Bizaleli mabe kati na makambo matali kosangisa nzoto na ntango ya kala mpe na mikolo na biso
KINO na meko nini losambo ya Moleke, nzambe ya Bamoabite, ezalaki mpenza mabe? Kati na mokanda na ye La sexualité des humains (Angl.), Paolo Mantegazza akomaki ete Bamoabite ya ntango ya kala bazalaki komipesa na misala ya nsoni ya kosangisa nzoto “na etuluku, na kobinaka zongazonga ya ekeko na Moleke oyo ezalaki kopela moto. Liboso, minoko nsambo ya nzambe oyo ezalaki ya ebende emelaki makabo ya basambeli, makabo na farine, na bibenga, na bana ya mpate, na ngombe, na bana ya ngombe mpe na bilenge mibali.” Mokomi abakisi: “Moto nyonso oyo atangaki Biblia azali komikundola mpenzampenza na kolakelama mabe oyo Moïse alobaki likoló na Baebele oyo basalaki pite elongo na Moleke. Bayuda bayambaki mpe na móto makasi Bala-Fegore, to Belfegore [Bala ya Peolo], nzambe oyo Bamadianite bazalaki kolinga mingi, oyo losambo na ye ezalaki na bosoto mingi lokola milulu oyo misalamaki mpo na lokumu ya Moleke.”—Levitike 18:21, Traduction du monde nouveau, ebimeli na anglais ya 1984 oyo ezali na mitindami note en bas de page; 20:2-5; Mituya 25:1-5; Yilimia 32:35.
“Ezaleli” oyo na Bayuda ezali na bokokani na yango na mikolo na biso na oyo babengi “lolenge ya sika na bizaleli” oyo ebimaki na bambula 1960, mingimingi na Etats-Unis mpe kati na bamboka mosusu ya boklisto ya mokili oyo.
Na motó ya lisolo “Toloba polele” ya Medical World News, zulunalo ya makambo ya sianse ebimisamaka na mboka Houston (Etats-Unis), Alexandra mpe Vernon Mark, bakomi mibale ya mokanda The Pied Pipers of Sex, bakomaki mpo na makama oyo makoki kobima nsima ya mikolo mingi mpo na bizaleli mabe kati na makambo matali kosangisa nzoto. Tala oyo bakomaki na 1985:
“Na mbula 25 oyo eleki, tomonaki mobulungano monene kati na makambo matali bizaleli mpo na kosangisa nzoto. . . . Kobongwana oyo ya bizaleli na bonkoko ezwaki nkombo ya révolution sexuelle.” Nsima ya kotanga minganga baoyo bazali ebandeli ya mbongwana ya ezalela na makambo matali kosangisa nzoto, bakomi balobi lisusu: “[Minganga] bazalaki na bopusi ya kokamwisa, oyo ezali na ndelo te, likoló ya bato mpe mabota. Ntina ezali te ya komiyoka ete tozali na nyongo epai na bato oyo bazali kobongola makambo ya binama na nzoto, kasi esengeli nde kopekisa bopusi na bango na kolendisaka bato bazwa makanisi malamu mpe ya bokatikati likoló na etamboli etali binama na nzoto mpe likoló na kobatela kolongono ya bato.
“Kokola ya bizaleli mabe kati na makambo matali kosangisa nzoto epesi ata mokolo moko te matomba oyo emonani na bamboka nyonso-soki nde bakanisi mbongo oyo ezali kobebisama mpo na likambo oyo. Nzokande, na komonisaka kosangisa nzoto lokola kominanola, lisano oyo ezali kobenda batali, ebotaki matata ebele, bamaladi oyo mazali kozwama na bosangisi nzoto, oyo elingi kobebisa libota mobimba ya bato. MST (bamaladi oyo ezali kozwama na bosangisi nzoto) ezali mpasi ya sika te, kasi lelo ekomi bolozi ya solo. Ba microbes ya sika ezali kobima. Maladi babengi herpès génital, oyo esilaka te epai na mikolo, ezali ntina ya kokufa ya bana mingi oyo babotami sika baoyo bazwami na méningoencéphalite. SIDA esili kokota mingi kati na bato mpe kati na misisa ya bato oyo basali na bango likambo te kasi batiaki bango makila ya bato oyo bazali na maladi yango.
Bakomi yango basukisaki boye ete: “Ngambo oyo ezali likoló na bato babimisaki makanisi ya sika mpo na kosangisa nzoto ezali monene. Balakaki epai na bato, esengo, bonsomi mpe kolongono. Bamemi nde mpasi, maladi, mpe liwa.” Biblia ezali koloba polele oyo ezali kozela bango. Na ndakisa tozali kotanga na 1 Bakolinti 6:9, 10: “Boyebi te ete bato na masumu bakosangola libula na Bokonzi na Nzambe te? Bomizimbisa te. Moto na pite mpe basambeli na bikeko mpe bato na ekobo mpe bakembi na nsoni mpe mibali bamibebisi na mibali (. . .) bakosangola Bokonzi na Nzambe te.”—Tala lisusu Yuda 7.