“Ndako ya Davidi”: Likambo ya solo to lisapo mpamba?
DAVIDI—elenge mobali mobateli-na-mpate oyo na nsima akómaki alangá-nzembo, moto na maloba ya ntɔ́ki, sodá, mosakoli mpe mokonzi—amonisami kati na Biblia na lokumu monene. Nkombo na ye etángami mbala 1 138; elobeli “Ndako ya Davidi”—mbala mingi elobelaka bakonzi oyo bautaki na libota ya Davidi—esalelami mbala 25. (1 Samwele 20:16) Mokonzi Davidi mpe bakonzi oyo bautaki na libota na ye bazalaki bobele bato ya lisapo mpamba? Arkeolojí emonisi nini? Bokundoli ya biloko ya kala bizwami na nsé ya mabelé oyo esalemaki kala mingi te na Tel Dan na nɔ́rdi ya Galilai elobelami mpo na kondimisa bosolo ya Davidi mpe bakonzi oyo bautaki na libota na ye.
Na eleko ya molungé na 1993, ekípi moko ya balukiluki ya biloko ya kala bizwami na nsé ya mabelé, oyo etambwisamaki na Profɛsɛrɛ Avraham Biran, bakundolaki esika moko na libándá ya ekuke ya Dan ya kala. Bakutaki esika moko oyo etyamaki mabanga. Na kozanga nkaka babimisaki libanga moko ya moindo longwa na mabelé. Ntango babalolaki libanga yango epai ya moi na nsima ya nzánga, balɛ́tɛlɛ emonanaki polele. Profɛsɛrɛ Biran angangaki ete “Oh, Nzambe na ngai, tozwi likomami!”
Profɛsɛrɛ Biram mpe moninga na ye ya mosala Profɛsɛrɛ Joseph Naveh ya Eteyelo monene ya Liebele na Yelusaleme, nokinoki basalaki lapólo ya Arkeolojí likoló na likomami yango. Kozwáká moboko likoló na lapólo yango, lisoló moko ya zulunalo Biblical Archaeology Review, ya Mársi/Apríli 1994, elobaki ete: “Emonanaka mingi te ete eloko moko ya kala oyo ezwami na nsé ya mabelé ezala motó na likambo monene likoló na zulunalo New York Times (kozanga kolobela zulunalo Time). Kasi ezali yango nde emonanaki na eleko ya molungé oyo euti koleka na ntina na bokundoli oyo esalemaki na Tel Dan, libanga kitoko oyo libimisamaki na nɔ́rdi ya Galilai, na nsé ya ngomba Hermon pene na moko ya mitó ya ebale Yolodani.
“Kuna Avraham Biran mpe ekípi na ye ya balukiluki ya biloko ya kala, bazwaki likomami moko ya polele ya ekeke ya libwa L.B.T. oyo lizali kolobela ‘Ndako ya Davidi’ mpe ‘Mokonzi ya Yisalaele.’ Yango ezali mbala ya liboso ete nkombo ya Davidi emonana na likomi moko ya kala na libándá ya Biblia. Likomami yango lizali komonisa bobele ‘Davidi’ moko boye te kasi mpe Ndako ya Davidi, kútu bakonzi oyo bautaki na libota ya mokonzi monene wana ya Yisalaele bazali na ntina mingi.
“‘Mokonzi ya Yisalaele’ ezali elobeli oyo emonani mbala mingi kati na Biblia, mingimingi kati na mokanda ya Mikonzi. Nzokande, oyo ekoki kozala likomami oyo lileki koumela kati na makambo ya Biblia na ntina na Yisalaele na likomami ya Liebele. Soki likomami yango lizali kondimisa likambo moko, na bokeseni na maloba ya batyoli mosusu ya Biblia, lizali komonisa ete Yisalaele mpe Yuda ezalaki bikonzi ya ntina na ntango wana.”
Mpo na koyeba mbula na yango, batalelaki lolenge ya balɛtɛlɛ, mbɛki oyo ezwamaki mpembeni ya eteni ya libanga mpe makambo mayebisami na likomami yango. Mitindo nyonso misato mizali komonisa eleko bobele moko, ekeke ya libwa L.T.B., soko mbula koleka nkáma nsima ya Mokonzi Davidi. Banganga-mayele balobi ete likomami yango ezalaki eteni ya monimá ya bolóngi oyo etyamaki na Dan na monguna moko Araméen ya “Mokonzi ya Yisalaele” mpe “[Mokonzi ya] Ndako ya Davidi.” Ba Araméens, oyo bazalaki kosambela nzambe ya mopɛpɛ makasi na nkombo Hadad, bazalaki kofanda na ɛ́sti ya Yisalaele.
Na eleko ya molungé na mobu 1994, biteni mosusu mibale ya libanga yango bizwamaki. Profɛsɛrɛ Biran alobi ete: “Na biteni mibale yango tozali kokuta nkombo ya nzambe Araméen Hadad, mpe makomami ya etumba kati na Yisalaele mpe ba Araméens.”
Eteni monene ya libanga oyo ezwamaki na 1993 ezalaki na milɔngɔ́ 13 oyo mizalaki komonana polele mikomami na Liebele ya kala. Na ntango wana, matɔ́ni ezalaki kosalelama lokola bakaboli mpo na kokabola maloba kati na makomami. Nzokande, “Ndako ya Davidi” ekomami lokola liloba moko na balɛ́tɛlɛ “bytdwd” (ebongolami na balɛ́tɛlɛ ya Baloma) na esika ete ezala “byt” (ndako), litɔ́ni, mpe na nsima “dwd” (Davidi). Ya solo, mituna mibimaki na ntina na ndimbola ya “bytdwd.”
Profɛsɛrɛ Anson Rainey, nganga-mayele na nkóta alobi ete: “Joseph Naveh mpe Avraham Biran balimbolaki likomami yango te na bolai, mbala mosusu bakanisaki ete batángi bakoyeba ete bilembo ya kokabola kati na biteni mibale ya maloba motindo wana mbala mingi etyamaka te, mingimingi soki maloba yango masangani na nkombo ya moto oyo ayebani malamu. ‘Ndako ya Davidi’ ezalaki moko na bankombo wana ya politiki mpe ya bisika oyo eyebanaki mingi na katikati ya ekeke ya libwa L.T.B.”
Elembeteli mosusu ya Arkeolojí
Nsima ya bokundoli wana, nganga-mayele ya libanga ya Mesa (ebéngami libanga ya Moaba), Profɛsɛrɛ André Lemaire, alobaki ete ezali mpe kolobela “Ndako ya Davidi.”a Libanga ya Mesa, oyo ekundolamaki na 1868, ezali na makambo mingi na boyokani na libanga ya Tel Dan. Yango nyonso mibale ekomamaki na ekeke ya libwa L.T.B., ezali na lolenge ya libanga moko, ezali na bolai ndenge moko, mpe ekomami na makomi pene na lolenge moko ya Liebele.
Na ntina na kobongisama ya sika ya molɔngɔ́ ya makomami oyo ebebaki likoló na libanga ya Mesa, Profɛsɛrɛ Lemaire akomaki boye: “Pene na mbula mibale liboso ya bokundoli ya eteni ya libanga ya Tel Dan, nalobaki ete libanga ya Mesa ezali kolobela ‘Ndako ya Davidi.’ . . . Ntina oyo kolobelama yango ya ‘Ndako ya Davidi’ emonisamaki soki moke te liboso ekoki kouta na boye ete libanga ya Mesa epesamaki mpenza te oyo ebéngami editio princeps [libongoli ya liboso oyo lipesamaki ndingisa na Letá]. Ezali yango nde nazali kobongisa, mbula 125 nsima ya kokundolama ya libanga ya Mesa.”
Nsango motindo wana ya Arkeolojí ezali ya kobenda likebi mpamba te anzelu moko, Yesu ye mpenza, bayekoli na ye mpe bato mosusu balobelaki na ntina na Davidi. (Matai 1:1; 12:3; 21:9; Luka 1:32; Misala 2:29) Bokundoli ya biloko ya kala bizwami na nsé ya mabelé endimi mpenza ete David, “Ndako ya Davidi” mpe bakonzi oyo bautaki na libota na ye ezali likambo ya solo, kasi lisapo mpamba te.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Libanga ya Mesa eyebani na batángi ya mikanda ya la Société Watch Tower. (Talá Mosɛnzɛli ya 15 Apríli 1990, lokasa 30 kino lokasa 31.) Emonisami polele na mizé ya Louvre na Paris.
[Elilingi na lokasa 31]
Eteni ya libanga ya Tel Dan,* ezwamaki na 1993 na engumba Dan oyo etángami na Biblia, na nɔ́rdi ya Galilai
* Liyemi lisalemi na fɔtɔ́ oyo ezali komonana kati na zulunalo Israel Exploration Journal.