Bokangana na ekanganeli na bokesene te elongo na bato bazangi kondima
“Bokangana na ekanganeli na bokesene te, esika moko na bato bazangi kondima. Mpamba te . . . likabo nini ezali kati na mondimi mpe moto oyo azali mondimi te?—2 BAKOLINTI 6:14, 15.
1. Ndenge nini moklisto mwasi moko abalanaki na mobali moko azali mondimi te?
ELEKI mwa bambula, mwasi moko azali Témoin de Jéhovah, ye Moameriké, akufelaki mobali na ye na likama ya motuka. Alobi boye: “Na ebandeli, nabulunganaki makasi mpenza kasi nazalaki na ekateli ete nakoki te kotika kosalela Jéhovah. Kasi mbula mibale na nsima, nabandaki komiyoka ete nazali na esika te kati na babalani ya lisangá. Ntango mabota mazalaki kobima elongo, mwana na ngai ya mwasi mpe ngai tozalaki kobengisama te. Ntango nazalaki komona babalani baklisto kolakisana bolingo, yango ezalaki kosala ngai lisusu mpasi mingi. Moto moko te azalaki komona ete nakomaki kolemba na elimo. Mokolo mosusu, mobali moko oyo azalaki Témoin de Jéhovah te, kasi toyebanaki na ye na esika ya mosala, abengisaki ngai mpo na kokenda kolya na ye elongo mpe nakendaki. Liboso nayeba likambo elingaki koyela ngai, nabandaki kolinga ye. Lokola nalembaki makasi mpe natungisamaki mingi na ndenge natikalaki ngai moko, nandimaki ete tobalana.”
2. Mpo na nini mposa ya kobala ezali mabe te, mpe ntina ya libala ezali nini?
2 Mposa ya kozala na mobalani elongo na ye bokoki kokabola bomoi ekoki kozala makasi mpenza, mpe ezali mposa oyo tozalisamaki na yango. Jéhovah ye moko alobaki: “Ezali malamu te ete moto azala ye moko. Nakosalela ye mosungi mobongi na ye [“oyo akoki kozala na ye elongo (oyo akokani na ye).” elingi koloba ye oyo akoki na ye]. (Genese 2:18, Traduction du monde nouveau, ebimeli na Lingelesi oyo ezali na mitindami.) Libala ekosalemaka mpo na kosangisa mobali mpe mwasi na boyokani makasi mpe ya libela. Ezali Adam te kasi Jéhovah nde alobaki: “Mobali akotika tata na ye mpe mama na ye mpe akosangana na mwasi na ye mpe bakozala mosuni moko.” (Genése 2:22-24; tala Matai 19:4-6) Mbala mosusu motema na yo ezali na mposa na “mosungi” motindo boye?
3, 4. (a) Na maloba nini Biblia ekebisi biso na likama ya kokangana elongo na moto azali mondimi te? (b) Na ndimbola nini toli na Paulo oyo etali “ekanganeli ebongi te” ekoki kosalelama na libala? (c) Ndenge nini Bakolinti bakokaki kokanga ntina na liloba “bazangi kondima”? (Tala maloba na nse na lokasa.)
3 Nzokande, Biblia ezali kokebisa biso na likama moko, oyo ya kokangana na moto oyo azali mondimi te. Ntoma Paulo akomaki: “Bokangana na ekanganeli na bokesene te [“oyo ekokani te”, Jérusalem], esika moko na bato bazangi kondimaa . . . Mpamba te likabo nini ezali kati na mondimi mpe moto oyo azali mondimi te?b (2 Bakolinti 6:14, 15) Mbala mosusu Paulo azalaki kokanisa na mobeko na Moïse oyo ezalaki kopekisa ete bakangisa te ngombe mpe mpunda elongo mpo na kosala bilanga. (Deteronome 22:10) Mpo ete lokola mpunda azali moke mpe makasi na ye ekokani na makasi ya ngombe te, akomona mpasi mpo na kosala elongo na nyama oyo akeseni na ye. Lokola libala ezali ekanganeli oyo esangisi mobali mpe mwasi, soko moklisto abali mwasi oyo azali mondimi te, to mwasi moklisto abali mobali oyo azali mondimi te, ekanganeli oyo bakosala ekozala na bokesene. (Matai 19:6) Ya solo, ekanganeli motindo wana ekobakisaka se mimekamo mpe mikakatano na libala.—Tala 1 Bakolinti 7:28.
4 Nzokande, lokola emonisi yango ndakisa oyo totangaki na ebandeli, esalemaka ete baklisto bazwi ekateli ya kobalana na bato bazali bandimi te. Mpo na nini bamoko bazali komona mpasi mpenza mpo na kobalana “kati na Nkolo”?—1 Bakolinti 7:39.
Mpo na nini bamoko bazali kobala na libanda?
5. Ndenge nini bamoko bazali kokoma kino na kolinga bato bazali bandimi te? Salela elakiseli kati na eyano na yo.
5 Tokoki mpenza koloba te ete bandeko yango nyonso bazali koboya kolanda batoli ya Nzambe. Tozwa ndakisa na moklisto mwasi oyo alingi kobala. Mbala mosusu azali na mposa makasi ya kozala na mobali oyo azali moklisto, kasi ekoki kosalama ete na bato oyo ye ayebani na bango kati na lisangá, moto azali mpenza te oyo akoki kobalana na ye. Mbula mpe ezali kopusana, mpe azali koyeba likambo yango. Mbala mosusu azali na mposa ya kobota. Kobanga konuna monzemba mpe mposa ya kozala na moto oyo alingi ye ekoki kolembisa ekateli na ye. Toloba sikawa ete mobali moko oyo azali Témoin de Jéhovah te asepeli na ye: ekoki kozala mpasi mpo na koboya maloba na ye. Mobali yango azali na bopolo mpe moto malamu. Amelaka likaya te mpe azali na elobeli ya bosoto te. Moklisto mwasi akoki kobanda kokanisa boye: ‘Kasi, azali malamu koleka bandeko mibali mingi oyo ngai nayebi!’ ‘Azali na mposa ya koyekola solo’. ‘Nayebi ndeko mwasi moko oyo abalaki moto ya mokili, mpe nsima mobali yango akomaki Témwe.’ ‘Ata epai na baklisto bango na bango, ezali na mabala mosusu oyo mazali kotambola malamu te!’—Yilimia 17:9.
6, 7. (a) Ndenge nini moklisto mwasi moko alobelaki kolemba na ye? (b) Motuna nini tosengeli kotalela?
6 Ya solo, moklisto oyo azali na mposa ya kobala akoki mpenza kolemba mpe kobanda kokanisa ete likambo mosusu ya kosala ezali te. Kolobelaka ezalela ezalaki na mboka na bango, moklisto mwasi moko monzemba alo- baki: “Bandeko mibali oyo bakoki kobala bazali moke mpenza, kasi bandeko basi oyo balingi kobala baleki mingi. Bandeko basi bazali komona mpenza ete bolenge na bango ezali kosila, mpe bazali na likambo mosusu ya kosala te, bobele kotikala minzemba to kobalana ata na nani oyo akobimela bango.”
7 Nzokande, toli na Biblia ezali polele mpenza: ‘Bokangana na ekanganeli na bokesene te, esika moko na bato bazangi kondima.’ (2 Bakolinti 6:14) Likebisi oyo ya Nzambe ezali komonana na miso na yo ete ezali makasi to elongobani te?
Ezali komonisa boboto na Nzambe
8. Ndenge nini Jéhovah amonisaki ete alingi bolamu na biso?
8 Bolamu na biso ya seko ezali na ntina monene na miso na Jéhovah. Atako yango ezalaki kosenga na ye komipimela to sacrifice, apesaki Mwana na ye lokola “lisiko mpo na mingi”. (Matai 20:28) Ye azali ‘koteya biso mpo na litomba na biso’. (Yisaya 48:17) Alakaki ete ‘akotika biso te ete tomekama na koleka nguya na biso’. (1 Bakolinti 10:13) Kzali malamu na kokanisa ete ntango azali kopekisa biso na kobalana na bato na mokili, yango ezali mpo na bolamu na biso. Tokomona ete likebisi yango ezali komonisa boboto na ye epai na biso.
9. (a) Likebisi nini Paulo apesaki mpo na oyo etali libala ya moklisto mpe moto oyo azali mondimi te? (b) Ndimbola ya liloba na greke ebongolami na “boyokani” ezali nini, mpe ndenge nini liloba yango ezali komonisa mikakatano mikokomela moklisto oyo abali mondimi te?
9 Na mokano ya Mozalisi, libala ezali ekanganeli eleki bikanganeli nyonso oyo ekoki kosangisa bato; mobali mpe mwasi bakokoma bongo “mosuni moko”. (Genese 2:24) Moklisto akomonisa bongo mayele na kokanganaka na motindo wana elongo na moto oyo azali mondimi te? Paulo ayanoli na kotunaka mwa mituna mozindo, oyo esengeli nyonso koyanolama boye ete: “Ezali te”. Atuni: “Kokokana nini ezali kati na boyengebene mpe mabe? Lisangana nini ezali kati na moi mpe molili? Boyokani [na greke, sumphônêsis] nini ezali kati na Klisto mpe Beliala [Satana]? Likabo nini ezali na mondimi mpe moto oyo azangi kondima?” (2 Bakolinti 6:14, 15) Liloba na greke sumphônêsis ekokani na likanisi ya “kobeta miziki” (euti na liloba sun, “elongo” mpe phônê, “makelele ya ebeteli ya miziki”). Ezali komonisa boyokani malamu ebimi na bibeteli na miziki. Ya solo boyokani moko te ezali kati na Klisto mpe Beliala. Bobele bongo, soko mobali mpe mwasi basali elongo “ekanganeli na bokesene”, ekozala na bango mpasi mpo na kozala na boyokani. Bazali lokola bibeteli mibale na miziki oyo ezali koyokana te, oyo na esika ete ebimisa miziki malamu mpo na matoi ezali nde kobimisa miziki ya mabe na koyoka.
10. Eloko nini esengeli mpo na kozala na libala na esengo, mpe matomba nini makobima na kosala ‘ekanganeli ebongi’?
10 Ndenge nini na makambo motindo yango, moto na elimo akoki kozala na boyokani mpenza elongo na moto na mosuni? (1 Bakolinti 2:14) Bindimeli, mitinda mpe mikano oyo babalani mibale bazali kokabolana ezali moboko na libala ya esengo. Eloko moko te ekoki kopesa nguya na libala koleka bokangami epai na Mozalisi. Wana esali bango ‘ekanganeli oyo ebongi’, babalani bazali kolendisana mpo na oyo etali losambo. Bango mibale bakoki bongo kosalela Makomami mpo na kosilisa mikakatano na bango. Na yango, ezali polele ete soko Jéhovah azali kopekisa biso kobalana na bato ya mokili, ezali mpo alingi ete tozala na bomoko mpenza elongo na mobalani na biso.
11. Mpo na nini Bayisraele bazalaki na lotomo te ya kobala bapakano, mpe motuna nini ya ntina tokoki komituna?
11 Na kolandaka likebisi oyo ya Biblia, tokopengola bongo makambo ya mpasi makoki kobima soko tobalani na moto oyo azali mondimi te. Na ndakisa, ekoki mpe kosalema ete moto oyo azali mondimi te apengoli moklisto na mosala na ye mpo na Jéhovah. Tala likebisi oyo Jéhovah apesaki epai na Yisraele na kala. Mabala elongo na bapakano mapekisamaki. Mpo na nini? Jéhovah alobi boye: “Mpo ete bakopengwisa bana mibali na yo ete balanda ngai te, mpe bakosalela banzambe mosusu’”. (Deteronome 7:3, 4) Liboso na momekamo oyo ezali kouta epai na mobalani oyo azali mondimi te, moklisto akoki kobanda kolemba mpe akoyika lisusu mpiko mpenza te. Ya solo, ezali petee mpo na koloba: ‘Yango ekoki kokomela ngai te.’ Kasi, likambo yango ekomelaki mpenza Salomo, moto na mayele mingi. Ekoki mpe kokomela yo te?—1 Mikonzi 11:1-6; tala 1 Mikonzi 4:29, 30.
12. Ndenge nini Mobeko na Nzambe oyo epekisaki kobala bapaya ezalaki libateli mpo na Bayisraele? Salela bilakiseli kati na eyano na yo.
12 Ata soki mondimi atiki losambo na solo te, mikakatano, mimekamo miye mibimaka mpo babalani bazali na mangomba makeseni, mikobanda ntango nyonso komonana. Tozonga sikawa na Mibeko oyo Nzambe apesaki epai na Yisraele mpe toloba ete Moyisraele moko ya mwasi andimaki kobalana na mobali Mokanané. Na kotalelaka pite oyo bato na Kana bamipesaki na yango, limemya nini mobali wana mbele akokaki komonisa mpo na Mibeko na Jéhovah? Na ndakisa, akokaki solo koboya kosangana na mwasi na ye na bileko na ye ya makila, lokola Mibeko na Moïsec ezalaki kopekisa yango? (Levitike 18:19; 20:18; tala Levitike 18:27) Soko ezalaki mobali Moyisraele nde abalanaki na Mwasi Mokanané, lisungi nini mwasi wana mbele akokaki kopesa ye ntango alingaki kokenda mbala misato na mbula, na Yelusaleme mpo na koyangana na bilambo oyo bizalaki kosalema kuna? (Deteronome 16:16) Ezali polele ete mobeko na Nzambe oyo ezalaki kopekisa mabala motindo yango ezalaki libateli mpo na Bayisraele.
13. (a) Mpo na nini moto oyo azali mondimi te azali na lisosoli ya boklisto te oyo eteyami na mitinda na Biblia? (b) Mikakatano nini mpe mimekamo nini bandeko mosusu oyo babalani na bato bazali bandimi te bazali kokutana na yango?
13 Lelo lisusu, likeseni monene ezali kati na bizaleli ya mokili mpe masengami na Biblia. Ata bato mosusu bazali komonana ete balongobani, ata bongo bazali na lisosoli ya boklisto te oyo eteyami engebene mitinda na Biblia. Bamipesi te koyekola Liloba na Nzambe na boumeli na mbula mingi, mpo ete ‘babongola makanisi na bango’ mpe ‘balongola bomoto na kala’. (Baloma 12:2; Bakolose 3:9) Na yango, baklisto oyo bazali kobala bato bazali bandimi te bazali komitya bongo liboso na mawa mingi mpe na mpasi mingi. Bamoko bazali mpenza kotungisama na babalani na bango, oyo bazali kosenga bango na kondima mitindo mabe na kosangana to na kokumisa bilambo na bapakano. Bamosusu mpe bazali komilela mpo bazali ntango nyonso se bango moko. Moklisto moko ya mwasi alobaki: “Eloko eleki mpasi, ezali ya kofanda na mobali oyo alingi Jéhovah te. Ozali na moto te mpo bokoka kosalela solo elongo. Nzokande, yango nde eloko eleki ntina.”
14. (a) Mpo na nini ezali mpasi na kobokola bana na “mateya mpe na mpamela na Jéhovah” soko ozali na mobalani oyo azali mondimi te? (b) Makambo nini makoki kobima mpo na bana kati na libota oyo moko kati na baboti azali mondimi te?
14 Soko ozali na mobalani oyo azali mondimi te, ekoki kozala mpasi mpo na kobokola bana kati na “mateya mpe na mpamela na Jéhovah”. (Baefese 6:4) Na ndakisa, mobalani oyo azali mondimi te akopesa nzela ete bana bayangana na makita to basangana na mosala ya kosakola? Mbala mingi bana bakokabwanaka kati na mayoki na bango: balingi tata na bango mpe balingi mama na bango, kasi bobele moko kati na bango nde alingaka Jéhovah. Mwasi moklisto moko oyo abalanaki na mobali moko azali mondimi te alobaki: “Na boumeli ya mibu 20 oyo libala na ngai eumelaki, nayokaki mpasi mingi. Bana na ngai bakolaki kati na mobulu mpo na oyo etali mayoki na bango; sikawa bazali na mokili. Mbala mingi mwana na ngai ya mwasi ayokaka mpenza mawa na ndenge atikaka ngai mpo na kokenda epai ya tata na ye, oyo azali na “lotomo ya komona ye”. Mimekamo oyo nyonso mibimeli ngai mpo ntango nazalaki na mibu 18, naboyaki kotosa lilako moko ya Jéhovah.” Yango wapi? Oyo epekisi kobalana na moto azali mondimi te.
15. Mpo na nini Jéhovah azali kopekisa biso ete tobalana te na moto oyo azali mondimi te?
15 Jéhovah alingi ete biso tosepela mpenza na bomoi. Makambo oyo azali kosenga biso, lokola oyo epekisi kobalana na moto azali mondimi te, ezali mpo na bolamu na biso. (Deteronome 10:12, 13) Moklisto oyo abali moto oyo azali mondimi te azali matoi mangongi liboso na toli na Biblia, azangi mayele mpe azali kotala mpamba makambo ya mpasi oyo esili kobimela bandeko mosusu.
Mituna oyo toyokaka mbala mingi
16, 17. (a) Soko tokebi te, bopusi nini mayoki na biso ekoki kozala na yango likoló na bikateli na biso? (b) Okanisi boni, ezali malamu koboya kotosa toli na Nzambe mpo ete, esalemaka mbala mosusu ete, moto oyo azali mondimi te, abalani na mwasi moklisto mpe na nsima abandi kosalela Jéhovah? Limbola mpo na nini.
16 Nzokande, soko tokebi te, ekateli na biso ekoki kopusama na mayoki na biso. Yango ekoki kobanda na ndenge boye: tokoki kokanisa ete biso tokeseni na bato mosusu. Tala mituna oyo toyokaka mbala mingi.
17 Moklisto mwasi moko abalaki mobali azali mondimi te, kasi sikawa bango mibale bazali kosalela Jéhovah. Mabe ezali wapi? Atako bongo, babukaki mitinda ya Jéhovah. Lokola na nsuka likambo eyei kobonga, elimboli ete nzela oyo balandaki ezali malamu? Likambo oyo ekomelaki Bayuda oyo bautaki na boombo na Babilone emonisi malamu ndenge nini Nzambe atalelaka bato oyo bazali kotosa toli na ye te. Lokola Bayuda mosusu babalanaki na basi bapakano, bakomi mibale na Biblia, Esdras mpe Néhémie, bakweisaki bango. Bayuda yango “bazangaki bosembo” mpe basalaki “mabe monene”: Na ntembe te bazalaki “na ekweli”. (Esdras 10:10-14; Nehemia 13:27) Likambo mosusu: soko toboi kolanda batoli ya Nzambe, yango ekoki kozokisa biso mpota na elimo oyo ekotika bilembo kati na lisosoli na biso. Moklisto mwasi moko oyo mobali na ye akomaki moklisto na nsima, alobaki: ‘Mpota na ngai na motema esilaki te. Bokoki mpenza koyeba te ndenge nayokaka mabe soko bazali koloba mpo na biso: “Esukaki malamu mpo na bango!”’
18. Wapi likambo ya mayele osengeli kosala soki omoni ete obandi kolinga moto moko oyo azwi naino batisimo te, mpe kosalaka bongo, okomonisa nini?
18 Okoki kosala nini soko obandi kolinga moto moko oyo azali koyekola Biblia mpe azali koyangana na makita, kasi azwi naino batisimo te? Ntango moto asepeli koyekola solo ya Biblia, tosepelaka mpenza. Nzokande, motuna ezali kotunama yango oyo: Osengeli kotika nzela na mayoki na yo? Mpo na koloba polele, ekozala likambo na mayele soko ozeli ete moto yango abatisama naino mpe, nsima na batisimo na ye, esengeli kotikela ye ntango akolisa naino mbuma na elimo santu na Nzambe. (Bagalatia 5:22, 23) Ezali nsima na yango nde, ntango bokoli na ye ekomonana, okoki kobanda kosolola na ye mpo na libala. Mbala mosusu, toli oyo ezali mpenza petee te mpo na kolanda yango, kasi soko otosi yango okomonisa bokangami na yo na mitinda ya Biblia, yango ekotya moboko malamu mpo na libala oyo ekozala solo libala ya esengo. Soko moninga na yo alingi yo mpenza mpe akolisi bolingo na ye mpo na Jéhovah, na ntembe te akondima kozela ntango oyo bino mibale bokozala “kati na Nkolo”, elingi koloba bomipesi mpe bobatisami, liboso ete bobanda kosolola makambo matali libala. Bomikundola mpe ete ata mikolo miumeli, yango ekoki kobebisa bolingo ya solo te.—1 Bakolinti 7:39; Genese 29:20.
19. Likambo nini okoki kobosana te soki ozali kozwa mobalani te kati na lisangá?
19 Okoki kosala nini soko ozali kozwa mobalani te kati na baninga na yo baklisto? Moklisto mwasi moko alobaki boye: “Nazali na mibu 26, nazali monzemba mpe nazali komiyoka ete nazali se ngai moko”. Ekoki kozala ete kofanda monzemba ezali mpasi mingi mpo na yo, kasi basusi oyo ekobimaka na libala elongo na mobalani oyo azali mondimi te ezali mpe mpasi koleka. Ya solo, kotosa mibeko na Nzambe ezali kosenga kondima, komikanga motema mpe kozala na motema molai, kasi kobosana te ete Jéhovah ayebi eloko nini ezali malamu mpo na yo mpe alingi bolamu na yo. (1 Petelo 5:6, 7) Bondelaka mpo na yango, mpe otya motema epai na Jéhovah. (Nzembo 55:22) Na bomoi ya lelo, moto moko te azali na bomoi ekoki na makambo nyonso. Yo, susi na yo ezali libala; kasi bamosusu mpe bazali na basusi na bango, mbala mosusu bakozwa biyano na yango kati na biloko mabe na ntango oyo te. Ezali bobele na mokili ya sika nde “mposa na [bikelamu] nyonso na bomoi” ekokokisama na ndenge esengeli.—Nzembo 145:16.
20. Na maloba nini moklisto mwasi moko monzemba amonisi ekateli na ye; mpe soko osali lokola ye, esengo nini okozwa na yango?
20 Awa ezali biso kozela mokili ya sika, ‘boya komikanga na ekanganeli elongo na moto azali mondimi te’. Moklisto mwasi moko oyo azali na mibu 36, amonisi ekateli na ye na maloba malandi: “Mikolo minso, nazali kobondela Jéhovah ete apesa ngai mobali. Nazali na likanisi soko moke te ya kokenda koluka na libanda ya lisangá na Nzambe, kasi ata bongo masenginya mazali ntango nyonso. Ezali ngai monzemba, nazali kosala makasi na kokolisa bizaleli mosusu. Na kobongisaka bongo bomoto na ngai, nazali na elikya ya kokoma mwasi kitoko na elimo oyo mobali na bizaleli na elimo akolukaka.” Yo mpe ozali na ekateli motindo oyo? Soki ee, okoki kozala na esengo ezali na baoyo bamonisaka bosembo na bango epai na Nzambe na boyengebene.—Nzembo 37:27, 28.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na 1 Bakolinti 14:22, Paulo asalelaki liloba “bazangi kondima” mpo na kokesenisa yango na “bandimi”, oyo esalelami mpo na kolobela bato oyo basili kobatisama. Na yango, Bakolinti bayebaki ete liloba “bazangi kondima” elimbolaki baoyo babatisami naino te.—Misala 8:13; 16:31-34; 18:8.
b Etinda yango ekoki kolimbolama boye: ‘Bosala ekanganeli moko te na bato oyo bazali bandimi te, ezala mpo na ntango moke to mpo na libela, oyo ekomema bino na kobuka mibeko na boklisto to ekobimisa litatoli ya mabe. Mpo na nini esengeli koboya kosala ndenge yango? Mpamba te moto oyo azali mondimi te azali na mitinda mikeseni, azali na makambo mazali kosepelisa ye to mikano na ye ekeseni na oyo ya moklisto.’”-Commentaire interprétatif de la Bible (Angl.), volume 10, page 359.
c Tala la Tour de Garde ya le 1er janvier 1973, pages 31 mpe 32.
Bozongeli
◻ Likebisi nini Biblia epesi epai na baoyo bakoki komekama na kobalana elongo na bato bazali bandimi te?
◻ Mpo na nini baklisto mosusu bazali koluka mobalani na libanda ya lisangá?
◻ Mpo na nini tokoki koloba ete likebisi na Jehovah oyo etali mabala mabongi te ezali elembo ya boboto na ye epai na biso?
◻ Mituna nini toyokaka mbala mingi na likambo etali koluka mobalani, mpe okoyanola na yango ndenge nini?