Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 15/4 nk. 30-31
  • Libanga ya mésa ebukamaki—kasi ebungaki te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Libanga ya mésa ebukamaki—kasi ebungaki te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mayele mabe mpe ntembe
  • Endimisi lisolo na Biblia
  • “Ndako ya Davidi”: Likambo ya solo to lisapo mpamba?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Boyekoli nimero 9—Arkeoloji mpe Makomi mapemami
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Nkombo ya Nzambe na boumeli ya bikeke
    Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko
  • Oyebaki yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 15/4 nk. 30-31

Libanga ya mésa ebukamaki​—kasi ebungaki te

LIBANGA ya Mésa ebukamaki na nko na mbula oyo ebandaki bokundoli na yango na 1868. Esilaki koumela soko bambula 3 000. Libanga oyo ya mwindo ebongisami malamu, na nsonge oyo engunzami moke lokola litimbo, ezalaki na 112 centimetres longwa na nse kino likoló, 71 centimetres na monene mpe 36 centimetres na mbinga. Mwa moke nsima na kobukama na yango, balokotaki biteni mibale ya minene mpe biteni mikemike 18, kasi ndambo na misato ya libanga yango emonanaki naino te.

Ndenge nini ekomaki ete eloko oyo na ntina mingi ebunga libela? Yango ezali komonisa litomba nini mpo na bayekoli ya Biblia?

Mayele mabe mpe ntembe

F. Klein azali Mondele ya liboso mpe ya nsuka oyo amonaki mobimba ya libanga yango. Ebatamaki kati na biloko ya kala na mokili Dibon, na nord-est ya la mer Morte. Asalaki kopi ya makomi mokuse ya libanga yango oyo ezalaki na milongo 34 oyo ezingamaki na mokoloto, mpe, na bozongi na ye na Yelusaleme, ayebisaki epai na mokonzi na ye, Moprussien mpo na bokundoli wana. Mbala moko bamonaki ete ezalaki makomami ya ba Phénicien mpe ete libanga yango ezalaki na motuya mingi. Musée ya mokonzi ya Berlin epesaki mosolo mingi mpo na kosomba libanga yango, kasi nokinoki basombi mosusu bamonanaki mpe bawelanaki mpo na yango. Wana emonaki bango motuya ya libanga yango, ba Cheiks na mokili yango babombaki libanga yango mpe basengaki motuya na mbongo oyo moleki ndelo.

Mofalansé moko, ye mokundoli na biloko na nse na mabelé (archéologue français) amekaki kobamba papier likoló na yango mpo na kozwa makomi, kasi lokola papier elongolamaki liboso ete ekauka, makomi mazalaki kotangama malamu te. Na ntango yango, etinda eutaki na Damaseke ete ba Bédouins bapesa libanga na bango na Leta. Na esika ete batosa, bazwaki ekateli ya kobukabuka yango. Mpo na kosala bongo, bapelisaki móto zingazinga ya libanga yango na motuya, mpe basopelaki yango mai mbala mingi. Ntango ebukanaki, nokinoki biteni na yango bikabolamaki kati na mabota ya mboka wana mpe libota na libota ezakaki kotya eteni na bango kati na ebombelo na nkona, na kokanisáká ete yango nde ekopesa mapamboli na kobuka mbuma na bango. Ezalaki mpe nzela eleki malamu mpo ete moto na moto akoka koteka yango ndambondambo.

Endimisi lisolo na Biblia

Na lisalisi ya mabanga oyo babongisi mpe na makomi oyo ezalaki likoló ya papier, babakisaki ndambo mikemike ya libanga mpe makomi ezongisamaki lisusu. Ntango bayebaki makambo oyo makomamaki likolo na yango, ba sipesialiste bakamwaki mingi. Balobaki ete libanga oyo na kalakala ezalaki “libanga na kokamwisa mingi oyo naino bakundola te.”

Mésa, mokonzi na Moaba, atelemisaki libanga oyo ezalaki na nkombo na ye mpo na lokumu ya nzambe na ye, Kémosch, mpo na kokanisa bolongi na ye likoló na Yisraele. Engebene maloba na ye, boyangeli na Yisraele eumelaki mibu 40 oyo epesamaki nzela na nzambe Kémosch mpo ete “asilikelaki mokili na ye”. Ezali kokanisama mingimingi boye ete botomboki oyo na Bamoaba ekokani na makambo oyo malobami kati na mokapo ya misato ya mokanda na mibale ya Mikonzi. Kati na makomi yango ya lokumu, mokonzi Mésa azali komikumisa ete abangaka nzambe mingi, ete atongaki bamboka minene mpe bala bala, mpe azali komikumisa ete alongaki Yisraele. Lokumu na makambo nyonso wana azali kopesa yango na nzambe na ye Kémosch. Bobele lolenge oyo tokoki komizela ete, kati na lisolo na ye azali koloba te mpo na kolongama na ye to mpo na mbeka ya mwana na ye oyo apesa yango makambo oyo Biblia ezali koyebisa.

Bamboka mingi oyo mokonzi Mesa alobi ete alongaki etangami na Biblia, bamboka lokola Medeba, Ataroth, Nébo mpe Jahaz. Libanga oyo ezali bongo kondimisa bosolo ya lisolo na Biblia. Likambo na kokamwisa lisusu ezali oyo ete, na molongo ya 18 ya lisolo na ye, mokonzi Mésa azali kosalela Tétragramme (Y), nkombo na Nzambe ya Yisraele. Kati na makomi yango, azali komikumisa na maloba oyo ete: “Kuna na (Nébo) nazwaki (mbeki) na Yahvé mpe namemaki yango liboso na Kémosch.” Ekoki kozala makomi ya kala mingi mpenza oyo euti na Biblia te, oyo ezali na nkombo ya Nzambe nde ekundolami na mikolo oyo.

Na 1873, libanga ya mokonzi Mésa ezongisamaki lisusu na kosangisáká bandambondambo ya makomi oyo ezangaki, mpe etyamaki na musée ya Louvre, na Paris, epai kuna ebatelami ntango nyonso. Libanga mosusu oyo ezali kopi na yango ezwami na British Museum na Londres.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto