Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 1/8 nk. 3-4
  • Bilenge kati na mosala ya Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bilenge kati na mosala ya Nzambe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Masolo mosusu
  • Bilenge oyo bazali lokola matanga ya mamwe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Bilenge basaleli na ntango na kala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Bilenge ya esengo bazali kosalela Jehovah
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Bilenge, bósanzola Yehova!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 1/8 nk. 3-4

Bilenge kati na mosala ya Nzambe

OKAMWAKA wana ezali yo komona bilenge oyo bazali na nzoto malamu kopesa ntango na bango kozanga kofutama, mpo na koya kobeta na ekuke na yo mpo na kolobela Nzambe? Ezali likambo ya kokamwisa na komona bana kosangana elongo na baboti na bango mpo na koyebisa avenire kitoko oyo Biblia ezali kolaka epai na bazalani na bango na eleko oyo kozanga kondima ezali sé kokola. Boye te?’’

Kati na ebele ya masangá 60 000 ya ba Témoins de Jéhovah na mokili mobimba, okokuta motuya monene ya bilenge. Bazali kokende na école du dimanche te, mpe na catéchisme te. Na esika ete basala motindo wana, bilenge yango bazali kozwa matomba na makita ya lisangá mpe bazali nkutu kosangana na yango. Baoyo mike bazali mbala mosusu kopesa bakomantere ya petee. Baoyo mikoló bazali kosala mikumba na Eteyelo mpo na mosala ya Nzambe. Bilenge mingi bazali kolekisa bopemi na bango na kosalisa bazalani na bango ete bayeba Nzambe mpe bilaka na ye kitoko mpo na avenire.

Na solo, mosala oyo bilenge bazali komipesa na yango ebandi lelo te. Biblia ezali kolobela bosembo ya bilenge mibali mpe basi, lisusu mpe bana mike baoyo bapesaki ndakisa malamu mpo na oyo etali kosalela Nzambe.

Mokanda ya Nzembo esakolaki ete “bilenge” mingi lokola “mamwe” bakosalela Nzambe. Esakolaki lisusu ete “bilenge” mpe “baseka” bakokumisa nkombo na Nzambe. (Nzembo 110:3; 148:12, 13.) Emonani ete bilenge mosusu bazalaki wana na ntango elimo santu ekitelaki bandimi na Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso. Mokolo yango, bato koleka 3 000 bandimaki Liloba mpe bazwaki batisimo. Lisusu, ntoma Petelo alobaki ete likambo yango ya kokamwisa likokisaki esakweli ya Yoele oyo ete: ’’Bana na bino mibali mpe bana na bino basi bakosakola, mpe bilenge na bino bakomona bimonaneli, mpe mikóló na bino bakolota ndoto.”​—Misala 2:4-8, 16,17, 41.

Biblia ezali na bandakisa mingi ya bato oyo basalelaki Jehovah Nzambe na bolenge na bango, oyo kati na bango Samwele, moyengebene mokonzi Davidi, Yilimia mpe Daniele basakoli oyo bayebani mingi mpe Timoté moto na sembo. Zulunalo oyo ezali kolobela bamosusu kati na bato yango bapesaki ndakisa malamu. Kati na masolo yango, okomona mpo na nini bilenge mpe mikóló bazali kozwa na motuya mingi mosala na bango mpo na Nzambe, mpe mpo na nini bazali kolekisa ntango mingi na kosalisa bazalani na bango ete basala lolenge moko.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto