Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 1/7 nk. 10-13
  • Mapamboli na Jéhovah makomisaki ngai mozwi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mapamboli na Jéhovah makomisaki ngai mozwi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kolonga ntembe na epekiseli
  • Tokokisa mokano na biso
  • Tofungoli teritware ya sika
  • Lokola na Far West
  • Mikakatano kasi ntango nyonso bozwi
  • Bapesi bambwa na ngai bisikiti
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Yehova ateyaki ngai kosala mokano na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Ntina oyo nasepelaka kokómisa bato bayekoli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Natyaki miso mpe motema na ngai na libonza
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 1/7 nk. 10-13

Mapamboli na Jéhovah makomisaki ngai mozwi

Lisolo ya Elsie Meynberg

‘‘MAPAMBOLI na Jéhovah makoyeisa bozwi, akobakisa mawa na yango te.” (Masese 10:22). Ngai moko, namonaki bosolo na lisese oyo na Biblia. Botika nayebisa bino ndenge nini likambo yango esalamaki.

Wana nazalaki bobele na mbula motoba, nazalaki kolándá na kobombama masolo ya mama na ngai elongo na moteyi moko ya Biblia oyo azalaki koya kotalá biso, mpe namonaki ndenge mama asepelaki mingi na maye azalaki koyekola. Na butu moko na ntango ya hiver, nakitaki mpo na koluka mai ya komela, mpe nakutaki mama na ngai penepene na porte ya four oyo efungwamaki azalaki kotanga. Na esika ete angangela ngai lokola nazalaki kokanisa, azingaki ngai na loboko na ye mpe ayebisaki ngai ete nkombo na Nzambe ezali Jéhovah. Na koyoka bobele mongongo na ye, nakangaki ntina ete makambo oyo azalaki koyekola ezalaki na ntina mingi mpo na ye.

Nsima na mwa masolo mosusu elongo na moto oyo azalaki koteya ye na Biblia, mama na ngai abandaki koyebisa epai na baninga oyo bafandaki penepene na biso nsango malamu oyo ayekolaki Kasi, bayokelaki ye te. Tofandaki na mokili ya canada, na mboka, penepene na Beatty na Saskatchewan, mpe baninga oyo bafandaki penepene na biso, oyo mingi bazalaki basangani na libota na biso, bazalaki kosambela na lingomba ya ba luthériens to baevanzeliste. Kasi, mama na ngai alandaki kotala bango.

Na nsima ya ba fenetre ya talatala oyo ezalaki lokola na milinga, nazalaki kotala mama na ngai kobimisaka bampunda na ndako na bango na lolenge oyo ezali malamu mpenza te; kasi nayebaki ete amesanaki kokanga bango te. Na bantango mosusu, azalaki kokenda na makita to kosakola atako botemeli na tata na ngai. Tata aboyaki lingomba ya sika ya mama na ngai, kasi ye akangamaki na yango. Ntango azalaki kozonga na ndako, elongi na ye ntango nyonso ezalaki komonisa na miso ya bato nyonso esengo oyo ezalaki na motema na ye. Azalaki koloba: “Mapamboli na Jéhovah makoyeisaka bozwi”. Nazalaki komituna oyo alingaki koloba Atako nazalaki bobele na mbula motoba, ngai mpe nalingaki kosalela Jéhovah.

Mokolo moko, nazalaki elongo na tata na ngai likoló ya ndako, azalaki kobongisa mabaya oyo esimbaka manzanza Mama na ngai mpe ndeko na ngai ya mwasi Eileen bazalaki kokenda elongo na etuluku moko kati na motuka Ford modèle T mpo na kosangana na “botamboli ya kosala piblisité”. Basengelaki kotambola na ville mobimba na komemaka tabló oyo likoló na yango diskur piblike ekomamaki.

Tata na ngai atunaki ngai: “Yo okozala moto ya ligboma lokola bango te, boye te?” Kasi, atako nazalaki naino mwana moke oyo asepelaki mingi komata likoló ya biloko, nakokaki kosepela ete nazala na batamboli wana ya kosala piblisité na esika ya kozala likoló ya ndako. Ata bongo, balobaki ete nazalaki naino mwana moke mpo na kokoka komema tabló.

Kolonga ntembe na epekiseli

Bongo na Novembre 1940 nazwaki, mpo na mbala ya liboso, libaku ya kosakola Bokonzi. Oyo nde esengo! Lokola na eleko wana mosala ya ba Témoins de Jéhovah epekisamaki na canada tobimaki na katikati ya butu (minuit) mpe totikaki brochure La fin du nazisme na ba portes ya bandako nyonso.

