Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 1/1 lok. 7
  • Masolo ya basakoli ya Bokonzi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Masolo ya basakoli ya Bokonzi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Masolo mosusu
  • Masolo ya basakoli ya Bokonzi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Kobotama ya mwana ekɔtisaka mbongwana na libala
    Okoki kozala na libota ya esengo
  • “Liloba na Nzambe ekóli”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Masolo ya basakoli ya Bokonzi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 1/1 lok. 7

Masolo ya basakoli ya Bokonzi

“Bapeli na elimo” na mboka Mexique

Filiale ya la Société Watch Tower na mokili ya Mexique ekomi boye ete: ’’Mboka mobimba esili kopela móto na elimo mpe eningani na mosala oyo mozali kokokisama’’. Maloba wana mazali mpenza sembo. Na yango, mosala oyo mozali koyokisa lokito, oyo mokokisami na Mexique, ndakisa lokola na sanza ya mwambe oyo euti koleka, mboka yango ezwaki mpo ya mbala 70 kobakisama kati na molongo ya basakoli 277 436. Lisusu, boyekoli na Biblia koleka 400 000 eutaki kotangama, mpe bayangani na Ekaniseli ya Nkolo na 1989 bazalaki bato 1 046 291. Kokola ezali solo komonana mpo na mikolo mikoya!

Oyo epesi mpenza elembo na mobu 1989 mpo na ba Témoins de Jéhovah ya Mexique, azali bongo mbongwana oyo esalemi na lisalisi na yango bakokaki mpo na mbala ya liboso kosalela Biblia na mosala ya kosakola ndako na ndako mpe kosala libondeli liboso na makita na bango. Nokinoki, mosala ebotaki mbuma. Nsima na sanza mibale, motuya na basakoli ebakisamaki koleka 17 000.

Makasi oyo likambo yango lipesi epai na baninga na biso baklisto emonisi esengo na bango. Témoin moko ya Mexique akomi: “Mbala mibale, bandeko bazalaki bobele kobɛta maboko; yango epesaki nzela te na kosilisa kotanga mokanda mbala moko na lisanga.’‘ Mosusu alobi: “Tokokaki te na kopekisa mpisoli ya esengo. Kobanda ntango wana, bangonga ya makita ezali kotosama mpenza malamu. Bato nyonso balingi bobele kokóma na ntango malamu mpo na kolanda libondeli ya liboso mpo na kobanda makita.’’

Témoin mosusu alobi: “Na teritware na biso, mwasi moko ya molende, mokambi na lingomba katolike alobaki boye: ’’Liboso mpenza, mongongo na biso ezalaki koyokana te likoló na nsango malamu mpe bazulunalo ya (ba Témoins); soko sikawa bakomi kosalela biblia na ntango bazali koleka ndako na ndako, wana biso tobungi mpenza!”

Yango alingi kotuba ete, ba Témoins de Jéhovah ya Mexique bazali kotatola mingi na kosalelaka mabaku nyonso, elongo na Biblia. Mokolo moko, moklisto mwasi moko asalaki lisolo elongo na mwasi moko, oyo ayaki kotuna ya na nsuka soko azali kokanisa nini likoló na bosopi zemi. Moklisto mwasi ayanolaki: “Lolenge na ngai ya kotalela bosopi zemi, elaki oyo na Biblia te.” Nsima na kotanga ba versets mingi, moklisto mwasi apesaki ye maloba oyo: “Mpo na Mozalisi; bomoi ezali na ntina mingi; ata bomoi ya baoyo babotami naino te.”

Mwasi yango ayebisaki ye ete, azalaki na zemi mpo na mbala ya liboso; kasi ba ekzamé ezalaki komonisa ete balongola zemi yango, kasi ye moko azalaki naino kokakatana Moklisto mwasi asosolaki elongo na molobani na ye wana na Biblia, apesaki ye nkombo na ye, mpe bakabwanaki.

Nsima na mbula mitano, na assemblée ya distrike, bobele moklisto mwasi wana mpe mobali na ye, bayokaki ete babalani mosusu elongo na mwana na bango ya mwasi ya mbula minei, balingi komonana na bango. Mama ya mwana azalaki bobele mwasi wana oyo azalaki na zemi, oyo azwaki ekateli ya kobatela zemi na ye kino mbotama ya mwana nsima na lisolo oyo asalaki elongo na moklisto wana ya mwasi. Monganga aboyaki lisusu koyamba ye, mpe mobali nkutu alobaki ete, akotika ye soko mwana abotami malamu te. Ntango basanza ya kobota akokaki, akendaki epai na monganga na ye ya liboso mpe akutaki ye.

Nokinoki nsima na kobota, monganga angangaki na esengo: ‘’Longonya mpo na mama! Ozwi mwana mwasi kitoko.” Na kokamwa nyonso, asengaki na monganga ete akoka kotala mwana na ye malamu. Mpe nsima asololaki na monganga na ntina na mwana yango. Monganga alobaki na ye boye: “Ezali ekamwiseli.” Elenge mama wana, na esengo lokola ete azwaki makasi ya kotosa likanisi ya Jéhovah na ntina na bomoi, apesaki na mwana yango kitoko, nkombo ya moklisto mwasi oyo akutanaki na ye mwa basanza liboso ete abota. Na ntango akomaki lisusu makasi, alukaki ba Témoins de Jéhovah mpe ayekolaki Biblia elongo na bango. Nsima na basanza, ye mpe mobali na ye bazwaki batisimo.

Ntoma Paulo apesaki motinda oyo: “Mpo na elimo bopela móto; mpo na Nkolo bosalelaka ye.” (Baloma 12:11.) Lokola baklisto na solo bipai binso, ba Témoins de Jéhovah ya Mexique bazali kolanda elendiseli wana na Paulo. na motema mobimba. Ezali na ntina yango nde, mboka mobimba esili kopela na elimo mpe koningana na mosala ya elimo. Mpe Jéhovah azali kopambola mingi bato na ye na sembo!

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto