Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w22 Avril lok. 15
  • Bapesi bambwa na ngai bisikiti

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bapesi bambwa na ngai bisikiti
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Masolo mosusu
  • Masolo ya basi mibale oyo bakufelá mibali
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mapamboli na Jéhovah makomisaki ngai mozwi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Bashario ya mikanda ezali kopesa “litatoli na bikólo nyonso”
    Ndenge oyo makabo na yo esalelamaka
  • Ntango yo ná fianse na yo bosilani
    Lamuká!—2015
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
w22 Avril lok. 15
Mobali moko azali kotambola na bambwa na ye mibale. Bapusani pene na babalani moko Batatoli oyo batɛlɛmi pene na shario ya mikanda.

Bapesi bambwa na ngai bisikiti

NICK, oyo afandaka na Oregon, na États-Unis akomaki boye: “Na prɛnta ya mobu 2014, nazalaki kotambola elongo na bambwa na ngai mibale na engumba esika nafandaka. Batatoli bazalaki ntango nyonso na kati ya engumba, mpe bazalaki kotɛlɛma pene na bashario na bango ya mikanda. Balataki malamu mpenza, mpe bazalaki kopesa moto nyonso oyo azalaki koleka na nzela mbote na esengo mpenza.

“Batatoli bazalaki kaka te na boboto epai ya bato, kasi mpe epai ya bambwa na ngai. Mokolo moko, ndeko Elaine, oyo atɛlɛmaki pene na shario, apesaki bambwa na ngai mibale bisikiti. Nsima na yango, ntango nyonso oyo tozalaki kokóma pene na shario, bambwa na ngai ezalaki kolinga kokende epai Batatoli bazali mpo bápesa bango ‘mwa bisikiti.’

“Mwa basanza elekaki. Bambwa na ngai ekómaki kosepela kolya bisikiti ya Batatoli yango, mpe nasepelaki mingi na masolo ya mokuse oyo nasololaki na bango. Kasi nazalaki kolinga kosolola na bango mingi te. Nazalaki na mbula koleka 70, mpe nayebaki te makambo oyo Batatoli bandimaka. Lokola nazalaki lisusu kosepela te na mangomba mingi ya bokristo, nakanisaki ete eleki malamu nayekola Biblia ngai moko.

“Na ntango wana, namonaki Batatoli na bisika mingi na engumba, batɛlɛmaki pene na bashario na bango ya mikanda. Bazalaki ntango nyonso na boboto. Bazalaki kosalela Biblia mpo na koyanola na mituna na ngai mpe yango esalaki ete natyela yango lisusu motema mingi.

“Mokolo moko, Elaine atunaki ngai boye: ‘Ondimaka ete banyama ezali likabo oyo euti na Nzambe?’ Nayanolaki ye boye: ‘Ɛɛ, nandimaka yango!’ Na nsima, ndeko Elaine atángelaki ngai Yisaya 11:6-9. Banda wana, nakómaki na mposa ya koyekola Biblia, kasi nazalaki kaka koboya kozwa mikanda nyonso ya kotánga epai ya Batatoli.

“Mwa mikolo elekaki, nakómaki kosepela kosolola masolo ya mokuse mpe ya kolendisa na ndeko Elaine ná mobali na ye, Brent. Basɛngaki ngai natánga mokanda ya Matai tii mokanda ya Misala mpo nayeba soki esɛngaka nini mpo moto akóma mokristo. Nasalaki bongo. Mwa moke na nsima, nandimaki koyekola Biblia na Brent ná Elaine. Ezalaki na katikati ya mobu 2016.

“Nazalaki kozela na mposa makasi boyekoli na ngai ya Biblia mpe kokende makita na Ndako ya Bokonzi. Nazalaki na esengo ya koyekola makambo oyo Biblia eteyaka mpenza. Elekaki mbula moko na nsima, nazwaki batisimo mpe nakómaki Motatoli. Sikoyo nazali na mbula 79, mpe nazali na botɔndi mingi ndenge nakómi na lingomba ya solo. Yehova apamboli ngai ndenge asalisi ngai nakɔta na libota ya basambeli na ye ya mokili mobimba.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto