisa bango na komonisa bobangi Nzambe na mikolo na biso. Nsima ya nzánga, lisukúlu ya bato banso, “Mpo na nini kobanga Nzambe ya solo na mikolo na biso,” likozala likambo ya ntina mingi ya liyangani.

Omilɛngɛla uta sikawa mpo na koyangana na yango. Mpo na koyeba esika oyo ezali pene na yo, tuná na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova na mboka oyo ofandi to tindá nkomá epai na babimisi ya zulunalo oyo. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Febwáli 15, 1994, lisili kopesa bisika liyangani ya etúká ya 1994 likosalema na Burundi, na Congo mpe na Zaïre.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 32]

T. Rosenthal/​SUPERSTOCK

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto