Lilako lileki malamu—Liteya oyo etali bato nyonso
“Na yango, makambo nyonso oyo bolingaka ete bato básalela bino, bino mpe bosengeli kosalela bango kaka bongo.”—Matai 7:12, “NW.”
MBULA nkóto mibale elingi kokoka banda Yesu Klisto alobaki maloba wana na Lisolo na ye Likoló ya Ngomba. Kobanda wana, na boumeli ya bankama ya bambula oyo elandaki, bato balobaki mpe bakomaki makambo mingi likoló ya maloba wana ya polele. Na ndakisa, bakumisaki maloba yango ete ezali “mosisa oyo esimbi mpenza Makomami,” ete “eyebisi na mokuse nini moklisto asengeli kosala epai ya basusu” mpe ete ezali “mobeko ya ntina mpenza mpo na oyo etali bizaleli malamu.” Maloba yango eyebani mpenza mingi na boye ete bato bakómá kobenga yango Lilako Lileki Malamu.
Nzokande, ezali kaka te na mikili oyo babengi ya boklisto nde bato bandimaka liteya oyo ezali na kati ya Lilako Lileki Malamu. Lingomba ya Bayuda, ya Bouddha mpe mateya ya filozofi ya Bagrɛki, yango nyonso epesaki bandimbola ya ndenge na ndenge na ntina na liteya yango. Maloba mosusu oyo eyebani malamu, mingimingi epai ya bato ya mikili ya Extrême-Orient, ezali maloba ya Confucius, moto oyo bakumisaka ete alekaki bato nyonso na mayele mpe azalaki moteyi oyo alekaki bateyi nyonso. Na buku moko (Les entretiens), buku ya misato kati na Buku Minei oyo ezali na mateya ya Confucius, tozali kokuta liteya yango mbala misato. Mbala mibale, na biyano oyo apesaki na mituna ya bana-kelasi na ye, Confucius alobaki boye: “Oyo olingaka te básala yo, kosala mpe bamosusu yango te.” Mokolo mosusu, ntango Zigong, mwana ya kelasi na ye, atutaki ntolo ete “Oyo nalingaka te bamosusu básala ngai, ngai mpe nalingaka te kosala yango bamosusu,” molakisi yango azongisaki mbala moko boye: “Olobi solo, kasi ozali naino na likoki ya kosala yango te.”
Soki moto atángi maloba wana, akoki kokanisa ete maloba ya Confucius ekeseni te na oyo Yesu ayaki koloba na nsima. Bokeseni monene ezali ete Lilako Lileki Malamu oyo Yesu ateyaki esɛngi kozala moto ya liboso ya kosalela bamosusu makambo malamu. Kanisá naino: soki bato bazalaki mpenza kolanda maloba wana ya Yesu, kozala bato ya liboso ya komonisela bamosusu motema malamu, kosala makasi mpo na kosalisa bamosusu mpe kotosa lilako yango mokolo na mokolo; mokili ya lelo elingaki te kokóma esika malamu mpenza mpo na kofanda? Na ntembe te, elingaki kozala bongo.
Ezala ndenge Confucius apesaki liteya yango, to ndenge oyo Yesu apesaki yango to mpe ndenge mosusu nini, likambo oyo eleki ntina ezali ete bato ya bileko bikeseni, ya bisika bikeseni mpe oyo bonkɔkɔ na bango ekeseni, batyaka mpenza motema na liteya oyo Lilako Lileki Malamu epesi. Yango emonisi ete makambo oyo Yesu alobaki na Lisolo na ye Likoló ya Ngomba, ezali liteya oyo etali bato nyonso, bázala na esika nini to bázala na bomoi na eleko nini.
Omituna yo moko: ‘Nalingaka ete bato mosusu bápesa ngai limemya, básalela ngai makambo kozanga koponapona mpe kozanga kokosa? Nalingaka kofanda na mokili oyo bakaniselaka bato ya mposo mosusu mabe te, mokili oyo ezangi mobulu mpe bitumba? Nalingaka kozala na kati ya libota oyo moto nyonso amitungisaka ete azokisa basusu te mpe amitungisaka mpo na bolamu ya bamosusu? Ezali solo ete moto nyonso alingaka makambo yango. Kasi soki totali malamu tokomona ete kaka mwa bato moke nde bazali mpenza na bomoi ya ndenge wana. Mpo na bato mingi, ezali mpenza mpasi bándima ete makambo yango ekoki kosalema.
Batiki kolanda Lilako Lileki Malamu
Banda kala, ezali na bato mosusu oyo basalelaka baninga na bango bato makambo ya nsɔmɔ, mpe babosanaka mpenza ntomo ya bato oyo bango bazali konyokola. Kati na makambo yango ya nsɔmɔ tokoki kotánga: kotɛka bato moindo ya Afrika lokola baombo na mikili ya bopaya, bakaa ya Banazi esika bato bazalaki kokufa mingi, kosalisa bana misala na makasi, mpe na bisika mingi, koboma bato ya etuluka moko na mokano ya kosilisa bango. Soki tolobi totánga makambo yango nyonso ya nsɔmɔ, ezali ebele.
Lelo oyo, na mokili oyo mayele ya tekiniki ekómi mingi, moto na moto azali koluka se matomba na ye moko. Bato moke kaka nde bakanisaka bamosusu na ntango oyo bamoni ete matomba na bango to oyo babengaka ntomo na bango ekómi na likama. (2 Timote 3: 1-5) Mpo na nini bato mingi bakómi koluka kaka matomba na bango moko, bakómi mitema mabe mpe mitema makasi? Na ntembe te, ezali mpo ete bato ebele, atako bayebi Lilako Lileki Malamu, bakómi kotya yango pembeni mpo bazali kokanisa ete ezali lisusu na ntina te, ezali liteya moko ya kala. Ezali mpenza mawa komona ezaleli ya ndenge wana ata epai ya baoyo bamikumisaka ete bandimaka Nzambe. Mpe na kotalela ndenge makambo ezali kokende, bato bakokóba se koluka matomba na bango moko.
Yango wana, mituna ya ntina oyo tosengeli kotalela yango oyo: Kotosa Lilako Lileki Malamu esɛngaka nini? Ezali nde na bato oyo batosaka lilako yango? Mpe ekozala mpenza na ntango oyo bato nyonso bakozala na bomoi oyo eyokani na Lilako Lileki Malamu? Mpo na kozwa biyano ya solosolo na mituna oyo, tosɛngi yo otánga lisolo oyo elandi.
[Elilingi na lokasa 3]
Confucius mpe bato mosusu bateyaki Lilako Lileki Malamu moto na moto na ndenge na ye