Tómonisa limemya mpo na ndako ya Nzambe
1 Na ntango ya kala, Yehova apesaká etindá epai na libota na ye ete báyanganaka mbala na mbala kati na ndako na ye. (Lev. 23:2) Mayangani yango mazalaki kosunga Bayisalaele ete bábosana Liloba na Nzambe te, ezalaki kopesa bango libaku ya komanyola, ya kozala elongo mpe ya kotalela Mibeko ya Yehova. Na bongo, bazalaki kotondisa elimo na bango na makanisi ya Nzambe, yango ezalaki kopesa bango matomba ya elimo. Mayangani wana mazalaki bantango ya esengo. Mazalaki kolendisa bomoko mpe losambo ya solo. Lelo oyo mpe ezali likambo ya ntina mingi na koyangana kati na ndako ya Nzambe.
2 Ndenge nini komonisa ete toyebi malamu ntina ya makita? Masangá mosusu mazali kozwa motuya moko ya bayangani kati na makita. Ya solo, ekoki kosalema ete tozwi likoki te ya kozala kati na yango, kasi topesaka nzela na mikakatano mikemike ete mipekisa biso mpo na koyangana mbala na mbala na makita? Mbala mosusu, bamoko bazwaka ekateli ya kotikala epai na bango bobele mpo ete bazali na mwa mpasi moko na motó to mpo bazali komiyoka ete balɛmbi nsima na kolekisa mokolo mobimba na mosala. Basusu bazali kokanisa ete bazali na mokumba ya koyamba bandeko ya mosuni oyo bazali bandimi te baoyo bazali kokana kotala bango. Basusu bazali mpe komonisa bopotu ata na makita mosusu mpo na emisyó na bango moko oyo balingaka na televizyó to mpo na lisano moko boye. Yango emonisi ete bazali mpenza mosika na mposa ya solo oyo eyebisamaki na bana ya Kola: “Molimo na ngai ezali na nzala, mpe ezali koyoka mposa na lopango na [Yehova].”—Nz. 84:2.
3 Ya solo, kati na makita tozali kozwa bilei mingi ya elimo; nzokande, bayangani mosusu bazali na nkaká mpo na kotya likebi. Ezali na baoyo bazali kokanisa makambo mazangi ntina, bazali komibanzabanza mpo na mitungisi ya mokolo, mpe nkutu ezali na baoyo bazali komemama na mpɔngi. Mingi bamonaka ete ebongi kozwa mwa banɔ́ti mpo na kolala mpɔngi te mpe kolanda na likebi. Lisusu, yango ezali kopesa nzela mpo na kokɔtisa kati na bɔɔngɔ́ na bango makambo oyo malobami. Nzokande, soki tomibongisi malamu, tokozwa matomba koleka na makita mpe tokozala pene mpo na “kotya motema na etingia” na makambo oyo bazali koteya.—Ebe. 2:1
4 Lokola esɛngami epai na mikóló, bana bazali mpe na mposa ya kozwa boyebi oyo epesami na makita. Soki baboti bazali kopesa bango biloko mpo na kosakana to babuku oyo ezali na lángi mpo na kosala ete bátya mobulu te, bana bakoyekola eloko moko te na boumeli ya makita. Ezali kozanga disipilini kotika bango kosakana, koloba, konganga to kosala eloko nini mosusu oyo ezali kopɛngwisa likebi ya bayangani. Bana bakobanda kokende mbala mingi te twalɛ́tɛ to komela kɔ́pɔ ya mai soki bayebi ete bakozala ntango nyonso elongo na tata na bango to na mama na bango.
5 Ntina ya kotosa ngonga: Na bantango mosusu, makambo oyo tokanaki yango te makoki kopekisa biso ete tókóma na ngonga malamu te na likita. Kasi momeseno ya koyaka na nsima wana loyembo mpe libondeli esili kosalema ezali elembo ya kozanga limemya mpo na ezalela ya bulɛɛ ya makita mpe ya kozanga bolingo mpo na basusu. Tómikundola ete koyemba nzembo mpe mabondeli oyo masalemi elongo na bandeko na biso ezali biteni ya losambo na biso. Koya nsima ya ngonga mbala na mbala eutaka mingi mpo na kozanga ebongiseli malamu. Ye oyo ayebi kotosa ngonga azali komonisa ete azali kotalela makita na motuya koleka mpe ete ayebi mpenza ntina na yango malamu.
6 Lokola mokolo na Yehova mozali kobɛlɛma na lombangu nyonso, tozali mpenza na mposa mingi ya koyangana elongo. (Ebe. 10:24, 25) Tómonisa limemya mpo na makita na koyanganáká mbala na mbala, na komibongisáká, na koyáká na ngonga malamu mpe na kotyáká likebi, mpe na kosaleláká makambo oyo tozali koyekola.