Ba diplomés ya Galaad bazwi elendiseli ya kolona momeseno ya kosolola
MOKOLO na eyenga ya 4 mars 1990, bato koleka 4 100 bayanganaki na Salle d’assemblées des Témoins de Jéhovah ya Jersey city (Etats—Unis) mpo na komona ndenge bakopesa ba diplomes na kelasi ya ntuku mwambe na mwambe ya Galaad, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower. Ba diplomés 24 bautaki na mikili 6 mikeseni mpe batindamaki na mikili 13.
Programme ebandaki na 10 heures. Nsima na loyembo, George Gangas, oyo sikawa azali na mibu koleka 90 mpe azali kati na College central, asalaki libondeli ya kafukafu epai na Jéhovah. Nsima na yango, mokambi, C. Barber, mosangani mosusu ya college central, ye moko azali dipiómé ya Galaad na kelasi ya 26, alobelaki na mokuse mbongwana ya nokinoki oyo ezali kosalema kati na mokili mpe asukisaki na kolobáká ete: “Naino libaku malamu ya kotatola mpo na bokonzi mpe boyengebene na Jéhovah emonana te lokola sikawa.” Mpe apesaki nzela na balobi ndenge na ndenge oyo bazalaki na masolo ya koloba na ntongo ete basala masolo na bango.
Vernom Wisegarver, mosangani ya comité de l’imprimerie ya Brooklyn, aponaki teme na lisolo “Bozala na mayele kati na mosala na bino”. Akokisaki ba diplomés na motuli moko na bibende na mboka oyo asalaki longo na monyololo moko makasi, abikisaki bomoi ya baoyo nyonso bazalaki kati na masuwa na tango ya mbonge makasi. Ntango bakobada koteya solo ya Biblia, na kosaleláká mayele oyo bakolisi na boumeli ya formation na bango na Galaad, bakosalisa bato na kotonga epai na bango monyololo ya bizaleli kitoko oyo Nzambe azali kosepela na yango oyo ekomemela bango bomoi. Alendisaki bongo ba diplomés ete balanda kokola kati na likoki ya koteya, mpe na komitya liboso na mokonzi oyo aleki mikonzi nyonso lokola basali na mayele”.
Na nsima, John Barr, mosangani ya Collège central, alimbolaki teme oyo “Meka mpe sosola ete Jéhovah azali malamu”. Lisolo na ye etongamaki likoló na Nzembo 34:8, epai elobami ete: “Meka mpe sosola ete Jéhovah azali malamu. Esengo ezali na moto oyo koluka ekimelo epai na ye!” Apesaki toli oyo epai na ba diplomés: “Bomeka na nyonso kati na mikili oyo bokosala lokola bamisionere bomeka nyonso. Bobanga eloko te, Na bongo, bokomona malamu na Jéhovah koleka liboso. Bozala na mindondo te. Boloba te ete: Nalingaka oyo te.’ Bomeka yango.”
Charles Woody, mosangani ya comité du bureau du service na Brooklyn, aponaki kosala lisolo “Tozala na bopolo”. Alobaki: “Tolingaka kozala elongo na bato ya bopolo baoyo bazalaka ntango nyonso te na likambo ya koloba, baoyo bazali pene ya kokumisa mpe kolendisa baninga, baoyo atako bazali na boyebi bazali komonisa baninga te ete bazangi yango. Lokola bozali bamisionere, bokoluka kobenda bato epai na solo, kasi bokimisa bango te. Ezalela na bino ya bopolo ekozala mpenza lisalisi kitoko mpo na kolonga.”
Lyman Swingle, mosangani ya college central, alobaki na nsima mpo na teme “Mikapo ya nsima, mikoloba na biso nini?” Abadaki na kolobáká ete: “Lelo oyo bobandi mokapo ya sika kati na bomoi na bino. Makambo nini bokokoma kati na yango, sikawa mpe na mikolo mizali koya? Azongelaki koyebisa bango ete, nyonso oyo bozali kosala esengeli kokumisa mpe kosanzola Jéhovah”. Abakisaki: “Bosenzelaka ete bikateli na bino nyonso bizala na boyokani na Liloba na Nzambe. Bokanisaka na Masese 3:7, oyo elobi ete: ‘Tika te ete omonana na mayele na miso na yo moko.’ Bomonisa bosembo kati na mosala na bino.” Asukisaki na maloba oyo: “Tokanisi ete bokosilisa te kokoma makambo matali bomoi na bino, ete bokozala na bomoi libela.” Na nsima, Jack Redford, moko na balakisi ya eteyelo, apesaki toli oyo epai na ba diplomés: “Bozala mbeka na bomoi.” Abandaki na kolobaka ete: “Mosala ya misionere ezali bomoi ya komipesa . . . Tozali kolinga bino mpo na elimo ya komipesa oyo bozali komonisa.” Kotangáká Bafilipi 2:17 epai kuna ntoma Paulo alobi ete esopamaki lokola mbeka, elingi koloba ete azalaki pene na komipesa ye moko lokola mbeka na bomoi, abimisaki motuna oyo: “Kasi ndenge nini bamisionere bazali mbala mingi kosopama lokola mbeka?”
Na nsima ayebisaki masolo mibale oyo bamisionere mingi oyo bamipesaki bango moko lokola mbeka koleka ndelo oyo esengami bakutanaki na yango. Moko abetaki na maboko na ye moko 1 600 briques mpe atongaki Salle du Royaume ya liboso ya mokili oyo atindamaki. Mosusu, ndeko mwasi, alandaki mobali na ye na zamba, epai kuna lolenge na bomoi ezalaki mpasi mingi. Baklisto basi ya mboka balingaki ye mingi, mpamba te bamonaki ete azalaki komipesa ye moko lokola “mbeka na bomoi”. Kasi molobi akundolaki lisusu ete mbeka ezali na motuya moko te soki ezangi botosi. Kosaleláká lisolo oyo etaleli Saul mpe ba Amalecites, apesaki toli oyo epai na ba diplomés: “Boyebaka ntango nyonso ete botosi eleki mbeka. Bomekaka ata moke te kokakola maloba ya Jéhovah. Bosalaka ntango nyonso oyo azali koloba na bino.”
Mpe na nsima mokambi abiangaki Ulysses Glass, molakisi mosusu ya eteyelo. Ndeko Glass abandaki lisolo na ye na kolobáká ete: “Kelasi ya 88 ezalaki kelasi moko ya esengo. Bakelasi mosusu mpe ezalaki na esengo. Mpo na nini esengo na bino ezali komonana polele?” Amonisaki ete “esengo ezali mpenza nsuka ya makambo nyonso te, kasi ezali litomba ya misala malamu. Koluka kozwa yango ezali kopesa biso mbano uta sikawa.” Atangaki mokomi moko oyo bomoi na ye ebongwanaki ntango atangaki maloba oyo: “bolongi ezali mobembo, kasi ezali esika ozali kokende te.” Mokomi yango azwaki ekateli ya koboya kokokisa bomengo na likambo oyo ya kokóma na esika ozali kokende, kasi ebongi nde kotalela bomoi na yo mobimba lokola mobembo ya seko.” “Alobaki ete: nzela oyo ezali komema na bomengo ezali te. Bomengo nde ezali nzela.” Ulysses Glass alobaki na nsima ete, kelasi yango esimbaki ntina ya maloba wana. Asukisaki na kopesaka toli oyo na bayekoli nyonso: “Bolanda kotambola kati na bisika oyo bizali kosopamela mai ntango nyonso. Ata mikakatano nini oyo bokokutana na yango, tika ete bobatela esengo oyo ezali mpo na bato oyo bazali kolinga mpe kobanga Jéhovah!”
Nsima na yango Karl Klein, mosangani ya college central, asalaki discours clé na ntongo, oyo na motó na likambo “Bolona ezalela ya kosolola lokola bozali baklisto”. Akundolaki liboso ete Jéhovah azali Ye oyo aleki bato nyonso mpo na koloba. Mwana na ye bobele moko, Logos, asalaki lokola momemi-nsango mpe ayebisaki mokano mpe malako ya Jéhovah epai na bikelamu ya mabelé. Ntango Yesu azalaki na mabelé, bibele na bato bazalaki kokamwa mpo na lolenge na ye ya koteya. Naino bayokaki moto moko te koloba lokola ye. Na Matai 28:19, 20, Yesu alendisaki bayekoli balobaka malamu na kokendáká bipai nyonso kati na mokili mpo na koteya malako na ye epai na bato mosusu mpe kozalisa bango bayekoli.
Kolobáká mpenzampenza na nsima epai na bamisionere ya sika, Karl Klein alimbolaki ete ezalaki na makambo minei kati na yango basengeli komipesa mpo na kolona likoki ya kosolola: kati na boyokani na bango elongo na babalani na bango, elongo na bafandi mosusu kati na ndako ya bamisionere, elongo na filiale ya mokili oyo batindami mpe elongo na bato oyo bazali kokutana na bango kati na mosala ya kosakola. “Karl Klein alobaki ete, bozali kobanda koloba elongo na bamosusu liboso nkutu ete bofungola monoko; ndenge na bino mpe ezalela na bino ezali koyebisa likambo moko epai na molobani na bino.” Na nsima atangaki bandakisa mingi mpo na komonisa ntina ya likambo yango mpe asukisaki na toli oyo: “Bozala na bopolo kati na makanisi. Bosololaka ntango nyonso. Bosala makasi na kolona likoki ya kosolola.”
Nsima na kotanga bambote, mokambi apesaki diplome na moyekoli moko moko. Mpe bana kelasi batangaki maloba ya botondi oyo bayebisaki yango na collège central mpe na libota ya Béthel, maloba oyo matangamaki na Paulo Angerville, ye oyo autaki na Guadeloupe.
Likita ya après-midi ebandaki na boyekoli ya La Tour de Garde. Nsima na yango, bayekoli balakisaki ebongiseli moko oyo epesaki nzela epai na bayangani na kozwa mwa likanisi na esengo oyo ezalaki na boumeli ya boyekoli mpe ntango bazalaki koyangana epai na bango mpo na kominanola, mpe koyoka ebele na masolo oyo bakutanaki na yango na mosala ya kosakola uta bokomi na bango na Galaad, sanza mitano liboso. Mpo na kosukisa, basakoli ya lisangá ya Lyndhurst (New Jersey) basalaki drame moko ya Biblia oyo na motó ya likambo Bosala oyo ezali malamu na miso na Jéhovah. Mokolo esukaki na loyembo mpe na libondeli oyo esalamaki na président ya la Société, Fred Franz, oyo azali na mibu 96.
[Etanda na lokasa 27]
MOTANGO NYOSO
Ntalo ya mikili oyo bautaki: 6
Ntalo ya mikili oyo batindami: 13
Ntalo ya bandeko mibali oyo bazali minzemba: 2
Ntalo ya babalani: 11
Ntalo ya bayekoli: 24
Mbula ya kobotama oyo moto na moto akoki kozala na yango: 32, 7.
Penepene na mbula oyo moto na moto asili kolekisa kati na solo: 14
Penepene na mbula oyo moto na moto alekisi na mosala ya pionnier: 9
[Elilingi na lokasa 26]
Kelasi ya mbala 88 ya Galaad, Eteyelo ya Biblia ya la Societé Watchtower
Kati na liste oyo ezali awa na nse, mitonga mitiami nimero kobanda liboso kino na nsuka mpe bankombo etangami kobanda na loboko ya mwasi kino na loboko ya mobali: (1) Magney, D.; Rogers, L.; Foster, S.; Foley, R.; Untch, L.; Jonasson, G. (2) Buri, H.; Buri, B.; Krammer, M.; Hudson, D.; Underkoffler, J. (3) Angerville, P.; Olsson, M.; Jones, A.; Untch, R.; Krammer, A.; Hudson, C. (4) Foley, L.; Magney, J.; Jones, A.; Jonasson, H.; Foster, M.; Rogers, M.; Underkoffler, R.