Eloko nini ezali na “ntina”?
CODEX W, oyo ezali na Baevanzile, emonisi litomba mpo na kobongola maloba na Yesu epai na Malata, ndeko mwasi ya Lazare, moninga na ye ya motema. Ntango Yesu akendaki kotala libota yango, Malata amonaki ete ezali ntina mingi kobongisela Yesu bilei kitoko, kasi Yesu apesaki ye toli malamu ya kolanda ndakisa ya Marie, ndeko na ye ya mwasi, oyo afandaki penepene na makolo na ye mpo na koyoka. Alobaki ete: “Nzokande makambo moke mazali na ntina monene, to bobele likambo moko. Marie, ye, aponi malamu, mpe ekobotolama na ye te.”—Luka 10:42.
Maloba oyo mazali kobongola texte greke oyo ebimisamaki na 1881 na Westcott mpe Hort, texte oyo esalisaki mpo na kosala libongoli ya Traduction du monde nouveau. Note moko oyo ya Biblia yango, oyo ezali na mitindani, oyo ebimaki na 1984 na lokota na lingelesi, emonisi ete liteya yango ezalaki na boyokani na Sinaiticus (x) mpe na Vaticanus (B), manuscrits to mikanda mibale ya lolenge moko. Nzokande, tozali kotanga boye kati na Alexandrinus (A): ’’Bobele likambo moko nde ezali na ntina. Marie, ye . . .” Lokola note emonisi yango, codex W, ndenge moko mpe na papyrus (mokanda esalami na mposo) chester Beatty (P45) mpe Bodmer (P75), yango nyonso mibale ya ekeke ya misato, ezali kondima liteya yango. Kasi mikanda nyonso wana eyebanaki malamu nsima na 1881, mbula oyo Westcott mpe Hort babimisaki mokanda na bango, kino ete bazwaki libaku ya kotalela liteya oyo mosusu te. Ezala ata tozali kotalela texte nini mpo na koyeba liteya wana lelo, likanisi ya ntina ezali ete Yesu amonisi biso polele ete tosengeli kotia makambo ya elimo na esika ya liboso kati na bomoi na biso ezali toli ya mayele oyo tosengeli kolanda.