Oyebi kotosa ngonga?
MOKLISTO moko, nkulutu kati na lisangá moko ya Amérique du Sud, azali na bizaleli mingi ya malamu Kasi mpo na koseka baninga na ye bapesaki ye nkombo Armagedon. Mpo na nini? Balobi boye: “Toyebi ete akoya, kasi Nzambe ye moko nde ayebi soko akoya na ngonga nini.”
Na yango, koyeba kotosa ngonga to te ezali na bopusi mingi na lokumu ya moto. Mokonzi na mayele Salomo amonisaki malamu likambo yango na maloba oyo: “Bankangi bakufi bakotyaka mafuta na monganga na nsolo mabe; bongo na mwa zoba moke epai na ye oyo azali na lokumu na mayele mpe nkembo.” (Mosakoli 10:1) Moklisto akoki kozala na bizaleli mingi ya malamu, kasi akobebisa lokumu na ye soko ayebi kotosa ngonga te.
Mokengeli moko alobaki: “Nazali na konfianse epai na bato oyo bayebi kotosa ngonga. Nalingaka kosala na bato motindo yango. ”Na makambo na mombongo mpe, balingaka bato motindo yango. Mokanda Emily Post‘s Etiquette epesi toli oyo: “Koma na ngonga malamu na mosala; koma na ngonga malamu na makita; pesa rapport na yo na ngonga malamu.” Mokanda La nouvelle étiquette (1987; Angl.) elobi ete mingimingi “koya na retard ezali komonisa kozanga limemya”. Mpe bakomi babakisi boye: “Ndako—nzambe, ezali esika mosusu oyo esengeli te kokenda na retard”.
Tosepelaka soko bato nyonso bayebi kotosa ngonga. Emonani ete ntoma Paulo akabolaki mpe likanisi yango, mpamba te akomaki epai na baklisto ya Kolose: “Nazali na bino esika moko kati na elimo; nazali kosepela mpo na komona mwango na bino sembo mpe mpiko na kondima na bino kati na Klisto.” (Bakolose 2:5). Na ntembe te tozali na mayoki motindo moko na mokonzi David mpo na oyo etali bilaka na Jéhovah, wana ekomaki ye: “o Nzambe, koumela te.”—Nzembo 40:17; 70:5.
“Bokoma bamekoli na Nzambe”
Jéhovah azalaka na retard soko moke te. Azali komibanzabanza mpo na ntango na ndenge ya kokamwa mpenza, mpe yango ezali komonana na biloko binso oyo azalisaki. Longwa na biloko minene bizangi nsuka kino na ekelamu moke ezali na bomoi, nyonso ezali komonana ete ezali kotambwisama na montre oyo ezangi komonana. Na ndakisa, nyama moko moke efandaka na pembenipembeni na mai na Japon ebotaka maki na yango mike mbala moko na mbula, na sanza ya Octobre, mokolo oyo sanza ezali naino na ndambo na yango ya liboso to na ndambo na yango ya misato, na ngonga ya misato nsima na midi. Na sanza ya Mars to Avril, pembenipembeni na mai na Kaliforni, mbisi moko moke babengi grunion, ebotaka bobele na boumeli ya mwa minite moke oyo mai ekotombokaka.
Programme ya Jéhovah ezali mpe sikisiki mpo na oyo etali kokokana ya bilaka na ye. Na ndakisa, totangi na Exode 12:41 ete: “Mpe na nsuka na mbula nkama minei na ntuku misato, na mokolo yango mpenza, bibele nyonso na Jéhovah babimaki na mokili na Ezipito”. Na ndenge yango Jéhovah akokisaki elaka oyo apesaki na Abram, bikeke mingi liboso.—Genese 15:13-16; Bagalatia 3:17.a
Jéhovah atindaki Mwana na ye, Masiya na mokili, bobele na ntango oyo asakolaki na nzela na mosakoli Daniele, koleka bikeke mitano na liboso, na motindo boye ete “na ntango elakamaki, Klisto akufaki mpo na bato mabe”. (Baloma 5:6; Daniele 9:25.) Bobele bongo, Biblia elobi ete Jéhovah ayebi ‘mokolo mpe ngonga’ oyo akotya nsuka na biloko mabe na ntango oyo. (Matai 24:36). Akozala na retard te. Na yango, Jéhovah apesi biso ndakisa malamu mpo na kotosa ngonga, ndakisa malamu oyo tokoki komekola.—Baefese 5:1.
“Na bilaka na yango”
Jéhovah asengaka ntango nyonso epai na basaleli na ye ete bamibanzabanza mpo na ngonga, mingimingi mpo na oyo etali losambo na bango epai na ye. Ntango Bayisraele bazalaki kotumba mbeka, bazalaki kolanda “bilaka biponami”. Jéhovah alobaki na bango boye: ‘Bokokeba ete bokabela ngai mbeka na ngai . . . na bilaka na yango.’ Apesaki mpe epai na Moise lilako oyo elandi na ntina na makita: “Lingomba mobimba bakoyangana.”—Levitike 23:37; Mituya 10:3; 28:2.
Nsima na bambula, Bayuda bazalaki kotosa “ngonga na kotumba mpaka na malasi”. (Luka 1:10.) “Ngonga na libondeli, na ngonga ya libwa”, etosamaki bobele epai na Bayuda te, kasi lisusu na Bapakano. (Misala 3:1; 10:3, 4, 30). Mpe lisusu, Paulo akomaki na ntina na makita na boklisto: “Tika ete makambo nyonso masalama na mobulu te.”—1 Bakolinti 14:40.
Likambo nini esengamaki epai na Bayisraele mpe baklisto ya liboso? Ete batosa ngonga mpo na koyangana, mingimingi mpo na oyo etali losambo. Jéhovah azali mpe kosenga motindo moko epai na basaleli na ye na ntango na biso oyo.
Mpo na nini likambo yango ezali mpasi mpo na bato mingi
Bizaleli bikeseni makasi na ntina etali ngonga kati na mokili mobimba. Misionere moko alobi ete na engumba moko moke na Amerike du Sud, mbala mosusu mwasi na ye azalaki bobele ye moko ntango ye mobali azalaki koyembisa loyembo na ebandeli ya likita ya boklisto, nzokande na loyembo ya nsuka, bato bazalaki kokoma 70. Epai mosusu, na mokili moko ya Europe de l’Ouest, batunaki epai na bato mingi motuna molandi: “Soko babengisi yo na elambo na 19 heures, okokoma minite mitano to minite zomi na liboso, to minite mitano to zomi na nsima, to okokoma mpenza na ngonga epesami?” Bato bayanolaki “ete limemya ezali kosenga otosa ngonga mpenza oyo epesami, mpe okoma na ngonga ya sikisiki”.
Koyeba kotosa ngonga ezali likambo ya esika oyo ofandi te. Ezali momeseno ekokani na bopeto, molongo to ordre mpe limemya. Ya solo, tobotamaka na bizaleli yango te; kasi tosengeli kolona yango. Soko balakisaki yo kotosa ngonga na bomwana, ezali malamu. Kasi bato mingi babokwamaki na mabota oyo kati na yango botosi na ngonga ezalaki likambo ya ntina te, mpe kati yango bazalaki kosala makambo elongo te. Ezali se ntango bakomi basangani ya lisangá na boklisto, ntango babandi koyangana na makita mpe kobima na mosala ya kosakola nde bakomona ntina ya koyeba kotosa ngonga. Bakoki komona ete ezali mpasi mpo na koyeba kotosa ngonga, mpamba te bazalaki na ezaleli yango te uta bomwana. Ata bongo, bolingo mpo na Jéhovah mpe mpo na mozalani ekoki kopusa moto na kobongwana. Kasi akobongwana mpo na nini?
Mpo na nini koyeba kotosa ngonga?
Benjamin Franklin atunaki boye mokolo mosusu: “Olingaka bomoi? Na yango, kolekisa ngonga mpambampamba te, mpo ete yango ezali kati na biteni ya bomoi,” Biso tozali kondima maloba yango. Bobele bongo baklisto mpe bakoki kobebisa ngonga ya baninga te. Misionere moko alobi boye: “Na ezalela na ye, moto oyo ayaka ntango nyonso na retard azali lokola moto oyo azali koloba epai na bamosusu ete: ‘Ntango na ngai ezali na motuya mingi koleka oyo ya bino, yango wana bokoki kozela kino na komibongisa.”’ Moto motindo yango ayebi kotosa ngonga te mpe azangi ebongiseli malamu, azali moto ya kotyela konfianse te, kasi azali mpe na mwa moimi mpe kozanga limemya. Baklisto ya solo balingi kosala makambo kozanga ‘elimo ya kowelana, kozanga elimo ya lolendo, kasi na elimo ya bopolo, komona ete bamosusu baleki bango’.—Bafilipi 2:8.
Bamoko bakoki koloba ete balingaka te ete bomoi na bango mobimba etambwisama na montre. Kasi kotosa ngonga elimboli kotambwisama na montre te. Yango elimboli koyeba ntina ya matomba ya bamosusu, “kotalaka bobele makambo na yo moko te, kasi makambo na bamosusu lokola”.—Bafilipi 2:4.
Tala na ndakisa, toli oyo ezwami na Biblia: “Boyambanaka lokola Klisto asili koyamba bino.” (Baloma 15:7) Soko tosaleli toli oyo na likambo etali koyamba mpenza, ekozala mpasi mingi mpo na kolanda yango soko tozali na momeseno ya koya na retard na makita. Soko okomi liboso na ngonga, okoki komonisa bolingo mpe ezaleli ya koyamba bato kati na makita. Mpe yo moko okozwela yango litomba. Na ndenge yango, okozala wana na loyembo ya liboso mpe libondeli, oyo ezali bongo eteni ya ntina na losambo oyo esalami na bomoko kati na lisangá. Soko oyoki teme to titre oyo epesami, ekolanda lisolo na ndenge malamu mpenza.
Soko ozali kotosa ntango, okosalisa bamosusu basangisa molende na bango mpe na ndenge yango bakoki kosala makambo mingi ya malamu. Ntango akotelaki mboka AI, Yosua atindaki mwa ndambo na basoda na ye mpo na kobenda banguna libanda na mboka, bongo basoda oyo batikalaki babombanaki mpo na kokanga mboka lokola na motambo mpe kobotola yango. Na ntango oyo etyamaki, Yosua apesaki elembo. Bato na ye “bapotaki mbango wana esembolaki ye loboko”, mpe babotolaki mboka. Kanisa naino likambo oyo elingaki kosalama soko bakotelaki mboka yango te na ngonga oyo bayokanaki!—Yosua 8:6-8, 18, 19.
Na ntango na biso, ba ministres baklisto bazali na bantina mingi mpo na komibanzabanza na ntango. Kobima na mosala ya kosakola Bokonzi elongo na baninga na bango, kobongisa mikumba mosusu ya programme ya ba Assemblées to ya makita, mpe kosukola Salle du Royaume ezali kosenga ete tosala elongo na bamosusu. Soko toyebi kotosa ntango, tokoki kosala makambo mingi ya malamu. Yango ezali mpe solo mpo na kopesa rapport ya mosala ya kosakola na nsuka ya sanza. Soko bato banso bazali kopesa yango nokinoki, na ndenge yango rapport oyo ya sikisiki mpe oyo ezali kolendisa, euti na lisangá mpe na mokili mobimba ekoki kosangisama.
Koyeba kotosa ngonga elimboli lisusu kokoma na ngonga esengeli na ba rendez-vous mpe makita oyo tozali na yango mokolo na mokolo. Ezali na bokutani oyo ezali ntina mingi koleka mosusu. Na ndakisa, elambo ya libala na yo, esengeli kobanda na ngonga sengeli. To mbala mosusu olingaka ete maki na yo ebela se nsima na minite boye to boye. Ata azali kosala nini moto oyo atosaka ngonga azali na mposa te ya kosilisa likambo moko nokinoki mpo aleka na mosusu, mpamba te azali na retard te. Azali nde na kimya mpe ayebi kobongisa makambo na ye. Akoki kosala makambo mingi mpamba te azali koyeba kokabola ngonga ya mokolo na ye ya mosala mpe akobanda na ngonga esengeli ata liboso na yango.
Na yango, baklisto bazali na bantina mingi mpo na kotosa ntango. Yango ezali lolenge ya komonisa bolingo na biso epai na baninga na biso baklisto mpe limemya na biso mpo na bibongiseli na teokratike oyo etali losambo na solo.
Ndenge nini moto akoki kokoma na ezaleli ya koyeba kotosa ngonga?
‘Koyeba ntango ebongisami’
Biblia elobi ete: “Ata ndeke monene . . . ayebi ntango ebongisami na ye” mpo na mobembo na ye, mpe furmi “akobongisa bilei na ye na ntango na moi makasi” mpo na komibongisa na ntango na malili. (Yilimia 8:7; Masese 6:8). Tala sekele ya koyeba kotosa ngonga mpe kosala mosala malamu.
Biso mpe tosengeli ‘koyeba ntango na biso oyo ebongisami’. Kozanga ete tokoma bato na makambo makasi mpe mibeko makasi, tosengeli kotalela ntango. Tosengeli koyeba bobele te makambo oyo tokosala, kasi tosengeli lisusu koyeba soko tokosala yango na ngonga nini. Tosengeli kozala na momeseno ya kobongisa makambo, komipesa ntango ebongi mpo na kosilisa likambo moko mpe kozala pene mpo na kotika misala mosusu oyo tozali na yango mpo na kosala makambo ya ntina lokola makita, mosala ya kosakola mpe misala mosusu ya teokratike.
Mpo na yango, esengeli ete libota esala elongo. Emonanaka mbala mingi ete mobali akotika mwasi na ye abongisa bana. Bongo akobima ye moko na ndako mpe akotikala konganga: “Bosala noki, bokozala na retard!” Yakobo azalaki kosala ndenge yango te; na ntango ya kokenda, “atyaki bana babali na ye mpe basi na ye na likoló na bakamela”.—Genese 31:17.
Ndenge nini tata akoki kosalisa libota na ye? Akoki komesenisa bana mpo ete bazala na momeseno ya komibongisa mpo na makambo ya ntina na esika ete bamibongisaka bobele soko ntango elingi kokoka. Akoki kosalisa bango bayeba komema mikumba mpe bazala na esengo ya koyeba kotosa ngonga. Ekoki kozala malamu soko bakoki kotalela elongo kati na libota bandakisa ezwami na Biblia oyo ezali komonisa ntina ya komibongisa liboso na ngonga. (Genese 19:16; Exode 12:11; Luka 17:31) Kasi na ntembe te liteya oyo eleki malamu mpe ezali na litomba ekopesama na ndakisa malamu ya baboti.
Bakengeli baklisto bakoki lisusu kosalisa lisangá soko bango moko bazali kopesa ndakisa malamu. Na yango, baponamaki na mokumba yango mpo bazalaki bato na ‘makambo mabongi’. (1 Timoté 3:2.) Baklisto mosusu bakotosa ngonga soko bayebi ete bankulutu bakokoma na ngonga ebongi mpo na koyamba bango mpe kopesa ndakisa. Na bongo, bakengeli na ezaleli ebongi bakosala makasi mpo na kokoma na ngonga malamu na Salle du Royaume mpo na kosalisa lisangá. Bandeko mpe lisusu bakosepela mingi na basaleli na misala oyo bakomaka liboso na makita mpo na koyamba bandeko mpe kosalela bango.
Ya solo, koyeba kotosa ngonga ezali kosenga ete oyeba komikanga motema mpe ozala na disipline. Ezali mpo na elengi ya kosala makambo na bosikisiki te lokola soda, kasi mpo na komonisa bolingo epai na baninga na yo baklisto mpe limemya mpo na ordre esengami kati na lisangá. Yango ezali eteni na bomoto na sika oyo tosengeli kosala makasi mpo na kolata. (Bakolose 3:10, 12). Likambo oyo eleki ntina, ezali boye ete tolingi komekola Tata na biso ya makoló, Jéhovah Nzambe, oyo azali koteya biso ete “likambo na likambo ezali na ntango na yango”.—Mosakoli 3:1.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba esakweli yango na mozindo, tala mokanda Auxiliaire pour une meilleure intelligence de la Bible, pages 283 mpe 506.