Lifelo ya moto ezali solo?
NA eleko moko boye ya mibu 1960, lifelo elimwaki”, ndenge ezali kotangama kati na mokanda milimo mpe nzoto (Angl.) ya David Lodge. Maloba ya mokomi wana ya Angleterre mazali komonisa likanisi ya ebele na bakatolike mpe na baprotestá ndenge yango ezalaki nsima na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Na boumeli na eleko moko, ebele na Mangomba minene balembisaki liteya na bango oyo eyebani mingi epai na bato oyo ya lifelo na moto, mpo ete bakokisa yango na makanisi oyo masalelami lelo.
Likanisi ya kozwa etumbu nsima na liwa ezalaki kopesa mpasi na motema, mpamba te liteya ya lisumu yango moko ekomaki molili kati na makanisi ya bato. Ntango batunaki ye na 1984, cardinal Ratzinger, oyo azalaki kosala na Rome, alobaki: “Lokola ezali biso ntango nyonso kolimbisa makambo mosusu mpe kolongisa mabe yango ezali kolongola epai na bato ndimbola ya mabunga na bango, ya masumu na bango . . . , solo oyo kondima ekangisi na lifelo mpe na epongelo.”
Likoki ezali lelo mpo na kondima na bosolo ya lisumu kozanga kondima liteya ya konyokolama oyo ekosalama nsima ya liwa kati na epongelo to na lifelo? Mokanda moko ya sika, Abrégé de la foi catholique, ekomamaki na cardinal Albert Decourtray ya mboka France, ezali mpenza kotuna motuna oyo: “Tosengeli kondima lifelo?” Mpe epesi eyano oyo: “Tokokoka kokima ata moke te na motuna monene oyo ya lifelo.” Mokanda Concile Vatican lI - Nouveau documents postconciliaires (Angl., 1982) ezali kozongela maloba ya “Profession de foi du peuple de Dieu”, oyo elobi ete: “Tondimi . . . [ete] baoyo bayanolaki na bolingo mpe na motema mawa ya Nzambe [bakokende] na bomoi ya seko, baoyo baboyaki kondima yango kino nsuka [bakokende] na móto mokozimana te.”
Yango wana, atako milende nini misalemi epai na bateolojié mpo na kobongola liteya yango, mitungisi ya lifelo mizali ntango nyonso kati na liteya ya katolike oyo eyebani mingi epai na bato. Nzokande, diksionere moko (A New Dictionary of Christian Theology [1983]) ezali koyebisa “nkaka” mpe “mpasi” oyo liteya ya konyokolama seko kati na lifelo ezali kobimisa lelo epai na ntalo monene ya basangani na Mangomba ya boklisto na mokili oyo. Bandimi bazali na nkaka mpo na kokokisa liteya yango elongo na Nzambe moko ya bolingo. Bazali komituna: ‘Liteya ya lifelo na móto ezali mpenza ya boklisto mpe euti na Biblia? Soki te, yango euti wapi?’
[Elilingi na lokasa 3]
Cathédrale ya Bourges, France