Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 1/8 nk. 26-30
  • Tosili kobokola bana mwambe kati na toli na Jéhovah

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tosili kobokola bana mwambe kati na toli na Jéhovah
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nayekoli banzela ya Jéhovah
  • Mokano mpo na mosala ya pionnier
  • Kobokola bana libaku mosusu ya malamu
  • Tokómi lisusu ba pionniers
  • Matomba malamu
  • Tosaleli Yehova kati na libota oyo ezali na bomoko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Jehovah apambolaki ekateli na ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Tókanisaka basali ya ntango nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Kobɔkɔla bana mwambe na banzela ya Yehova ezalaki mpasi mpe esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 1/8 nk. 26-30

Tosili kobokola bana mwambe kati na toli na Jéhovah

LISOLO YA OVERLAC MENEZES

“Bayaki likoló na velo oyo ekangani.” Wana ezalaki maloba na ebandeli ya lisolo moko oyo ezwaki lokasa mobimba oyo Jornal de Resende ekomaki na na ntina na libota na biso, na ntango tolongwaki na Resende na 1988 mpo na kokende na Lages, na sud ya Brésil.

LISOLO yango elandaki boye: “Baoyo bazali mikoló kati na biso, na ntembe te bazali komikundola babalani oyo bazalaki kobenda likebi ya bato na Resende na velo oyo bazalaki kotambola na yango oyo na motindo na kala mpe ekeseni na bavelo mosusu: velo yango ezalaki na cadre moko monene mpe na bibenga mibale. Overlac Menezes, ye ‘mokumbi’ azalaki liboso; mpe mwasi na ye Maria José azalaki na ebonga ya mibale, na nsima. Ezalaki wana na mobu 1956.”

Mokomi na zulunalo yango ezalaki mobali moko na nkombo Arisio Maciel, Directeur na station ya radio ya mboka Resende. Ayebaki biso mpo na mbala ya liboso na 1956 wana mwasi na ngai mpe ngai tozalaki koleka mbala na mbala na émission moko ezalaki kolakisama na la Société Watch Tower, na titre Sujets de réflexion, mpe ezalaki kosalama mbala moko na poso na radio. Kati na lisolo yango, moto wana azalaki komikundola ete nalobaka ete na boumeli na mikolo oyo nakosala wana, “tosengelaki kokota na bandako nyonso ya Resende, koleka na balabala moko nsima na mosusu”.

Bolingi koyeba lolenge nini toyebanaki mingi na mboka Resende? Ezalaki boye: na ntango tozalaki kofanda kuna, tolongaki na kobokola bana mwambe ‘kati na toli na Jéhovah’ wana tozalaki mpe lisusu kotala bandako nyonso ya Resende lokola bamemi na nsango malamu ya Bokonzi.​—Baefese 6:4.

Nayekoli banzela ya Jéhovah

Na Janvier 1950, Témoin de Jéhovah moko na nkombo Maria Minc, abandaki koyekola Biblia elongo Adeilde, na ndeko na ngai ya mwasi, oyo azalaki kofanda na São Paulo. Na eleko wana nazalaki na mibu 16, mpe nasilaki kozwa batisimo na katolike, kasi nazalaki lisusu kokende losambo te esili koleka mwa mikolo mingi. Kasi, nazalaki bobele kondima Nzambe mpe na mposa ya kosalela ye. Yango wana nakendaki na mpokwa moko epai na Adeilde, mpo na koyeba lingomba na ye ya sika oyo azalaki koyekola. Maria Minc abengaki ngai ete nasangana na boyekoli, mpe ezalaki mpo na ngai mbala ya liboso ya komona Biblia. Na boumeli na boyekoli bozalaki kolanda, nakamwaki na koyeba ete nkombo na Nzambe ezalaki Jéhovah, ete mosika te mabelé ekokóma paradiso, ete lifelo ya móto mpe purgatoire ezali te, mpe ete moto azali na molimo te oyo ezangi kokufa. Libota na ngai bazalaki koloba ete: “Okozwa ligboma na kotángaka Biblia!”

Nakólaki malamu mpenza na boyekoli ya Biblia, mpe nabandaki koyangana na makita na lisangá ya Belém na São Paulo. Nakanisaki ete nakokuta bobele mikoló kati na bayangani, nasepelaki mingi mpenza na komona mpe ebele na bilenge ya mbula na ngai. Mpo na mbala ya liboso, nateyaki na le 5 février 1950, mpe na le 4 Novembre bobele na mobu wana namonisaki elembo ya komipesa na ngai epai na Jéhovah na kozwáká batisimo na mai.

Nsima na mwa ntango moke, naponamaki lokola molobi. Na ntango wana, ezalaki kolimbola ete nazalaki kopesa badiskur kati na balabala mpe na biyanganelo, na kosaleláká haut-parleur oyo etyamaki liboso ya motuka. Tozalaki mpe kokabola bazulunalo. Na mikolo yango, tozalaki kotelama na bansuka ya balabala na kongangáka ete: “La Tour de Garde mpe Réveillez-vous! ezali kosakola bokonzi ya Jéhovah!” Ngai nakabolaki bazulunalo mingi te na motindo wana, kasi nakomaki na molende ya koloba liboso na bato mingi.

Mokano mpo na mosala ya pionnier

Makanisi na ngai etyami sikawa na motuya ya mosala ya pionnier, kosakola na ntango nyonso. La Tour de Garde ya 15 Juin 1950 ezalaki na lisolo moko na titre oyo: “Ba pionniers mingi ya nsango malamu”. Zulunalo yango elobaki ete: “Koluka liboso Bokonzi elimboli kotya ntango nyonso matomba ya Bokonzi na esika ya liboso. Moto oyo azali kosala bongo, akoluka mabaku nyonso mpo na kosala na ntina na Bokonzi, kasi akoluka te kokokisa bamposa na ye ya mosuni na esika ya liboso mpe na komizwela biloko ya mokili oyo mpo na kobongisa avenire na ye.” Maloba wana malonaki elimo ya pionnier na motema na ngai.

Sikawa, elenge mwasi moko kitoko na nkombo Maria José Precerutti esepelisaki ngai mingi mpenza. Azalaki kokóla malamu na boyekoli ya Biblia oyo azalaki koyekola elongo na babalani mibale ba Témoins de Jéhovah, José mpe Dilia Paschoal. Na le 2 Janvier 1954, Maria José akómaki mwasi na ngai ya bolingo, moninga na ngai mpe mosungi na ngai. Ye mpe asepelaki kokoma pionnier. Na yango, kolendisámáká na ndakisa malamu ya bamisionere lokola Harry Black, Edmundo Moreira mpe Richard Mucha, tosalaki demande mpo na mosala ya pionnier. Kanisa naino esengo mpe kobanga oyo tozalaki na yango wana tozwaki eyano oyo ete: “Ondimami mpo na kozala mokengeli ya zongazonga.”

Ntango nazwaki mokumba na ngai mpo na mbala ya liboso kati na circonscription, nabangaki mingi circonscription oyo nasengelaki kosala ezalaki na masangá zomi ya Rio de Janeiro oyo ezaláká kapitale ya Brésil, bakisa masangá mosusu oyo ezalaki pene na Béthel. Kati na lisangá oyo nasengelaki kotala liboso, ezalaki na bamisionere ya Galaad, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watch Tower. Ntango nazalaki na mibu 22, nazalaki komiyoka ete nakoki mpenza te, mpe nalobaki epai ya frere Mucha, oyo azalaki na mokumba ya kotalela mosala ya mboka Brésil ete: “Nasengeli koteya nini epai na bato oyo?” Ayanolaki ngai ete: “Salela bobele batoli ya Biblia mpe batoli ya lisangá.” Ezalaki toli malamu mpenza.

Kasi, nsima na mbula moko, totikaki mosala kati na circonscription, mpamba te Maria José azwaki zemi. Ezali esengo mpenza, mpamba te totikalaki bobele kati na mosala ya pionnier. Na koyanoláká na ba demandes ya mabota mibale ya bandeko oyo bauti na mboka Finlande, libota ya ndeko Edvik mpe oyo ya ndeko Leinio, la Société atindaki biso lokola ba pionniers spéciaux na mboka Resende, teritware oyo ezalaki na bato pene na 35 000 epai kuna ba Témoins bazalaki te. Ezali libota ya Leinio nde bapesaki biso velo oyo elobelami na zulunalo Jornal de Resende. Na yango nde tolonaki mboto mingi ya solo kati na teritware yango ezalaki kobota mbuma mingi, mpe tolandaki kosalakola kati na yango, mwa basanza nsima na kobotama ya mwana mwasi na biso Alice, na 1956. Ntango tolongwaki wana, bandeko basi mibale, Anita Ribeiro mpe Marian Weiler bayaki komwangisa mai na milona wana mpe ‘Nzambe akolisaki yango’. Lelo oyo, masangá ezali na Resende mpe ezali na basakoli koleka 700.​—1 Bakolinti 3:7.

Manoel Queiroz azali moko na bato ya liboso oyo nakutanaki na bango na Resende. Natikelaki ye mikanda mibale wana ezalaki ye kozela bus na esika epai kuna azalaki kosala. Ye, mpe nsima mwasi na ye, bakolaki malamu mpenza na elimo mpe bango nyonso mibale bazwaki batisimo. Manoel akómaki nkulutu ya lisangá mpe atikalaki sembo epai na Jéhovah kino kufa na ye. Nayekolaki elongo na Alvaro Soares. Mbala ya liboso oyo ayanganaki na likita, akamwaki na kokuta bobele bato motoba mpamba, kasi azali lelo mokengeli ya ville na Resende, epai kuna bato koleka nkoto bazali koyangana na makita makeseni ya lisangá. Na 1978, carlos, mwana ya Alvaro, abalaki mwana mwasi na biso, Alice. Sikawa, koleka basangani 60 na libota ya Soares bazali batemwe.

Tolongwaki na Resende, mpamba te tokitanyaki mosala ya pionnier na mokumba mosusu ya boklisto, oyo ya ‘kobatela libota na biso’. (1 Timoté 5:8.) Kasi, tosalaki makasi ya kobomba elimo ya pionnier, na kobateláká mokano na biso ya kosala lokola pionnier. Nazwaki mosala na kompanyi moko ya São Paulo, mpe na boumeli ya mbula moko, nazalaki kosala bakilometele 300 na week-end nyonso mpo na kosalisa etuluku moko ya basakoli 15 na mboka Resende. Mpe na 1960, tozongaki na engumba yango.

Kobokola bana libaku mosusu ya malamu

Tokanaki mpenza kozwa bana mingi te, kasi atako bongo, bayaki bamoko nsima na bamosusu. Nsima na Alice, ezalaki Léo, mpe Márcia, Maércio, Plinio, André, mpe na nsuka tozwaki mapasa ya basi na 1976, Sónia mpe Sofia. Mokomoko kati na bana wana bayambamaki lokola “libula ya Jéhovah”. (Nzembo 127:3.) Mpe mokomoko na bango abokolamaki kati na “mateya ya Jéhovah”, mpe na lisalisi na Ye.​—Baefese 6:4.

Kasi ezalaki mokumba monene. Tozalaki mbala mosusu kolela na mikakatano. Ezalaki na ntina mpo na komema yango. Ndenge nini tobokolaki bana na biso? Na kozaláká na boyekoli ya libota, na kokendáká elongo na bango na makita mpe na mosala ya kosakola uta bomwana na bango, na kosaláká makambo nyonso elongo kati na libota, na kosenzeláká ete bazala na baninga malamu, na kopesáká bango toli malamu mpe na kopesáká ndakisa malamu biso moko.

Esili koleka mwa bambula, totunamaki na mokengeli ya zongazonga, na assemblée ya Cruzeiro, na São Paulo. Nsima wana tolobelaki na ntina na boyekoli na biso ya libota, atunaki ngai ete: “Mosala nini mwasi na yo akokisaki mpo na yango?” Nazali komikundola ete mpisoli ezalaki na miso na ngai, mongongo ekangamaki na boye ete nakokaki kopesa eyano te. Mpo na nini? Mpo ete nazalaki kotonda Maria José na mosala oyo akokisaki mpo na kosala ete libota na biso ezala libota moko ya teokratike. Soki lisungi na ye ya sembo te, mbele nalingaki komona mpasi mingi!

Kobanda ntango tozali bafiansé, Maria Jose mpe ngai, tozalaki na momesano ya koyekola Biblia esika moko. Ntango tozwi bana, ekomaki mpasi mpo na kosala yango mbala na mbala. Mpo ete tomisalisa, poso nyonso likoló ya ezipeli ya frigo, nazalaki kokoma ngonga mpe makambo oyo tokoyekola na mbala ya nsima. Nazalaki mbala mosusu kopesa mikumba ete bana basala bolukiluki ya masolo na kotalelaka bamposa esengeli na ntango wana. Na ndakisa, mokolo moko Márcia mpe Plinio baswanaki na ntango na kolya. Lobi lolandi, bakutaki likoló na ezipeli ya frigo ete basengelaki kosala bolukiluki na teme oyo “Ndenge nini kozala na boyokani elongo na bandeko na bino mibali mpe basi.” Na boyekoli oyo bolandaki, bango nyonso mibale bapesaki makanisi na lisolo yango, mpe basilisaki matata na bango.

Likambo mosusu ezalaki kobima na ntongo nyonso ya dimanche, mpamba te bana mibali bazalaki koloba mbala mingi ete bakokaki te kosakola mpo ete bazalaki mpenza maladi. Léo mpe Plinio bayebaki kokosa mpenza bampasi na libumu to bampasi na motó mpo ete bakoka kozala elongo na biso te kati na mosala ya kosakola. Ntango nazalaki kotya ntembe na maladi na bango, nazalaki koloba mwa likambo moko ya motindo oyo: ‘Soki bozali mpenza maladi mpo na kobima na mosala ya kosakola, bokokoka mpe te kozala na makasi ya kobeta ndembo na nsima.’ Na maloba wana, mbala mingi maladi na bango ezalaki kosila nokinoki.

Mbala na mbala, tosengelaki kobongisa makambo mingi minene. Wana azalaki na mibu 11, Léo akendeki na pique-nique elongo na batemwe mosusu, mpe asombaki kilo moko ya jambon kozanga ndingisa na biso. Nsima, ntango tozwaki mokanda, Maria José atunaki Léo ete: “Oyebi lisusu ete osombaki jambon?” Awanganaki boye: “Te, nasombaki ata eloko moko te.” Maria José alobaki ete: ’’Malamu, tokende kotuna moteki.’’ Wana ezalaki bango kokende, na nzela, kobosana ya Léo esilaki na mbala moko. Andimaki ete: “Namikundoli sikawa, nazalaki na mbongo mingi te, mpe nadefaki yango mpe nabosanaki kofuta.” Bongo, nafutaki yango, mpe nasengaki na moteki ete azwa Léo na mosala mpe asala kino akozwa mbongo mpo na kozongisela ngai. Wana ezalaki etumbu. Ntongo nyonso, na ngonga ya minei, Léo azalaki moto ya liboso mpo na kokóma na mosala, mpe nsima na sanza moko, azongisaki motuya nyonso ya mosolo.

Ndako na biso etondaki ntango nyonso na ba pionniers, na bakengeli ya zongazonga na bamisionere, mpe na basali ya Béthel. Na boumeli ya ntango molai, tozalaki na televizió te, yango nde apesaki biso nzela na kozala na mimeseno malamu ya boyekoli mpe ya etamboli na boklisto. Ezali na ezalela wana nde tobokolaki bana na biso. Mikanda mosusu oyo bakomelaki biso wana ekómaki bango mikoló, endimisi ete ezalela yango ezalaki na matomba.Tala encadré na lokasa 30.

Tokómi lisusu ba pionniers

Ntango mingi kati ya bana na biso bakómaki mikoló, namikundolaki lisolo moko na La Tour de Garde ya 15 juillet 1955 na titre “Mosala ya pionnier ezali mpo na yo?”, oyo eteni na yango elobaki boye: “Bamosusu bakanisi ete mosala ya pionnier ezali bobele mpo na bamoko. Nzokande, bazali mpenza komikosa, mpamba te, wana moklisto nyonso amipesi epai na Nzambe, asili mpenza kondima kosalela ntango na ye nyonso kati na mosala ya Nzambe, loba bobele soko nde apekisami na makambo mosusu mauti na mokano na ye te.”

Na mpokwa moko, nabondelaki Jéhovah ete afungolela ngai lisusu nzela mpo na mosala ya pionnier. Libota na ngai basungaki ngai, mpe bandeko mibali mpe bandeko basi balendisaki ngai. Nakamwaki na oyo ete, directeur ya kompanyi oyo nazalaki kosala uta mibu 26 andimaki ete nasalaka mosala na ndambo ya mokolo; nabandaki bongo mosala ya pionnier permanent. Bongo, nazongelaki lisusu na esengo nyonso, mosala oyo natikaki esili koleka bambula mingi, mpe kati na bana na ngai, misato basili kolanda ndakisa na ngai.

Tosalaki mbula mibale lokola pionnier permanenet na lisangá ya ltatiaia, epai kuna nazalaki nkulutu uta mibu 15, mpe tozwaki ekateli ete tokende kofanda na teritware epai kuna mposa ezalaki monene. Yango elimboli ete, tosengelaki kobika na mwa alokasyo moke, oyo ekokani pene na ndambo na minei ya lifuta ya malamu. Kasi, na kozaláká na elikya na elaka na Yesu oyo ekomami na Matai 6:33, tokomaki mokanda epai na la Société mpo na koyebisa mikano na biso. Nsima na poso, tosepelaki na kozwa eyano oyo ete: “Tomoni malamu mpo na koyebisa bino ete bokende kofanda na engumba Lages. Kuna ezali bobele na basakoli 100, baoyo bakabolami na masangá mike misato, kati na popilasio ya bato 200 000. Bobongi mpenza na teritware yango.”

Tolongwaki na ltatiaia na Février 1988. Mpe kino lelo, tozali bobele na Lages, mosika ya bakilometele 1000 na bana na biso mpe na baninga na biso. Touti komona mpasi na hiver moko makasi lokola oyo tokutanaki na yango esili koleka mibu 20 sikawa. Nazali nkulutu ya lisangá bobele ngai moko, mosala ya kosala ezali monene. Kasi, tozali kozwa mpenza mapamboli mingi. Teritware ezali mpenza kitoko. Ntango tozali kobeta na bikuke na bango, bato bazali kobenga biso ete tokota. Tozali kobanda boyekoli na Biblia kozanga nkaka. Soki mosolo mozangi, tozali kondima kozwa makabo nyonso oyo bato bazali kopesa biso mpe tozali kozonga na ndako na basabuni, na malasi, bajilete, bilamba (mpo na bankoko na biso), masangó, ndunda, mbuma ya kolya, ba yaourts, masanga, mpe ba glaces. Mbala mosusu andimaki nkutu bibenga oyo bisalamaki na mabaya.

Matomba malamu

Ntango nyonso nazali kokanisa na ntina na libota na ngai, awa ekómi ngai na mibu 56 lelo, azali na esengo mingi. Bana “babotamaki kati na solo te”. Kasi babotamaki nde kati na libota a boklisto, mpe esengelaki kokolisa solo na tingya nyonso kati elimo mpe motema na bango ya bolenge. Baoyo basili kobala, bapona, babalani na bango “kati na Nkolo”. (1 Bakolinto 7:39; Deteronome 6:6, 7.) Ya solo, tozalaki kosala mabunga wana tozalaki kozwa bikateli. Nkutu mbala mosusu tozalaki kosala mpe mabe. Na mabaku mosusu, nazalaki kopesa ndakisa malamu te, to mpe nazwaki mikumba na ngai ya tata mpe ya mobali na libala na bopotu mingi. Kasi ntango nazalaki koyeba yango, nazalaki kosenga lilimbisi epai na Jéhovah mpe epai na mwasi na ngai to mpe epai na bana na ngai, mpe nazalaki kosala milende ya komisembola.

Atako tozangi kokoka, libota na biso oyo na yango ba bokilo mpe bankoko babakisamaki ezali na ba pionniers motoba, bankulutu minei mpe mosaleli na misala moko. Bango nyonso basili kozwa batisimo, longola bobele bankoko. Bana mike oyo bafandi na biso, bazali na mokano ya kokómisa mosala ya pionnier, mosala ya bomoi na bango mobimba. Oyo ezali mpenza mbano monene tokokaki kolikya. Boye te? Nazali kotondo Jéhovah na lolenge oyo akambaki biso mpo na kobokola bana na biso kati na toli na ye. Tozali na esengo ya komona bango kolanda kotosa mateya na ye. Nazali kobondela ete biso topengwa na nzela ya solo te ná bango mpe lokola.

[Etanda na lokasa 30]

Ntango bakomaki mikolo, bana na biso bazalaki mbala mosusu komonisa botondi na bango kati na mikanda oyo bazalaki kotindela biso, mpo na mateya oyo topesaki bango. Botala mwa ndambo na maloba na bango.

“Papa, yeba ete yo ná mama bosili kosala oyo bosengelaki kosala mpo na biso, ata soko bozalaki mbala mosusu kosala mabunga, yango nde ekomelaka ngai ná carlos mbala na mbala wana ezali biso kobokola Fabricio, mwana na biso ya mobali.”

Alice, azali na mibu 33, mama ya bana mibali mibale.

“Tosengeli kozala na botondi ete bosangisaki milende na bino mpo na kobokola biso kati na mateya na Jéhovah. Tozali na matomba mingi mpo na yango lelo.”

Marcia, azali na mibu 27, mpe mobali na ye azali mokengeli ya zongazonga.

“Nasosoli ete, nakokaki te kozwa libaku malamu oyo nazali na yango, soki bosalisaki ngai te mpo na kozwa moboko makasi na elimo mpe na kolinga Nzambe mpe mosala na ye.”

Maercio, azali na mibu 23 azali pionnier spécial.

“André, zwa matomba na boninga mpe na eksperianse ya papa. Kozwa batoli na ye na bopotu te. Boye bokosalisana. Lelo, nazali na esengo mingi koleka na ntango ya liboso.”

Plinio, azali na mibu 20, mosali na Béthel.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto