Codex ya washingtonianus mokanda ya Baevanzile
NA DÉCEMBRE 1906, na mboka Guizeh(Ezipito), charles Freer, moto na mbongo mingi ye Moameriké oyo azalaki kobomba bikeko ya kala, asombaki mwa mikanda ya kala epai na moteki moko Moarabe na nkombo Ali. Engebene maloba na mobali oyo, mikanda yango miutaki na couvent Blanc, pene na Sohag, kasi ekoki kozala ete bakutaki yango kati na biloko bipola na ndako na bansango oyo ebengami “Vigneron”, pene na pyramide (nkunda oyo batongi lokola ndako molai) ya misato na mboka Guizeh, na bisanga ya ebale Nil.
Charles Freer asombaki manuscrits (mikanda) misato mpe “liboke ya parchemin (mokanda esalami na mposo na nyama) oyo eyindaki, ebebaki mingi, ezalaki makasi mpe ekauka lokola colle”. Ezalaki pene na 17 cm na molai, 11 cm na monene mpe 4 cm na mbinga. Etekisamaki elongo na manuscrits (mikanda) bobele mpo ete ezalaki liboke moko na yango, kozanga ete batalela yango lokola eloko na motuya. Mosala oyo etalaki kokabola bankasa ezalaki mpasi mpe ya likebi, kasi na nsuka bazwaki bankasa 84. Yango nyonso euti na codex (buku) oyo ezalaki na mikanda ya ntoma Paulo mpe ekomamaki na ekeke ya mitano to ya motoba.
Moko na ba manuscrits (mikanda) mosusu misato ezalaki na mokanda ya Deteronome mpe Yosua, mosusu ezalaki na Nzembo, engebene Septante libongoli ya greke, mpe ya misato, oyo elekaki nyonso na motuya, ezalaki na Baevanzile nyonso minei.
Mokanda yango ya nsuka ezalaki na bankasa 187 ya petepete oyo esalemi na mposo ya nyama, mingi na yango na mposo ya ntaba, oyo ezalaki na texte ekomami na makomi minene na greke. Bilembo mpo na kopema na botangi bizali mingi te, kasi mwa langi mpembe etyamaki mpo na kokabola milongo mbala na mbala. Zingazinga ya mokanda ebebaki mingi; nzokande, eteni monene na makomi ebatelamaki. Nsima elakisamaki na ndako ya bikeko Freer de la Smithsonian lnstitution, na Washington (Etats-Unis). Wana ezwaki nkombo ya codex Washingtonianus, mokanda yango ya Baevanzile emonisami na likomi “W”.
Parchemin (mokanda esalami na mposo na nyama) oyo ekomamaki na nsuka ya ekeke ya minei to na ebandeli ya ekeke ya mitano, oyo epesi yango nzela na kotyama mosika mpenza te nsima na mikanda misato ya ntina oyo babengi Sinaiticus, Vaticanus mpe Alexandrinus. Baevanzile (nyonso minei ekoki bobele nkasa mibale nde ezangi) elandami engebene ebongiseli ebengami “occidental”: Matai, Yoane, Luka mpe Malako.
Ntango moto azali kotanga mokanda yango, akomona kolandana ya ndenge mosusu na ba texte ekeseni, mokomoko ezali na biteni minene mpe bizangi kotyama nsuka. Ezali komonana ete basalaki kopi longwa biteni ya ba manuscrits (mikanda) mingi, oyo moko na moko ezali na lolenge na yango. Profesere H. Sanders apesaki likanisi ete, yango ekokaki kozala bongo likoló ya monyoko oyo ebimaki pwasa epai na baklisto na mobu 303 na mokonzi Dioclétien, oyo apesaki etinda ya kotumba bakopi nyonso ya Makomami. Makomi ya masolo na bato mayebisi biso ete mwa ba manuscrits (mikanda) ebombamaki na eleko wana. Nsima na bambula mingi, emonani ete, moto moko asalaki kopi ya biteni na ba manuscrits (mikanda) ekeseni mpo na kobimisa texte ya codex Washingtonianus. Na nsima, eteni ya liboso na Evanzile na Yoane (1:1 kino 5:11) ebungaki; basalaki kopi na yango ya mibale na ekeke ya nsambo.
Mokanda yango ezali na makambo ndenge na ndenge na kosepelisa mpe kokomama ya liboso ya mokapo 16 ya Evanzile ya Malako, atako eboyamaki na nsima. Euti mbula mosusu na note moko ezali pembeni. Mokanda yango ezali na motuya, mpamba te eumeli lolenge moko na mabongoli mingi ya kala na latin mpe na syriaque. Matangá ya mai na buzi ezali elembeteli ete parchemin (mokanda na poso) yango esalelamaki mingi.
Atako minyoko, botemeli mpe ntango molai, Biblia ebatelamaki na ndenge ya kokamwa mpo na biso na lolenge ya ba manuscrits to makomi ya kala. Na ntembe te, “Liloba na Jéhovah ezali koumela seko”.—1 Petelo 1:25; Yisaya 40:8.