Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 1/11 lok. 3
  • Mobu 2000—Ekokesena mpenza na bambula mosusu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mobu 2000—Ekokesena mpenza na bambula mosusu?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Masolo mosusu
  • Milenere ya misato ekobanda ntango nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mobu 2000 ezali na ndimbola moko monene?
    Lamuká!—1998
  • Milenere ya misato ekokokisa bilikya na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mbula nkóto ya sika—Mikolo oyo ezali koya ebombeli yo makambo nini?
    Mbula nkóto ya sika—Mikolo oyo ezali koya ebombeli yo makambo nini?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 1/11 lok. 3

Mobu 2000—Ekokesena mpenza na bambula mosusu?

LIKAMBO moko monene ekosalema na mobu 2000? Na Mpoto mpe na Amerika, bato mingi bazali kozela mbula yango mpo ezali ebandeli ya milenere [mbula nkóto] ya misato. Bazali komilɛngɛla mpo na kosala bafeti minene. Bazali kotya bamontre mineneminene oyo ekolakisa ndenge basɛgondɛ ya nsuka ya mbula oyo tozali ekobanda koleka tii tokokɔta na mbula ya sika. Bazali kobongisa bafeti ya kafukafu mpo na mbula ya sika. Na bamagazini mpe na bazando minene bazali kotɛkisa batriko oyo bakomá maloba ezali kokumisa nsuka ya bambula ya 1900.

Mangomba, ezala ya mike to ya minene, etikali mpe nsima te mpo na kosala bafeti na mbula mobimba oyo ezali koya. Na ebandeli ya mbula oyo ezali koya, Pápa Jean Paul II akokende na Israël mpo na kotambwisa “feti ya Bakatolike mpo na nsuka ya bambula ya 1900.” Bato oyo bakokende na Israël na mbula ekoya, ezala bandimi to bato oyo bakokende kotala mpamba, bakoki kokóma milio mibale na ndambo to mpe milio motoba.

Mpo na nini bato mingi bazali komibongisa mpo na kokende na Israël? Roger Cardinal Etchegaray, mosali monene na Vatican, alobaki boye mpo na Pápa: “Na mobu 2000 tokosala feti monene mpo na Klisto mpe bomoi na ye na ekólo yango. Yango wana, ebongi mpenza ete Pápa azala wana.” Boyokani nini ezali kati na mobu 2000 na Klisto? Bato mingi bakanisaka ete na ntango wana nde tokokokisa mbula 2 000 banda Klisto abotamá. Kasi, ezali mpenza bongo? Tokoyeba yango.

Mpo na bandimi ya mangomba mosusu, mobu 2000 ekeseni mpenza na bambula mosusu. Bazali kondima mpenza ete na mbula oyo ezali koya to mpe mwa moke nsima, Yesu akozonga mpe akokita na Ngomba ya Olive mpe etumba ya Armagedon oyo mokanda ya Emoniseli elobeli ekosalema na lobwaku ya Megido. (Emoniseli 16:14-16) Na États-Unis, bato mingi bazali kotɛka bandako mpe biloko na bango mpe bazali kokende na Israël mpo na kozela makambo yango. Mpo na bato oyo bazali na likoki ya kokende te, pastɛrɛ moko oyo ayebani mingi na États-Unis alaki ete akolakisa kozonga ya Yesu na televizyo!

Na Mpoto mpe na Amerika, bato bazali koboma nzoto mpo na kolɛngɛla ebandeli ya milenere ya misato. Nzokande, na mikili mosusu, bato bazali kosala misala na bango lokola nde likambo ezali te. Na mokili mobimba, bato yango nde baleki mingi. Bato yango bandimaka te ete Yesu moto ya Nasalete azalaki Masiya. Mpe lisusu bakabolaka bambula ya L.T.B. mpe T.B. te mpo na kotánga ntango.a Na ndakisa, Bamizilma bazalaka na manaka (calendrier) na bango. Na manaka yango, mbula ekoya ekozala mobu 1420, kasi mobu 2000 te. Bamizilma batángaka bambula banda na ntango oyo profeta Mohammed akimaki na mboka Mecques mpe akendaki na Médine. Bato na bato basalelaka manaka na bango, mpe soki totángi yango nyonso, ekoki kokóma ata manaka 40.

Baklisto basengeli kotalela mobu 2000 lokola mbula oyo ekeseni na bambula mosusu? Mokolo ya 1 Yanuali 2000 ekozala mpenza mokolo oyo ekeseni na mikolo mosusu? Tokozwa biyano na mituna yango na lisolo oyo elandi.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na ndenge bakabolaka ntango na bambula oyo ezalaki liboso mpe nsima ya kobotama ya Yesu, bambula oyo ezalaki liboso ebengamaka “avant J.C.” [liboso ya Yesu Klisto]; mpe bambula oyo elandaki nsima ebengamaka “après J.C.” (nsima ya Yesu Klisto). Kasi, bato ya mayele mosusu oyo bayekoli likambo yango malamumalamu bamonaka ete ebongi mpenza koloba “L.T.B.” (liboso ya ntango na biso) mpe “T.B.” (na ntango na biso.)

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto