Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 1/12 nk. 4-7
  • Lilako lileki malamu​—Ezali na ntina tii lelo oyo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lilako lileki malamu​—Ezali na ntina tii lelo oyo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bato bakómaki koluka matomba na bango moko
  • Ndakisa ya kolanda
  • Bato oyo batosaka Lilako Lileki Malamu
  • Ezali boni mpo na yo?
  • Lilako lileki malamu​—ezali na ntina kino lelo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Lilako lileki malamu​—Liteya oyo etali bato nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Monisáká bizaleli malamu ntango ozali kosakola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Boyangeli ya Yehova elongisami!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 1/12 nk. 4-7

Lilako lileki malamu​—Ezali na ntina tii lelo oyo

Bato mingi batalelaka Lilako Lileki Malamu lokola liteya moko oyo Yesu apesaki mpo na kolendisa bizaleli malamu; kasi ye moko alobaki boye: “Mateya na ngai ezali ya ngai te kasi ya motindi na ngai.”​—Yoane 7:16.

YA SOLO, makambo nyonso oyo Yesu ateyaki, ezala liteya oyo eyaki koyebana lokola Lilako Lileki Malamu, eutaki epai ya moto oyo atindaki ye, elingi koloba Mozalisi, Yehova Nzambe.

Na ebandeli, Nzambe akanaki ete bato nyonso básalelanaka makambo ndenge oyo balingaka ete básalelaka bango. Na ndenge azalisaki bato, apesaki ndakisa eleki malamu na oyo etali komibanzabanza mpo na bolamu ya basusu: “Nzambe azalisaki moto na elilingi na ye mpenza, na elilingi ya Nzambe azalisaki ye; azalisaki bango mobali mpe mwasi.” (Genese 1:27) Yango emonisi ete, na bolingo nyonso, Nzambe apesaki bato bizaleli na ye oyo eleki minene na meko oyo ekoki na bango mpo bákoka kozala libela na libela na esengo, na bolamu mpe boyokani na bomoi na bango. Soki lisosoli oyo Nzambe apesaki bango eteyami malamu, yango elingaki kotinda bango básalelaka bato mosusu makambo na ndenge oyo balingaka ete básalela bango.

Bato bakómaki koluka matomba na bango moko

Atako bomoi ya bato ezalaki malamu ndenge wana na ebandeli, likambo nini eyaki kokóma na nsima? Na mokuse, tokoki koloba ete bato bakómaki na ezaleli mabe ya koluka kaka matomba na bango moko. Bato mingi bayebi lisolo ya Biblia oyo elobeli likambo mobali mpe mwasi ya liboso basalaki, ndenge Genese mokapo ya 3 eyebisi yango. Satana, motɛmɛli ya mitinda nyonso ya sembo ya Nzambe, akosaki Adama na Eva mpe baboyaki ete Nzambe ayangelaka bango; baponaki kosala oyo bango moko balingi. Lokola balukaki matomba na bango moko mpe batombokelaki Nzambe, babungisaki bomoi malamu oyo bazalaki na yango; lisusu bana na bango nyonso oyo balingaki kobotama nsima basengelaki komona makambo ya nsɔmɔ. Likambo yango emonisi polele likama oyo ekoki kobima soki bato batiki kolanda liteya oyo eyebani lokola Lilako Lileki Malamu. Yango wana “mabe ekɔtaki na mokili mpo na moto moko, mpe kufa ekɔtaki mpo na mabe. Kufa mpe epalangani epai na bato nyonso mpo ete bato nyonso basali mabe.”​—Baloma 5:12.

Atako libota mobimba ya bato epesaki mokɔngɔ na banzela ya Yehova Nzambe, oyo etondi na bolingo, ye aboyaki bango te. Na ndakisa, Yehova apesaki libota ya Yisalaele Mibeko na ye mpo etambwisaka bango. Mibeko yango eteyaki mokomoko na bango kosalela basusu makambo na ndenge oyo akolinga ete básalela mpe ye. Mibeko emonisaki bango ndenge ya kotalela baombo, bana oyo bakufelá batata mpe basi oyo bakufelá mibali. Emonisaki ndenge ya kosala ntango babundisi moto moko, ntango bato ya mobulu bakangi moto, to ntango bayibeli moto moko biloko na ye. Mibeko etali kolɔngɔnɔ ya nzoto ezalaki kosɛnga ete moto na moto amibanzabanzaka mpo na kolɔngɔnɔ ya nzoto ya bato mosusu. Ezalaki kutu na mibeko mpo na makambo etali kosangisa nzoto. Yehova ayebisaki bato na ye Mibeko na ye na mokuse ete: “Okolinga moninga na yo lokola yo mpenza.” Bambula ebele na nsima, Yesu azongelaki maloba yango. (Levitike 19:18; Matai 22:39, 40) Mibeko ezalaki mpe kolobela ndenge ya kotalela bapaya oyo bazalaki na kati ya Bayisalaele. Mibeko esɛngaki boye: “Okonyokola mopaya te. Bino boyebi mitema na bapaya mpo ete bozalaki bapaya na mokili ya Ezipito.” Na maloba mosusu, Bayisalaele basengelaki komonisela bato oyo bazalaki na bosɛnga boboto.​—Exode 23:9; Levitike 19:34; Deteronome 10:19.

Ntango nyonso oyo ekólo ya Yisalaele ezalaki kolanda Mibeko na bosembo nyonso, Yehova azalaki kopambola ekólo yango. Ntango Davidi na Salomo bazalaki bakonzi, ekólo ya Yisalaele ekómaki na bozwi mingi mpe bato bazalaki na esengo. Lisolo moko ya makambo ya kala eyebisi biso ete: “Yuda mpe Yisalaele bazalaki mingi lokola zelo pembeni ya mai-na-monana; balyaki mpe bamɛlaki mpe bayokaki esengo. Yuda mpe Yisalaele bafandaki na kimya, . . . moto na moto na nse ya mowiti na ye ya vinyo mpe ya nzete na ye ya mbuma.”​—1 Mikonzi 4:20, 25.

Kasi likambo ya mawa, kimya mpe libateli ya ekólo yango ezalaki ya ntango mokuse. Atako bazalaki na Mibeko ya Nzambe, Bayisalaele batosaki yango te; batikaki ete ezaleli ya koluka kaka matomba na bango moko epekisa bango na komibanzabanza mpo na bamosusu. Ezaleli yango, nzela moko na lipɛngwi oyo babimisaki, ebotelaki mokomoko na bango mpasi, ata mpe ekólo na bango mobimba. Nsukansuka, na mobu 607 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), Yehova atikaki ete bato ya Babilone bábebisa bokonzi ya Yuda, engumba ya Yelusaleme, ata mpe tempelo kitoko oyo ezalaki kuna. Mpo na nini? “Mpo ete boyokaki maloba na ngai te, [Yehova] alobi ete, Talá nakotinda mpe nakokamata bikólo nyonso ya epai ya likoló mpe bakotinda epai ya Nebukadanɛsala mokonzi ya Babele, moombo na ngai, mpe nakoyeisa bango kotɛmɛla mokili oyo mpe kotɛmɛla bafandi kati na yango mpe kotɛmɛla mabota nyonso baoyo bazingeli yango. Nakobebisa bango nyɛ mpe nakokómisa bango eloko ya kokamwa, eloko ya kotyolama, eloko ya mpamba libela na libela.” (Yilimia 25:8, 9) Oyo nde mbuma mabe babukaki mpo batikaki losambo ya pɛto ya Yehova!

Ndakisa ya kolanda

Nzokande, Yesu Klisto asukaki kaka te na koteya Lilako Lileki Malamu, kasi atikaki mpe ndakisa eleki malamu ya moto oyo atosaki lilako yango. Azalaki mpenza komibanzabanza mpo na bolamu ya bamosusu. (Matai 9:36; 14:14; Luka 5:12, 13) Mokolo moko, pene na engumba Naina, Yesu amonaki mwasi moko mokufeli-mobali oyo azalaki na mpasi mingi na motema, na molɔngɔ ya bato oyo bazalaki komema ebembe ya mwana se moko ya mwasi yango. Biblia elobi ete: “Emonaki nkolo ye, ayokelaki ye mawa.” (Luka 7:11-15) Diksionɛrɛ moko (Vine’s Expository Dictionary of Old and New Testament Words) emonisi ete maloba oyo ebongolami na “ayokelaki ye mawa” elakisi “koyoka mawa oyo euti mpenza na motema.” Yesu ayokaki mpasi oyo mwasi wana azalaki na yango na motema, mpe yango etindaki ye asala eloko moko mpo na kosilisa mpasi ya mwasi yango. Kanisá esengo oyo mwasi mokufeli-mobali wana ayokaki ntango Yesu asekwisaki mwana na ye ya mobali mpe “apesaki ye na mama na ye”!

Nsukansuka, na boyokani na mokano ya Nzambe, Yesu andimaki konyokwama mpe apesaki bomoi na ye lokola lisiko mpo ete bato bákoka kosikolama na boombo ya lisumu mpe ya liwa. Yango ezalaki mpenza ndakisa oyo eleki monene ya kotosa Lilako Lileki Malamu.​—Matai 20:28; Yoane 15:13; Baebele 4:15.

