Lisolo ya bomoi
Kobɔkɔla bana mwambe na banzela ya Yehova ezalaki mpasi mpe esengo
YA JOYCELYN VALENTINE
Na 1989, mobali na ngai akendaki kosala na mboka mopaya. Alakaki ete akobanda kotindela ngai mbongo mpo nakoka kobɔkɔla bana na biso mwambe. Bapɔsɔ elekaki, nazwaki ata nsango na ye te. Basanza elekaki mpe nazwaki ata nsango moko ya mobali na ngai te. Nakobaki kotya motema ete, ntango makambo ekobonga, akoya.
LOKOLA nazalaki na mbongo te mpo na kobɔkɔla bana na ngai, nabungisaki mpenza elikya. Nazalaki kozwa mpɔngi te na butu mpe nazalaki komituna ete: ‘Ndenge nini akoki kosala libota na ye boye?’ Nsukansuka, nayaki mpenza kondima ete mobali na ngai asundoli biso. Lelo oyo, mbula 16 banda atikaki biso, azongi naino te. Yango esali ete nabɔkɔla bana na biso kozanga lisalisi ya mobali. Ezalaki mpenza mpasi, kasi komona ndenge bana na ngai bandimi kotambola na banzela ya Yehova, yango etondisi ngai mpenza na esengo. Kasi, liboso nabɛta lisolo ya bomoi na ngai ná bana na ngai, tiká nayebisa bino ndenge nakolaki.
Nazali koluka litambwisi ya Biblia
Nabotamaki na 1938, na Jamaïque, esanga moko ya Caraïbes. Atako Tata azalaki mondimi ya lingomba moko te, azalaki komimona lokola moto oyo abangaka Nzambe. Mbala mingi na butu, azalaki kosɛnga ngai natángela ye Biblia, na mokanda ya Nzembo. Mosika te, nakangaki mikapo na yango mingi na motó. Mama azalaki mondimi ya lingomba moko ya mboka na biso, mpe azalaki mbala mosusu komema ngai na lingomba yango.
Kuna, bazalaki koteya ete Nzambe akamataka bato malamu na likoló mpe azikisaka bato mabe na lifelo ya mɔtɔ libela na libela. Bazalaki mpe koteya biso ete Yesu azali Nzambe mpe ete alingaka bana mike. Nabulunganaki mpenza na makanisi mpe nakómaki kobanga Nzambe makasi. Nazalaki komituna boye: ‘Ndenge nini Nzambe oyo alingaka biso akoki lisusu konyokola bato na kati ya mɔtɔ?’
Likanisi ya lifelo ya mɔtɔ ekómaki kolɔtisa ngai bandɔtɔ ya nsɔmɔnsɔmɔ. Na nsima, nabandaki koyekola Biblia na nzela ya mikanda na Lingomba ya Adventiste. Bazalaki koteya ete bato mabe bakonyokwama libela na libela te, kasi bakotumbama na mɔtɔ. Namonaki ete mateya na bango ezali mwa malamu mpe nabandaki kosambela na lingomba na bango. Kasi, mateya na bango ezalaki kobulunganisa ngai makanisi, mpe makambo oyo nayekolaki kuna esalisaki ngai te namona ete etamboli ya mbindo ezali mabe.
Na ntango wana, bato mingi bazalaki kondima ete pite ezali mabe. Kasi, ngai ná bato mosusu tozalaki kokanisa ete kaka bato oyo basangisaka nzoto na basi to na mibali ebele nde basalaka pite. Na yango, tozalaki komona ete ata soki bato mibale babalani te kasi basangisaka nzoto kaka bango mibale, ezali lisumu te. (1 Bakolinti 6:9, 10; Baebele 13:4) Yango nde esalaki ete nabota bana motoba atako nabalaki te.
Nakoli na elimo
Na 1965, Vaslyn Goodison ná Ethel Chambers bayaki kofanda na Bath, engumba moko oyo ezali penepene na engumba na biso. Bazalaki babongisi-nzela to basakoli ya ntango nyonso ya Batatoli ya Yehova, mpe mokolo moko basololaki na tata. Andimaki ete bábanda koya koyekola na ye Biblia na ndako. Soki bakuti ngai na ndako, bazalaki mpe kosolola na ngai. Atako nazalaki na makanisi mabe mpenza mpo na Batatoli ya Yehova, nandimaki koyekola na bango Biblia mpo nasukisa lokuta na bango.
Ntango tozalaki koyekola, nazalaki kolandisa bango mituna, mpe bazalaki kosalela Biblia mpo na kopesa biyano na mituna yango nyonso. Basalisaki ngai nayeba ete bakufi bayebaka lisusu eloko te mpe banyokwamaka te na lifelo. (Mosakoli 9:5, 10) Nayebaki mpe elikya ya bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé. (Nzembo 37:11, 29; Emoniseli 21:3, 4) Atako tata atikaki koyekola Biblia, ngai nabandaki koyangana na makita ya lisangá ya Batatoli ya Yehova na mboka na biso. Lolenge oyo makita yango ezalaki kotambwisama na kimya mpe na molɔngɔ esalisaki ngai nayeba makambo mingi na ntina na Yehova. Nazalaki mpe koyangana na mayangani ya zongazonga mpe ya etúká, makita ya minene ya Batatoli. Ebele ya mateya ya Biblia oyo nayekolaki epesaki ngai mposa makasi ya kosambela Yehova na ndenge oyo esepelisaka ye. Kasi, nazalaki na mokakatano moko.
Na ntango wana, nazalaki naino na makango moko oyo tobotaki na ye bana misato. Nayekolaki na Biblia ete kosangisa nzoto na moto oyo bobalani na ye te ezali mabe na miso ya Nzambe, mpe lisosoli na ngai ebandaki kotungisama. (Masese 5:15-20; Bagalatia 5:19) Lokola bolingo na ngai mpo na solo ezalaki kokola, nakómaki na mposa ya koyokanisa bomoi na ngai na mibeko ya Nzambe. Nsukansuka, nazwaki ekateli. Nayebisaki makango na ngai ete tosengeli kobalana to kokabwana. Atako makango na ngai azalaki na kondima moko na ngai te, tobalanaki na miso ya Leta mwa 15 Augusto 1970, mbula mitano na nsima, banda mokolo nasololaki na Batatoli mpo na mbala ya liboso. Na Desɛmbɛ ya mobu 1970, nazwaki batisimo ya mai mpo na komonisa ete namipesi epai ya Yehova.
Nabosanaka te mokolo ya liboso oyo nabimaki na mosala ya kosakola. Nazalaki na kobanga mpe nayebaki te ndenge ya kobanda lisolo ya Biblia. Mpo na koloba solo, nasepelaki ntango moto ya liboso oyo nalingaki kosolola na ye akataki lisolo yango. Kasi mosika te, nazalaki lisusu kobanga te. Na nsuka ya mokolo yango, nazalaki na esengo mpenza, mpamba te nasololaki mwa masolo ya mokuse ya Biblia na bato mingi mpe natikelaki bango mikanda oyo elimbolaka Biblia.
Nasalisi bana na ngai bázala makasi na elimo
Na 1977, libota na biso ekómaki na bana mwambe. Nazalaki na ekateli ya kosalisa bana na ngai básalela Yehova. (Yosua 24:15) Yango wana, nazalaki kosala nyonso mpo na kotambwisa boyekoli ya Biblia mokolo na mokolo na libota. Ntango mosusu soki nalɛmbi makasi, mpɔngi ezalaki koyiba ngai ntango mwana moko azali kotánga paragrafe moko na mongongo makasi, mpe bana bazalaki kolamusa ngai. Nzokande, kolɛmba ya ndenge wana epekisaki biso ata mokolo moko te koyekola Biblia elongo.
Nazalaki mpe mbala na mbala kobondela elongo na bana na biso. Soki kaka bakoli mwa moke, nazalaki kolakisa bango kobondela Yehova bango moko. Liboso ya kolala, nazalaki koyebisa mokomoko na bango asala libondeli. Nazalaki kobondela na mwana mokomoko oyo akómaki naino na mbula ya kobondela ye moko te.
Na ebandeli, mobali na ngai azalaki koboya namema bana na makita ya lisangá. Kasi, lokola azalaki komona ete akokoka te kobatela bana ntango ngai nazali na makita, azalaki kotika ngai nakende na bango. Lokola na butu azalaki kosepela kokende kolekisa ntango na baninga na ye, akokaki kolinga te komemana na molɔngɔ ya bana mwambe! Na nsima, akómaki kutu kosalisa ngai na kobongisa bana mpo na makita.
Mosika te, bana bamesanaki koyangana na makita nyonso mpe kobima na mosala ya kosakola. Soki bazwi konje, bazalaki mbala mingi kobima na mosala ya kosakola elongo na babongisi-nzela to basakoli ya ntango nyonso ya lisangá na biso. Yango esalisaki bana na ngai bákóma kolinga makasi lisangá mpe mosala ya kosakola.—Matai 24:14.
Ntango ya komekama
Mpo na kozwa mwa mbongo mpo na koleisa libota na ye, mobali na ngai abandaki kokende kosala na mboka mopaya. Azalaki kokabwana na libota ntango molai, kasi azalaki mbala na mbala kozonga. Kasi na 1989, akendaki libela. Ndenge nalobaki yango liboso, kobungisa mobali na ngai ebulunganisaki mpenza makanisi na ngai. Nakómaki kolela mpe kobondela Yehova na molende mpenza na butu nyonso mpo abɔndisa mpe alendisa ngai, mpe namonaki ete ayokaki mabondeli na ngai. Bavɛrsɛ lokola Yisaya 54:4 mpe 1 Bakolinti 7:15 epesaki ngai kimya ya makanisi mpe makasi ya kokoba na bomoi na ngai. Lisusu, bandeko na ngai ya makila mpe baninga ya lisangá bazalaki kobɔndisa mpe kosunga ngai na biloko ya mosuni. Nazali kotɔnda mpenza Yehova mpe basaleli na ye mpo na lisalisi na bango.
Tokutanaki na mikakatano mosusu. Na ntango moko boye, mwana na ngai moko ya mwasi abimisamaki na lisangá mpo akómaki na etamboli mabe. Nalingaka bana na ngai nyonso makasi, kasi kotikala sembo epai ya Yehova ezali likambo eleki ntina na bomoi na ngai. Na ntango yango, ngai ná bana na ngai mosusu tosalaki mpenza oyo Biblia ezali kosɛnga mpo na bato oyo babimisami na lisangá. (1 Bakolinti 5:11, 13) Bato oyo bayebaki te ntina oyo tozalaki kosala bongo bazalaki koloba mabe mingi mpo na biso. Kasi, ntango mwana na ngai azongaki na lisangá, mobali na ye alobaki na ngai ete lolenge oyo tokangamaki na mitinda ya Biblia ekamwisaki ye makasi. Lelo oyo, azali kosalela Yehova elongo na libota na ye.
Mikakatano ya mbongo
Ntango mobali na ngai atikaki biso, nazalaki mpenza na mbongo te, mpe tozalaki lisusu na moto ya kopesa biso mbongo te. Yango esalisaki biso tóyeba kosepelaka kaka na mwa moke oyo tokoki kozwa mpe tótalelaka bomengo ya elimo na motuya koleka biloko ya mosuni. Lokola bana bayekolaki kolingana mpe kosalisana, bakolaki mpenza na bomoko. Ntango baoyo ya liboso bakómaki kosala, bazalaki kosalisa baleki na bango. Marseree, mwana na ngai ya mwasi ya liboso, asalisaki Nicole, leki na ye ya nsuka, asilisa eteyelo ya ntei. Lisusu, nafungolaki mwa butiki moko ya biloko ya mikemike. Mwa mbongo ya moke oyo nazalaki kozwa esalisaki ngai nakokisaka mwa bamposa na biso mosusu ya mosuni.
Yehova asundolaki biso ata mokolo moko te. Mokolo moko, nayebisaki ndeko moko ya mwasi ete tozali na makoki te mpo na kokende na liyangani ya etúká. Ndeko yango azongiselaki ngai boye: “Ndeko Vala, soki oyoki ete liyangani ekosalema mokolo boye, banda komibongisa mpo na mobembo! Yehova akokokisa mposa na yo.” Nayokelaki ye. Yehova akokisaki mposa na biso mpe azali kokoba kosala yango. Tozangisaka ata liyangani moko te mpo tozangi mbongo.
Na 1988, Ekumbaki Gilbert ebebisaki mpenza Jamaïque mpe totikaki ndako na biso mpe tokendeki komibomba. Na ntango moko oyo ekumbaki ekitaki mwa moke, ngai ná mwana na ngai ya mobali tokendaki kotala ndako na biso oyo ebebaki mpenza. Ntango nazalaki kotalatala na kati ya libondo ya biloko oyo ebebaki, namonaki eloko moko oyo namonaki ete nasengeli kobatela. Na mbala moko, mopɛpɛ eyaki lisusu makasi, kasi nalingaki ata moke te kotika eloko yango. “Mama, bwaká televizyo wana. Ozali nde mwasi ya Lota?” (Luka 17:31, 32) Maloba wana oyo mwana na ngai alobaki na ngai ezongisaki ngai mayele. Nabwakaki televizyo yango oyo epolaki na mai ya mbula mpe ngai ná mwana tokendaki mbangu komibomba.
Nzoto elɛngaka ngai soki nakanisi ete nalingaki kobungisa bomoi na ngai kaka mpo na televizyo. Kasi, natondaka mpenza na esengo soki nakanisi likebisi oyo mwana na ngai apesaki ngai mokolo wana. Mateya ya Biblia oyo azwaki na lisangá ya boklisto esalisaki ye abikisa ngai na likama monene wana oyo ekokaki komemela ngai mpasi na nzoto, ata mpe na elimo.
Ekumbaki yango ebebisaki mpenza ndako mpe biloko na biso nyonso mpe esilisaki biso mayele. Na ntango wana, bandeko na biso baklisto bayaki. Balendisaki biso tókoba kotyela Yehova motema atako tobungisaki biloko na biso nyonso, tólɛmba te na mosala ya kosakola, mpe basalisaki biso na kotonga lisusu ndako na biso. Mosala wana oyo bandeko ya Jamaïque mpe ya mikili mosusu basalaki mpo na biso na bolingo mpe na elimo ya komipimela, esimbaki mpenza mitema na biso.
Totye Yehova liboso
Ntango mwana na ngai ya mwasi ya mibale, Melaine, asilisaki kelasi, akómaki mobongisi-nzela. Na nsima, andimaki kokende kosakola lokola mobongisi-nzela na lisangá mosusu mpe, mpo na yango, asengelaki kotika mosala na ye. Atako mosala yango ezalaki kopesa ye mwa mbongo ekoki mpenza mpo na kosunga libota na biso, tozalaki na kondima ete Yehova akotika biso te soki biso nyonso totye matomba ya Bokonzi na esika ya liboso. (Matai 6:33) Na nsima, basɛngaki mpe Ewan, mwana na ngai ya mobali, akóma mobongisi-nzela. Atako azalaki kosunga libota na mwa mbongo, tolendisaki ye andima mokumba yango mpe totombelaki ye mapamboli ya Yehova. Natikalá ata mbala moko te kopekisa bana na ngai bámipesa mobimba na mosala ya bokonzi, mpe ngai ná bana mosusu oyo totikalaki na ndako tokelelaki ata eloko moko te. Kutu, esengo na biso ezalaki lisusu nde kobakisama, mpe ntango mosusu tozalaki ata kosalisa bato mosusu oyo bazalaki na bosɛnga.
Lelo oyo, nazalaka na esengo mingi ya komona ete bana na ngai bazali “kotambola na kati ya solo.” (3 Yoane 4) Mwana na ngai moko ya mwasi, Melaine, azali sikoyo kokende na mobali na ye oyo azali mokɛngɛli ya zongazonga kotala masangá. Andrea, mwana na ngai mosusu ya mwasi, ná mobali na ye bazali babongisi-nzela minene, mpe ye ná mobali na ye oyo asalaka lokola mokɛngɛli ya zongazonga mosungi bakendeke kotala masangá. Mwana na ngai ya mobali, Ewan, ná mwasi na ye bazali babongisi-nzela minene, mpe ye azali nkulutu na lisangá. Mwana na ngai mosusu ya mwasi, Ava-Gay, azali kosala elongo na mobali na ye na biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova na Jamaïque. Jennifer, Genieve mpe Nicole ná mibali mpe bana na bango bazali basakoli ya molende na masangá na bango. Marseree azali elongo na ngai, mpe ngai na ye tozali na lisangá ya Port Morant. Nazwi mapamboli mingi mpenza, mpamba te bana na ngai nyonso mwambe bazali kokoba kosalela Yehova.
Bobange ememeli ngai mikakatano mingi ya nzoto. Nazali sikoyo kobunda na maladi ya mingai, kasi nalɛmbi te na mosala ya mobongisi-nzela. Eleki mwa mikolo, nakómaki na mokakatano makasi mpo na kotambola na mboka ya bangombangomba epai nazalaki kofanda. Ezalaki mpasi mpenza mpo nabima na mosala ya kosakola. Namekaki kobima na velo mpe namonaki ete yango ezali malamu koleka kotambola na makolo. Yango wana, nasombaki velo moko ya kala mpe nabandaki kosalela yango. Na ebandeli, bana na ngai bazalaki kokoka te komona ngai mama na bango oyo nazali kobɛla mingai nazali kotambola na velo. Kasi, bazalaki na esengo ya komona ete nazali kokoba kobima na mosala ya kosakola ndenge nalingi.
Nazalaka na esengo ya komona ndenge bato oyo nayekolaka na bango bazali kondima solo ya Biblia. Nabondelaka Yehova ntango nyonso ete asalisa libota na ngai mobimba bátikala sembo epai na ye na ntango oyo ya nsuka mpe libela na libela. Masanzoli mpe matɔndi na ngai nyonso ezali kokende epai ya Yehova, moyoki monene ya mabondeli, mpo asalisi ngai nalonga mokakatano monene ya kobɔkɔla bana na ngai mwambe na banzela na ye.—Nzembo 65:2.
[Elilingi na lokasa 10]
Ngai ná bana na ngai, balongani na bango mpe bankɔkɔ na ngai
[Elilingi na lokasa 12]
Nakómá kosakola na velo