Ntango nakomaki na mbula libwa, nazwaki ekateli ya komipesa epai na Jéhovah mpe kozwa batisimo. Mpo na minyoko, bayebisaki biso te esika assemblée ekosalema, kasi bamemaki biso na esika moko na zamba epai kuna etuluku monene ya batemwe bazalaki kosala “pique​—nique”. Kuna, yaya na ngai ya mwasi, Eleanor, mpe ngai tozalaki kati na ebele ya bato oyo bazwaki batisimo kati na etima na mai na malili mingi oyo ezalaki penepene.

Na eleko wana, mokolo nyonso na eteyelo ezalaki kobanda na losako na drapo mpe koyemba hymne national. Atako baninga na biso ya kelasi bazalaki kotala biso na miso ya kofunda, tozalaki koboya na botosi nyonso kosangana na losambo yango mpo na oyo Biblia ezali koteya likoló na losambo na bikeko. (Danyele, mokapo ya 3). Ndeko na ngai (cousine) Elaine Young, ye mpe azalaki temwe, asengelaki kotambola bakilometele motoba na makolo mpo na koya na eteyelo, kasi mikolo nyonso bazalaki kobengana ye mpo azalaki koboya kopesa losako na drapó. Azalaki bongo kozonga epai na bango Asalaki bongo na boumeli ya ndambo na mbula ya eteyelo, kasi batyaki ye absent te mpe alekaki kelasi.

Nsima na kolongwa na eteyelo, nazwaki mosala kati na banke moko. Kasi komekama moko ekomaki na 1950 ntango baboyaki kopesa ngai nzela ya koyangana na assemblée internationale des Témoins de Jéhovah oyo esalamaki na New York. Lokola nazalaki kobomba mwa ndambo ya mbongo, nazwaki likatami ya kolongwa mosala ya mosuni mpe kobanda mosala ya pionnier. Na yango, Elaine mpe ngai tokendaki kofanda na engumba ya Regina. Bamosusu bazalaki koseka ngai na kolobaka ete: “Kobanda na printemps akozonga na ndako mpo na kosengasenga”. Nzokande, nakokisaki bamposa na ngai na kosalaka mosala ya mosuni ya ntango moke lokola mwana ya mosala Bozwi oyo ezali kouta na mapamboli ya Jéhovah epesaki ngai nzela ya kotikala pionnier uta ntango yango.

Tokokisa mokano na biso

Na 1955, Elaine mpe ngai tozwaki esengo ya kobyangama na 26e classe ya Galaad mpe, nsima, totindamaki na mboka Bolivie (Amérique du Sud). Na eleko wana, mboka mobimba ezalaki bobele na Batemwe 160. Na nsuka, tozwaki nzela ya kokenda na mboka Tarija mpo na kokuta bamisionere mibale mosusu kati na teritware na biso ya liboso.

Tarija ezali ville moko kitoko. Nasepelaki mingi na komona basi oyo na elateli na bango na mboka, komemaka mikumba na bango na motó. Bato bazalaki malamu mingi mpe ata mokolo moke bayebisaki biso te ete basepeli na nsango na biso te. Bazalaki koyebisa biso ete tozonga kasi na ntango bayebaki ete bakozala te na bandako, mpo na bango ezalaki nde lolenge ya komonisa limemya. Esengaki na ngai ntango molai mpo nakoka komesana na ezalela yango.

Mokolo moko tozalaki kosolola na mobali moko liboso na porte na ye wana jeep eyaki kotelema na esika yango, sangó moko abimaki na kati, elongi ezalaki na nkanda makasi. Angangelaki mobali yango boye: “Soki otiki te kosolola na bana basi oyo, okolongolama na lingomba!” Na kobalukaka epai na biso, angangelaki biso na kobangisa ete: “Bozali na lotomo ya kosakola awa te. Soki botiki te, nakozwa meko oyo ezali makasi koleka.” Na ntango wana, bato mingi oyo bafandi mpembeni babimaki na bandako na bango mpo na koyeba soki ezalaki likambo nini. Mpe tolandaki bobele mosala na biso, na kokabolaka mikanda mingi mpe ba Biblia epai na bato oyo bayaki mpo na kolinga koyeba likambo oyo elekaki.

Wana esilaki biso kolekisa mbula mibale kati na lobwaku oyo kitoko epai kuna koloba mbisi, nguba mpe raisin etondi, tosepelaki te ntango tozwaki mokanda ya kolongwa wana mpo na kokende na teritware ya Potosí, ville oyo bazali kotimola mabanga ya ntalo oyo na malili makasi, oyo ezalaki likoló longwa na mai koleka bametele‘ 4 000. Tomesanaki na malili ya mbula mpembe ya ntango ya hivers na canada, kasi bokeseni ezalaki ete na Potosí móto ezalaki te kati na bandako. Nzokande, na ville yango, tokokaki kosepela na kosala elongo na lisangá moko ya boklisto, kasi na Tarija lisangá moko esalamaki naino te.

Tofungoli teritware ya sika

Nsima, Elaine mpe ngai totindamaki na mboka Villamontes, epai kuna moto asakolaki naino te. Motuka oyo tozwaki mpo na kokende kuna etondaki na sukali oyo ezalaki ya fraude; yango wana, mpo na kozala na matata elongo na bapolisyé te na nzéká (barrière) esika na kofutela biloko, motambwisi na motuka azwaki likatami ya kotambwisa na butu. Toyokaki mawa mingi mpo ete tozwaki torche te, mpamba te na mbula moko pembeni na biso na nsé na hema, eloko eninganaki! Nzokande ezalaki mosalisi na motambwisi na motuka

Na ngonga ya mitano ya ntongo, motuka etelemaki. Tobimaki na kati na kolalaka na mabelé, wana ezalaki biso kotungisama na milinga mpe tozipami na mputulu. Mabelé mabukanaki na balabala mpe nzela ezipamaki, nsima na ngonga minei ya mosala makasi mpo na kobongisa esika ya koleka, chauffeur asengaki na molandi na ye ete alekisa motuka na mwa nzela moke oyo eutaki kobongisama. Amekaki ata kotala te ntango motuka ezalaki kopasula nzela, moko na ba pneu mibale oyo ekangisami ezalaki kobaluka mpamba kozanga ete enyata mabelé, penepene na nzela, likoló na libulu oyo ezalaki komonana ete ezali mozindo te. Elaine mpe ngai tokatisaki na makolo. Wana tozalaki kopusana na Villamontes, ba virages ezalaki mingi na nzela mpe chauffeur azalaki kozonga nsima mpe kosala ba manoeuvres ndenge na ndenge mpo na koleka. Nsuka na yango, nsima na ngonga 35 ya mobembo moko ya mpasi, biso wana tokomaki!

Mpo na Elaine mpe ngai ezalaki mpenza likambo ya sika mpo na kozala mpenza biso moko. Banyama ya mikemike na esika oyo moi ezali makasi ezalaki mpe likambo ya sika mpo na biso. Nsima na kopupola mwinda oyo ezalaki likoló na mitó na biso bipekapeka bizalaki kokwela biso. Banzinzi ya mikemike ezalaki koswa biso, kobimisaka bongo makwanza minene oyo mazalaki kosala mokusa mpe kobimisaka mai na yango. Na butu ya liboso oyo tolekisaki kati na ndako na biso ya sika, nabimaki mpo na kosalela ba twalete oyo ezalaki libanda. Kasi ntango napelisaki torche, mabelé etondaki na banyama ya mikemike. Miselekete ekimaki noki mpe na mantutu, magbololo ebele mazalaki kotala ngai. Nazwaki ekateli ya kozela kino lobi mpo na kokota na twalete.

Na libaku mosusu, tozalaki penepene ya ebale mpe tokanisaki ete tokoki kopema likoló ya eteni na nzete oyo ezalaki wana. Kasi, tozwaki ekateli ya kokende kotala liboso moto moko oyo azalaki kofanda penepene wana. Ntango tozongaki, eteni ya nzete ezalaki lisusu te. Baleki nzela, na kobanga nyonso, bayebisaki biso ete nyoka monene ezalaki na esika yango. Kozanga kofanda na “eteni ya nzete” wana epesaki biso liteya monene.

Likambo tolingaki mingi na Villamontes, ezalaki ya kokenda kotala bato na mpokwa. Tozalaki kokuta bango bafandi libanda penepene na nzela na bakiti ya nkekele, bazali kobendaka kopo ya masanga oyo euti na nzete. Tolekisaki na esengo bangonga mingi mpo na kolimbola bilaka na Bokonzi na ezalela motindo yango. Kasi namonaki mpasi mingi ntango Elaine abalaki mpe natindamaki na Vallegrande elongo na moninga ya sika ya mosala.

Lokola na Far West

Mpo na kokoma na Vallegrande, nasalaki mobembo mosusu ya mpasi ya mikolo misato, ya mbala oyo nazalaki ngai moko. Banzela mike ya mabelé ezalaki komonana lokola ete ezali na nsuka te kati na esobe. Na nsuka ntango nakomaki, moi elalaki. Bus etyaki makelele kati na engumba oyo epai bampunda bazalaki mingi koleka mituka. Bato bazalaki kotala biso na nsé ya bansamba oyo ebendanaki penepene na nzela mpe esimbamaki na makonzi. Mibali misusu oyo batelemaki na makonzi bazalaki na ba revolvers na mokaba na loketo na bango. Nazalaki komona lokola bato nyonso balataki bilamba ya mwindo. Nalobaki ete: ‘Ezali mpenza lokola na mboka Far West!’

Mpe yango ezalaki solo. Koswana nyonso ezalaki kosuka se na masasi. Engumba ezalaki soko na bafandi 10 000, kasi na eleko yango kobomana mpe mobulu ezalaki mingi. Bato ya mboka bayangelamaki na etuluku ya miyibi oyo babotolaki biro ya kofutisa biloko oyo bizali kokota na ville. Miyibi yango bazalaki kobika bobele na biloko oyo bazalaki kobotola na mituka to na ba bus oyo bazalaki kotelemisa. Bazalaki mpe koyiba basali bilanga oyo bazali koya na biloko na ville. Na kobangisaka na monduki, bazalaki kobebisa bana basi, na miso na baboti na bango. Bamama bazalaki lisusu kotika bana na bango ya basi te kokenda bango moko kosomba biloko na magasin.

Kanisa bongo nini ezalaki mayoki na biso ntango, mokolo moko, mokonzi ya etuluku yango ya miyibi akotaki na Salle du Royaume. Azalaki na molangwa Mokengeli ya circonscription, oyo azalaki kosala diskur, abangaki. Mokonzi na miyibi alobaki: ’’Nazali mondimi!’’ wana ezalaki ye kobeta likofi na mokongo ya kiti mpe abukaki yango. Nsima asimbaki makasi mokengeli ya circonscription lokola ete akobeta ye. Kasi, na mbala moko alembaki, mpe moko na baninga na ye ya kelasi ya kala, oyo azalaki kati na bayangani, alongaki kobimisa ye.

Na nsuka, général ya basoda angangelaki mokonzi ya miyibi. Général akakemisaki mbwa moko ekufa na esika yango, mpe akomaki maloba oyo elobaki: “Bima na mboka, soki bongo te okokoma lokoka mbwa oyo.” Mokonzi oyo ya miyibi alongwaki na ville, mpe bomoi na bato na Villegrande ebongwanaki.

Mbala mosusu, tozalaki kolekisa ngonga 12 likoló ya mpunda mpo na kokenda kosakola na bamboka oyo ezalaki mosika. Kati na moko na bamboka yango, molakisi moko azalaki ntango nyonso koyamba biso na bolingo, mpe nsima, akomaki Témoin de Jéhovah. Na libaku moko, nazwaki mpunda mpo na kokende na mboka wana, kasi ntango nyonso tozalaki koleka penepene na ndako na moko na bankolo ya mpunda yango ya kala, mpunda ezalaki kokende wana, mpe nkolo na yango asengelaki ntango nyonso kozongisa biso na nzela.

Mikakatano kasi ntango nyonso bozwi

Lokola bamisionere mingi mosusu, nasosolaki ete mikakatano minene oyo moto asengeli kolonga ezalaki molunge te to banyama ya mikemike te, ezalaki malili te, to maladi mpe bobola te. Kasi ezali nde bokeseni ya bomoto. Mbala mingi nazalaki komituna: ‘Mpo na nini mikakatano motindo boye ezali kati na lisangá ya Jéhovah?’ Nabandaki nkutu kotya ntembe mpo na kondima soki ete Jéhovah akomisaki ngai mozwi na mapamboli na ye. Nsima na yango namikundolaki Masese 10:22 mokapo oyo ezali koloba mpo na mapamboli ya Jéhovah. Eteni ya mibale ya verset yango elobi boye: “Akobakisa mawa na yango te.” Na yango, tokoki kopamela Jéhovah mpo na matata yango te. Nayaki kokanga ntina ete ezali moko na makambo oyo tozwaki uta Adam mpe etyami na oyo Paulo atangaki na Baloma 8:22: “Biloko nyonso bizalisami bizali kokimela elongo.”

Tozalaki kokomana mikanda na Walter Meynberg, oyo azalaki na Béthel ya canada, mpe ntango nazalaki na bopemi na canada na 1966, tobalanaki, mpe totindamaki na La Paz, kapitale ya Bolivie. Oyo nde mapamboli na komona ndenge motuya na masangá ezalaki kokola na engumba yango, longwa na moko, ntango nakomaki na bolivie, kino kokoma na 24! Ezalaki mpe bongo kati na bingumba mosusu ya mboka. Na yango, etuluku ya basakoli 160 oyo bazalaki kosakola nsango malamu ntango nakomaki na 1955, ekolaki kino sikawa ekomi 7 000.

Ndakisa ya kozonga nsima te oyo mama na ngai amonisaki, esili koleka ntango molai, epesaki nzela na bandeko na ngai zomi ya mosuni bakota na mosala ya pionnier. Nazali na esengo ya koloba ete tata na ngai akomaki Temwe, mpe bato koleka 30 baoyo elongo ma bango nazwaki libaku ya koyekola Biblia bazwaki batisimo. Wana ezali bozwi te? Ee, nazali komona yango boye. Ya solo, mapamboli na Jéhovah mayeisaki ngai mozwi’.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto