Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 1/9 nk. 10-13
  • Kotya motema epai na Jehovah epesaka bolamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kotya motema epai na Jehovah epesaka bolamu
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Na mokili ya lnde, nazwi ntina mpo na bomoi na ngai
  • Bozongi na Angleterre
  • Mosala monene na canada
  • Bambula na epekiseli
  • Bomoi ya mokengeli ya zongazonga
  • Mabaku malamu mosusu ya mosala
  • Yehova asalaka na bosembo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Betele ezali na mposa ya basali na bolingo malamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Yo mpe okoki komipesa?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Bomoi ya malamu mpenza na mosala ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 1/9 nk. 10-13

Kotya motema epai na Jehovah epesaka bolamu

LISOLO YA JACK HALLIDAY NATHAN

Mbala mosusu osili koyoka maloba “kobotama na lutu ya palata na monoko.’ Ntango nabotamaki, na 1897, maloba oyo makokanaki mpenza mpo na ngai.

EZALAKI mobu ya ntuku motoba ya bosepeli boyangeli na mokonzi-mwasi Victoria, na feti oyo babengi jubilé de diamant. Na Angleterre, bana oyo babotamaki na eleko wana bapesamaki lutu ya palata (elembo ya bolamu). Bokonzi ya Angleterre ekómaki na nsuka na nkembo na yango; ezalaki kobuka mbuma na bozwi oyo esalamaki na ba uzine mingi na yango mpe mombongo oyo ekolaki uta bamboka mopaya na bozwi mingi oyo eyangelamaki na yango.

Koko na ngai ya mobali azalaki Moyuda, mpe tata na ngai akómaki moebele, oyo ayebaki mingi Makomami na liebele. Kasi, koko na ngai ya mwasi azalaki mwana ya episkopo ya lingomba ya anglican, mpe na bopusi na ye, tata na ngai andimaki Yesu Klisto lokola Masiya. Mikanda ya charles Taze Russell mipusaki mpe baboti na ngai kino ete tondimaki ata soko moke te liteya ya Trinité mpe lifelo ya móto.

Na bomwana na ngai, na mokili ya Angleterre bato bazalaki kosalela mingi bampunda mpo na kosala mibembo, mpe bavwature oyo ebendami na bampunda to mituka ezalaki mingi te. Lokola nazalaki kosepela mingi na mpunda, na 1918 nakotaki na limpinga na basoda ya leta oyo batambolaka likoló na mpunda (la milice). Ntango Etumba ya liboso ya mokili mobimba ebandaki, nakotisamaki na lipinga ya basoda na kobunda mpe natindamaki na front grec (esika etumba ezalaki kosalema na mokili ya Gréce), epai kuna nazwaki malaria. Nsima, natindamaki na France, lokola mobundi na mondoki mitrailleuse, na esika etumba ezalaki kosalema na ouest, mpe na nsuka na 1917 nakangamaki na ba Allemands.

Na mokili ya lnde, nazwi ntina mpo na bomoi na ngai

Wana etumba esilaki na 1918, lokola mosala ezalaki te na Angleterre, nazongaki na mosala ya soda, mpe nakendaki na lnde epai kuna nazalaki moko na basoda ya Angleterre. Na 1920, nazwaki lisusu malaria, mpe batindaki ngai na ngomba mpo nazela kobika na ngai. Kuna, natangaki mikanda nyonso oyo nazalaki na yango, elongo na Biblia. Botangi ya Makomami esepelisaki ngai mingi mpo na kozonga na Nkolo.

Mwa basanza nsima, lisusu na Kanpur, nabandaki koyangana na etuluku moko oyo ezalaki koyekola Biblia, na kolikyaka ete nakoyekola makambo mingi mpo na kozonga na Nkolo. Ezali kuna nde nakunataki na Fredrick James, oyo kala azalaki soda ya Angleterre nde sikawa akómaki Moyekoli na molende ya Biblia. Alimbwelaki ngai ete Yesu asilaki kozonga uta 1914, na lolenge ya komonana te na miso ya bato. Ezalaki wana nsango moko ya esengo koleka oyo naino nayoka te. Mokano na ngai ya liboso ezalaki ya kotika mosala ya soda. Nayinaki makasi etumba oyo na Mpoto, oyo ebomaki bato mingi mpe esopaki makila mingi. Nalingaki kozala misionere oyo na koyeisa kimya mpe kosakola nsango malamu yango na ntina na kozonga na Klisto.

Kasi, bakonzi bazali kopesa ngai nzela ya kotika mosala ya soda te. Na esika na yango, natindamaki na lnde occidentale, oyo lelo ebyangami Pakistan. Kuna, natangaki mokanda Etudes des Ecritures ya charles Taze Russell, mpe nandimisamaki makasi koleka ete nasengelaki koyanola na libyangami ya kosakola. Nabandaki kolota bandoto oyo ezalaki konyokola ngai na makanisi. Wana nazalaki lisusu na elikya te, nakomelaki Fredrick James, oyo abengisaki ngai epai na ye na Kanpur. Nakómaki kuna mokolo ya Ekaniseli ya liwa na Nkolo. Mokolo wana eyeisaki mbongwana kati na bomoi na ngai; nazwaki likatami, bobele ya kotikala monzemba te, kasi nasalaki lisusu ete mosala ya pionnier ezala mosala ya bomoi na ngai mobimba.

Bozongi na Angleterre

Pene na nsuka ya mobu 1921, nazongisamaki na Angleterre, mpe na printemps 1922 nabimisamaki na mosala ya soda. Na elanga yango, Joseph Rutherford, président ya mibale ya la Société Watch Tower, ayaki na Angleterre, mpe nakendaki elongo na baboti na ngai koyoka ye na salle oyo babengi Royal Albert Hall, na Londres. Nsima, nazalaki na mposa ya kosenga mosala na Béthel, lokola ebyangami lelo babiro ya filiales ya la Societé Watch Tower, kasi balendisaki ngai na bolingo nyonso ete nazala naino colporteur, to pionnier. Na yango natikaki mosala na ngai mpe nandimaki teritware oyo bapesaki ngai na sud ya Angleterre. Nabandaki mosala na ngai ya pionnier kozanga ata eksiperianse moko, nazalaki bobele na couronne moko (eteni na minei ya mbongo oyo babengi livre sterling na eleko wana) na libenga mpe elikya na ngai epai na Jéhovah. Pene na sanza ya mars 1924, nabengisamaki na Béthel.

Kasi, mbula elandaki, basengaki ngai nalongwa na Béthel. Nalembaki makasi, mpe nazalaki na mayoki ete nazwi disipline mpo na likambo oyo ngai nasalaki te. Na boumeli yango ya mwa ntango moke, Béthel ekómaki bomoi na ngai. Nzokande, na kobondelaká Jéhovah mpo na yango, mpe na kozaláká na elikya mpo na kokokisama ya mokano na ye, nakokaki kolanda kosakola lokola pionnier na teritware epai kuna natindamaki. Na mai 1926, Béthel ebengisaki ngai lisusu mpe natikalaki kuna na boumeli ya mibu 11 oyo elandaki.

Na 1936, Joseph Rutherford azongaki lisusu na Angleterre mpe asengaki na ngai kokende na canada mpo na kosangana na mosala ya Bokonzi na mboka yango. Kasi, mpo na kozanga koyokana likoló na likambo moko, andimaki lisusu te mpo ete nabimisaki makambo ya nkuku. Alobaki na matoi na ngai ete: “Jack, nakoki kozala na kofianse na yo te. Pasola tike na yo!” Oyo nde nsoni! Kasi nasengelaki mpenza kozwa mpamela yango mpe na nsima, naponamaki lokola pionnier na boumeli ya sanza mwambe, na kosaláká elongo na Temwe mosusu. Libaku malamu oyo ya mosala esalisaki ngai ete nakoka kolonga kotungisama oyo nazalaki na yango, mpe yango epesaki ngai liteya.

Mosala monene na canada

Pene na mbula moko na nsima, wana elekaki ye lisusu na Angleterre, Joseph Rutherford alobelaki ngai lisusu mpo na Canada. Nazelaki na motema likoló libaku yango, mpe nandimaki na esengo mingi kokende kosala na mboka yango. Nsima na kosala mwa basanza na Béthel ya Canada, naponamaki lokola momonisi ya zongazonga ya la Société, na sud-ouest ya Ontario. Masangá mingi ya mboka yango ezalaki mike mpe ezalaki na mposa na kolendisama. Nzokande, ezalaki esengo mingi na ebandeli wana ya mosala, atako mikakatano ya nzoto oyo nazwaki na ntina na malili mpe transport oyo ezalaki mpenza mpasi.

Nakobosana soko moko te esengo mpe botondi mpo na makambo ya elimo oyo emonisamaki na basangani ya lisangá baoyo bazalaki koloba monoko ya lnde pene na Brantford. Ezalaki na ntango ya hiver, mpe mbula mpembe oyo ezalaki mingi epesaki nzela te ete motuka na ngai Ford T ekoka koleka. Moto moko ayambaki ngai te, mpe, ntango nakómaki, Batemwe bakendaki koluka nkoni na zamba. Na bongo nakendaki koluka bango, mbula mpembe kino na mabolongo. Wana namonaki bango, bakamwaki mpe bazalaki na esengo ya komona ngai. Kotikáká mosala na bango, bazongaki mpe bobele na yango, babongisaki likita.

Penepene na Beamsville, Batemwe oyo bazalaki sembo elongo na ngai tobundaki makasi na boumeli na basanza mingi na bankulutu oyo bazalaki koponama na nzela ya vote mpe na bapengwi. Ezalaki nde libaku malamu na komona elimo na Jéhovah kosala mosala mpo na kongengisa likambo! Na ebandeli wana ya mosala, kotya motema epai na Jéhovah mpe kozala sembo epai na lisangá na ye eyeisaki mapamboli mingi na masangá. Wana bakólaki, bana mingi na masangá yango bakotaki na mosala ya pionnier, to bakómaki basangani ya Béthel, bamisionere, to mpe bakengeli ya zongazonga. Nakobosana soko moke te ntango na esengo oyo tozalaki kolekisa na mabota wana na bosembo ya boklisto oyo kati na yango bilenge oyo malamu babotamaki. Mabota yango ekómaki ya ngai, mpe bana na bango bana na ngai.

Bambula na epekiseli

Na boumeli na mpasi oyo etumbu ebimisaki, na 1940, mosala na ba Témoins de Jéhovah epekisamaki. Ekamwisaki mingi. Na ebongiseli ya guvernemá, nsango epesamaki na radio mpo na kosenga biso ete tozongisa mikanda na biso na la police, ba dosyé ya masangá, bafungola ya ba Salles du Royaume mpe lokola. Na koyebaka likama na likambo yango, natambolaki na masangá nyonso mpe nalendisaki bango kobomba mikanda na bango mpe badosyé na bango. Batemwe balendisamaki koyangana na bandako ya bato, na ndako moko, mbala moko na poso. Wana ntango elekaki, masanga malendisamaki lisusu kosakola ndako na ndako, na kosalelaka bobele Biblia. Likambo yango ebimisaki matomba, mpamba te na kosala bongo biso nyonso toyekolaki kosalela yango malamu koleka.

Mwa moke nsima ya mbula wana, tozwaki boike na brochure oyo elobi Fin du nazisme uta na Etats-Unis. Esengelaki kozala na mayele mingi mpo ete moto akoka kosomba brochure oyo epekisamaki na Canada. Batemwe bazwaki kokumba basoda oyo bazalaki kosenga ete bakumba bango na motu mpe bazalaki kofanda likoló na ba cattons, kozanga koyeba ete bazalaki kobatela ba brochures oyo epekisami. Nsima, na ntongo moko, na sanza ya Novembre, na ngonga ya misato kino ya motoba, Batemwe batambolaki mboka mobimba mpo na kokotisáká brochure mokomoko na nse ya porte ya bandako mingi.

Na boumeli na bambula na epekiseli, nalandaki mosala na ngai ya pionnier na colombie-Britannique, na ouest ya canada. Liboso na epekiseli, Batemwe bazalaki kosalela masuwa moko mpo na kokende kotala bafandi na bamboka mikemike oyo ezalaki mosika na bisika oyo mabelé makoti na mai kati na Vancouver mpe Alaska. Ntango epekiseli esakolamaki, boike na mikanda ezalaki kati na masuwa yango. Batemwe batikaki yango epai na bato oyo bamonisaki boyambi liboso ete bazonga na libongo epai kuna masuwa esengelaki kobotolama. Mwa nsima, nazwaki masuwa ya koloba mbisi mpo na kotánga bisika epai kuna mikanda yango mizalaki, mpe na eleko oyo ya koloba mbisi minene, nazwaki bibongiseli mpo ete Batemwe bakoka kozwa yango. Nsima na mwa ntango, mikanda oyo mibombamaki na nkobe na masuwa ya koloba mbisi, ememamaki na Vancouver mpo na kokabela yango.

Pene na nsuka ya 1948, tozwaki nsango ete epekiseli oyo ezwaki ba Témoins de Jéhovah elongolamaki, kasi oyo ezalaki mpo na la Société Watch Tower te. Mpe mpo na yango, lokola na kala, tolandaki kosalela bobele Biblia kati na mosala na biso ya ndako na ndako. Kasi, tokokaki sikawa komimonisa polele lokola ba Témoins de Jéhovah. Ntango epekiseli etyamaki tozalaki Batemwe 6 700, mpe ntango elongolamaki tokomaki 1 1000.

Bomoi ya mokengeli ya zongazonga

Na boumeli na mwa bambula oyo elandaki natambolaki ba kilometele ebele, lokola momonisi ya zongazonga ya la Société mpo na kolendisa masangá mpe kosala mosala elongo na yango. Na hiver, nazalaki kokende kotika bandeko kati na motuka oyo ekokani na mosusu te. Ezalaki ndako oyo etongami likoló na likalo, ezalaki na esika ya kopelisa móto ya nkoni mpe na mombonda, ebendamaki na bampunda. Mbala mingi tozalaki kobanda mobembo liboso ete ntongo etana, ezalaki kokumba bato motoba, mpe tozalaki kotambola bakilometele 35 to koleka likoló na mbula mpembe, wana tozalaki kotala bafandi na ba fermes nyonso. Motambwisi na yango asengelaki kozala na ekenge, mpamba te biboke ya mbula mpembe ekokaki kobwaka ndako na mpembeni, mpe bongo kobwaka libanda, bato oyo bazali na kati mpe makala ya moto mpe na esika na yango ya kopelisa.

Na 1947, naponamaki mokengeli ya distrike ya yambo, oyo ezalaki kotala mboka mobimba. Mbala mosusu nazalaki kobongisa assemblée moko ya circonscription poso na poso. Ezalaki kosalema na ba patinoiree, na ba stades, na bilanga esika basalaka masano ya kopota mbango, na ba salles ya makita ya ba syndicats to ba salles ya bilamba. Bibongiseli oyo bisengelaki kozwama liboso mpo ete programme ya bokutani motindo wana ebanda ezalaki kosenga likebi mingi. Na 1950, Frank Franske akomaki mokengeli ya distrike ya mibale na canada mpe na nsima, mosusu mitano baponamaki.

Na boumeli na bambula yango, nasalelaki bandenge nyonso ya transport, ezala bampepo ya mike, masuwa ya koloba mbisi, motoneiges mpe skis, mituka ya skis (oyo ezali na moteur mpe pakapaka ya mpepo na nsima) mpe mosusu, oyo bato nyonso basalelaka lokola egbunduka, bus mpe vwature. Na mpepo, tozalaki mbala mosusu koleka basongé ya ngomba milai mpe minene liboso ya kokita na lobwako oyo ezali na nse mingi liboso ya kokóma epai na Batemwe oyo bazali na masangá mikemike oyo mazali mosika.

Natambolaki mingi na canada. Nalalaki na bandako ya matiti mpe ya mabaya oyo na kati na yango malili ezalaki mingi kino ete na ntongo pema oyo tozalaki kobimisa ezalaki lokola milinga, mpe na kati na ba fermes oyo ezalaki na bisika malamu na kolala te. Ata bongo, nazalaki kozwa esengo mingi na kokokisa mosala ya Jéhovah, na kolendisáká basaleli na ye.

Mabaku malamu mosusu ya mosala

Na boumeli ya mibu 33 ya nsima, nazwaki libaku malamu ya kozala mosangani ya libota ya Béthel ya Canada, mpe oyo ya kozala molobi na ba assemblées na Angleterre, Mpoto, na Afrike, na Australie, na Nouvelle-Zélande mpe na Extrême-Orient. Na Australie nakutanaki na mwana mwasi ya Fredrick James, oyo alendisaki ngai mingi na lnde. Akómaki ata misionere te kasi, apesaki libula kitoko ya elimo epai na libota na ye.

Sikawa, nazingami na bankama ya bilenge na Béthel ya canada. Ezali kolendisa mpe ezali kosepelisa na komona bango bazali kosalela Jéhovah na makasi na bango ya bolenge. Miso na ngai ezali komona lisusu malamu te, kasi bilenge yango bazali kotangela ngai mikanda. Makolo na ngai elembi, kasi bazali komema ngai mpo na kosakola. Bamosusu bazali kotuna ngai ndenge nini nazali kolonga mikakatano na kolongono ya nzoto oyo ezali kouta na bobangé. Ya solo, mpo na kobanda, nazali koyekola Liloba na Nzambe mokolo na mokolo, yango ezali kopesa ngai nzela ya kobatela motema na ngai mpe elimo na ngai na kotalelaka makambo ya elimo.

Ya solo mpenza, ezalaki libaku monene ya kotambola mpe kosolola elongo na Tata na ngai ya likoló Jéhovah na boumeli ya mibu 69 oyo nalekisaki mpo na kosalela ye, oyo kati na yango nasali mibu 67 na mosala ya pionnier. Ntango nyonso namonaki ete Jéhovah azali Nzambe atondi na bolingo mpe na mawa, oyo azali kolimbisa bolembu na bato mpe azali kopesa makasi mpe nguya epai na baoyo bazali kotya motema epai na ye. Nazali kolikya kotikala ngwi mpe sembo epai na Jéhovah mpe epai na lisangá na ye kino nsuka, na kolikyáká na eleka ete ntango ekoya oyo nakosangana na Nkolo na ngai, Yesu Klisto na nkembo na likoló, elongo na bandeko na ngai mibali mpe basi oyo bazali sembo Nzembo 84:12.

[Elilingi na lokasa 12]

Miluka ya ski mizali kopesa nzela ya kotambola kati na bilanga bakilometele 80 na ngonga moko

[Elilingi na lokasa 13]

Mpo na kosakola kati na esobe ya canada na ntango ya hiver, tozalaki kosalela bandako etongamaki likoló ya likalo oyo ezali kobendama na bampunda

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto