Masoló ya Basakoli ya Bokonzi
“Liloba na Nzambe ekóli”
NOKINOKI nsima na kosalema na yango, lisangá ya boklisto ekólaki longwa na basangani soko 120 kino koleka 3 000. (Misala 1:15; 2:41) Biblia elobi ete: “Liloba na Nzambe ekóli, mpe motuya na bayekoli na Yelusaleme etondanaki mingi mpenza.” (Misala 6:7) Bobele nsima ya mwa bambula, lisangá oyo eutaki kosalema sika ekómaki lisangá oyo epalanganaki na mikili mingi, oyo ezalaki na baklisto na Afrika, na Azia, mpe na Mpótó.
Lelo oyo, lisangá ya boklisto ezali mpe kokóla nokinoki. Na ndakisa, na Mexique, motuya ya basakoli ya Bokonzi esili kokóla bobele na bambula mitano longwa na basakoli koleka 130 000 kino 443 640! Na 1995, moto 1 kati na bato 59 na Mexique ayanganaki na Ekaniseli ya liwa ya Klisto oyo Batatoli ya Yehova bakumisaki. Nzokande, mosala ya kobuka mbuma na elimo kati na mboka wana esili naino te lokola yango emonisami na lisoló oyo lilandi.—Matai 9:37, 38.
Kati na engumba moko ya etúká ya Chiapas, moto moko te azalaki kondima koyekola Biblia elongo na Batatoli ya Yehova, atako nsango malamu esilaki kosakolama soko mibu 20 kati na etúká wana. Emonanaki polele ete, mingi kati na bafandi ya engumba wana bazalaki kobanga mobali moko oyo ayebanaki mingi mpo na ezaleli na ye ya mobulu. Bazalaki kobanga mpo na makambo oyo azalaki kosala soki akuti bango bazali koyekola Biblia elongo na Batatoli.
Batatoli mibale ya mpiko oyo bayaki na etúká wana bazwaki ekateli ya kosilisa likambo yango na kokendáká kosolola na moto yango. Ntango bakómaki na ndako na ye, mwasi na ye ayanolaki mpe ayokaki na likebi nyonso nsango na bango. Asepelaki mingi mpenza na likambo oyo Biblia elobi na ntina na bomoi kati na paladiso awa na mabelé. Kasi ayebaki ete mobali na ye akobimisela ye mindɔndɔ́ soki andimi koyekola Biblia. Batatoli balimbwelaki ye ete soki ataleli te na likebi nyonso oyo Biblia ezali koloba, akokoka soko moke te koyekola lolenge ya kosalela Nzambe mpe kozala na bomoi mpo na libela awa na mabelé. Andimaki boyekoli ya Biblia.
Lokola amizelaki na yango, mobali na ye asepelaki te na ekateli na ye. Apekisaki ye ete asalela motuka na ye te mpo na kokende na makita ya boklisto, nzokande apesaki ye nzela ete asalela yango mpo na makambo mosusu. Atako atɛmɛlaki ye, azalaki pɔ́sɔ na pɔ́sɔ kotambola na makolo mpo na kokende na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova, oyo ezalaki penepene, oyo ezalaki na ntáká ya bakilomɛtɛlɛ 10. Nokinoki basusu kati na engumba bamonaki mpiko na ye mpe molende na ye. Bato babandaki koyoka ntango Batatoli bazalaki kokende kotala bango na bandako na bango. Nkutu basusu, babandaki kokende elongo na mwasi wana na makita. Nsima ya mwa ntango moke, Batatoli bakómaki kotambwisa soko boyekoli 20 ya Biblia na engumba wana!
Moninga moko ya mwasi wana mpe azwaki ekateli ya koyekola Biblia atako mobali na ye azalaki kotɛmɛla ye. Likambo ya kokamwa, ezalaki bongo mobali ya mwasi wana ya liboso nde alendisaki ye ete ayekola Biblia. Nsima ya kosolola yango elongo na mobali na ye, botɛmɛli esilaki. Na bongo, ezalaki nsima na mibu 20 nde mombóto ya solo ya Biblia eyaki kobota, bato koleka 15 bazalaki koyekola Biblia mpe koyangana na makita ya boklisto, sangisá mpe basi wana mibale, oyo bazali sikawa kosakola nsango malamu.