Bato oyo batosaka Lilako Lileki Malamu

Na ntango na biso, ezali nde na bato oyo batosaka mpenza Lilako Lileki Malamu? Ɛɛ bazali, mpe batosaka yango te kaka na ntango oyo makambo nyonso ezali kotambola malamu. Na ndakisa, na boumeli ya Etumba ya Mibale ya Mokili Mobimba, na ntango oyo Banazi bazalaki koyangela na Allemagne, Batatoli ya Yehova babatelaki kondima na bango epai na Nzambe mpe bazalaki kolinga bazalani na bango mpe baboyaki kotyola Lilako Lileki Malamu. Na ntango oyo Leta ya ekólo yango ezalaki kolendisa bato báyina Bayuda nyonso mpe básalela bango makambo ya nko, Batatoli balandaki kotosa Lilako Lileki Malamu. Ezala na bakaa ya bakangami, balandaki komonisela bato mosusu motema malamu, bazalaki kokabela Bayuda mpe bato mosusu nyonso oyo bazalaki na nzala biloko ya kolya oyo bazalaki na yango, atako biloko yango ekómaki mpasi. Epai mosusu, atako Leta asɛngisaki bango bákɔta mosala ya soda mpo na koboma bato mosusu, Batatoli baboyaki kosala bongo, ndenge kaka bazalaki kolinga te ete bato mosusu báboma bango. Ndenge nini bakokaki koboma bato oyo basengelaki kolinga lokola bamilingaka bango moko? Lokola baboyaki, batindaki mingi na bango na bakaa ya bakangami mpe babomaki bamosusu kati na bango.​—Matai 5:43-48.

Ndenge ozali kotánga lisolo oyo, ozali kozwa litomba na ndakisa mosusu ya Lilako Lileki Malamu, ndenge ezali kosala mosala lelo. Batatoli ya Yehova bayebi ete bato mingi lelo bazali konyokwama mpo bazangi elikya mpe bazangi lisungi. Mpo na yango, Batatoli ya Yehova bamipesaka na bolingo na bango moko mpo na kosalisa bato mosusu báyeba elikya mpe toli ya malamu oyo ezali na kati ya Biblia. Mosala yango ya kolakisa basusu ezali kosalema lelo oyo na mokili mobimba na ndenge oyo esalemá naino te. Mbuma nini yango ezali kobota? Ndenge Yisaya 2:2-4 esakolaki yango, “bikólo mingi,” elingi koloba bato koleka milio motoba na mokili mobimba ‘bazali kolakisama banzela ya Yehova mpe bazali kotambola na bipai bikokendaka ye.’ Na maloba ya elilingi, bayekoli ‘kotula mipanga na bango ete mizala bitimweli, mpe makonga na bango ete mazala bikateli ya matiti.’ Bakomi na kimya mpe babatelami na ntango oyo ya yikiyiki.

Ezali boni mpo na yo?

Kobanda botomboki oyo Satana Zabolo abimisaki na Edene tii lelo, kanisá moke mpasi oyo bato bamoni mpe ndenge oyo banyokwami mpo baboi kotosa Lilako Lileki Malamu. Yehova akani kobongisa likambo yango mosika te. Ndenge nini? “Yango wana, Mwana ya Nzambe amonani ete abebisa misala na oyo mabe.” (1 Yoane 3:8, NW) Yango ekosalema ntango Yesu akoyangela na Bokonzi ya Nzambe, ye oyo azali na mayele mpe na makoki; ye oyo ateyaki mpe atosaki Lilako Lileki Malamu.​—Nzembo 37:9-11; Danyele 2:44.

Davidi, Mokonzi ya Yisalaele ya kala, akomaki boye: “Nazalaki elenge mpe nakómi mobange, nde naino namoni moyengebeni te oyo atikami, to mwana na ye oyo akolɔmbaka kwanga. Mokolo na mokolo ye azali na boboto mpe akodefisa; libota na ye bazali [na elikya ya kozwa, NW] lipamboli.” (Nzembo 37:25, 26) Ondimi te ete bato mingi lelo bazali nde kozwa mpe kobɔtola, na esika ya “kozala na boboto mpe kodefisa?” Tomoni polele ete kotosa Lilako Lileki Malamu ekoki komema kimya mpe libateli ya solo, mpamba te yango ekosala ete moto azwa mapamboli banda sikawa mpe na mikolo ezali koya, na nse ya Bokonzi ya Nzambe. Bokonzi ya Nzambe ekosala ete moto nyonso awa na mabele atika ezaleli ya koluka kaka matomba na ye moko; ekolongola makambo nyonso ya mabe awa na mabele mpe, na esika ya ebongiseli ya lelo oyo ezali kotambwisama na boyangeli mabe oyo bato bango moko basali, ekotya ebongiseli ya sika oyo Nzambe akosala. Bongo, bato nyonso bakotosa na esengo nyonso Lilako Lileki Malamu mikoko nyonso ya bomoi na bango.​—Nzembo 29:11; 2 Petelo 3:13.

[Bililingi na nkasa 4, 5]

Yesu asukaki kaka te na koteya Lilako Lileki Malamu, kasi atikaki mpe ndakisa eleki malamu ya moto oyo atosaki lilako yango

[Bililingi na lokasa 7]

Kotosa Lilako Lileki Malamu ekoki komema kimya ya solo mpe ekoki mpenza kobatela

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto