“Bazali kolobela kimya bipai binso”.
‘‘KIMYA bipai binso”, “Ee! oyo nde mokili ya kimya!”, “Kimya binso. Wana ezalaki nde mwa ba titre ya bazulunalo oyo ekamwisaki batangi na boumeli ya bambula mibale oyo eleki. Na mokili mobimba, ezali likamwisi na komona mbongwana oyo kati na nsango oyo kala ezalaki ya mawa mpe ya kozanga elikya nde sikawa epesi elikya malamu. Mpo na nini?
Likambo na kokwama, ezali ete, eleki mwa ntango, matata mingi oyo mazalaki kosalema masilaki to makitaki mwa moke, na boumeli bobele ya mwa basanza. Na Afrike, kimya ‘ebandaki’ na Angola. Na Asie centrale, Union soviétique balongolaki mampinga na bango na Afghanistan. Na Amérique centrale, matata kati ya Leta ya Nicaragua mpe batomboki ekitaki. Na Asie Sud—Est, mampinga ya Bavietnamien bandimaki kolongwa na mokili ya Kampuchéa. “Kimya bipai binso” ekomaki kino na Moyen-Orient ntango etumba oyo esopaki makila mingi kati ya lran na lraq esilaki.
Likambo oyo ezali mbala mosusu ya kokamwisa koleka, ezali boyokani ya sika oyo ezali kati na nguya mibale ya mokili mobimba. Nsima na mbula 40 ya kozanga boyokani, ekokaki kozala mpasi na kondima makambo bazali kosala sikawa mpo na kozongisa kimya kati ya Union soviétique mpe Etats—Unis. Lisusu, engebene zulunalo The Economist, sikawa Mpoto esali ntango molai kozanga etumba kati na lisolo na yango mobimba Ya solo mpenza, bazali kolobela kimya bipai binso.
Yango elimboli nini? Bakonzi ya politike balingi kotia “kimya mpo na ntango na biso?” Esili koleka mibu 51, maloba yango malobamaki na premier ministre ya mokili ya Angleterre na nkombo ya Neville chamberlain. Maloba yango mamonanaki ete mazalaki lokuta, mwa ntango moke nsima, wana Etumba ya Mibale ya mokili mobimba engindaki. Sikawa nde makokokana?