Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 1/6 nk. 19-23
  • Yehova asalaka na bosembo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova asalaka na bosembo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Na ebandeli, bomoi ezangi mokano
  • Namonisi bosembo ya sika
  • Mosala ya ntango nyonso na Angleterre
  • Mosala mingi na Afrika
  • Tozongi na Afrika
  • Makambo ya sika na Angleterre
  • Kotya motema epai na Jehovah epesaka bolamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mboka batindaki biso Bamisionɛrɛ ekómi mboka na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Bondeko na biso na mokili mobimba elendisaki ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Yehova apamboli ngai koleka ndenge oyo nakokaki kokanisa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 1/6 nk. 19-23

Yehova asalaka na bosembo

LISOLÓ YA PETER PALLISER

Ezalaki na sanza ya Desɛ́mbɛ 1985. Nsai ekómaki makasi wana tobandaki kokita na mpɛpo na libándá monene ya mpɛpo na engumba Nairobi, na ekólo Kenya. Wana tozalaki kotambola na motuka kati na engumba, basuvenire mingi ezongelaki ngai na makanisi, elamusamaki na makambo nazalaki komona mpe makɛlɛlɛ nazalaki koyoka oyo namesanaka na yango kala.

TOKENDAKI na Kenya mpo na liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova oyo ezalaki na motó na likambo ete “Bato na bosembo.” Mbula zomi na mibale liboso, ngai na mwasi na ngai tosɛngisamaki na makasi ete tólongwa na Kenya mpamba te mosala na biso ya kosakola epekisamaki na ekólo yango. Tofandaki na Betele, nkombo oyo tobéngaka biro ya Batatoli ya Yehova. Oyo nde likambo ya kosepelisa ezalaki kozela biso ntango tozongaki na ekólo yango mpo na botali!

Na kúku, elenge Motatoli moko azalaki kosalisa mpo na kolamba bilei ya midi, nayebaki ye uta ntango azalaki na mbula mibale. Basangani soko motoba ya libota ya Betele bazalaki bato oyo toyebaki bango ntango bazalaki naino bana mike. Oyo nde esengo ya komona bango sikawa bakómi bilenge oyo bakɔmeli, elongo na mabota na bango, bango nyonso bazali ntango nyonso na mosala! Yehova, Nzambe na biso, abatelaki bango na kokokisáká elaka ya Biblia ete: “Epai na moto na sembo okomimonisa sembo.” (2 Samwele 22:26) Oyo nde bokeseni namonaki kati na bomoi na ngai ya bolenge mpe bomoi etondi na mbano oyo bilenge yango bazalaki na yango!

Na ebandeli, bomoi ezangi mokano

Nabotama na engumba Scarborough, na ekólo Angleterre, na mokolo ya 14 Augústo 1918. Mbula mibale na nsima, mama na ngai mpe yaya na ngai ya mwasi bakendaki kofanda na Canada, boye, mbula misato oyo elandaki nalekisaki yango elongo na tata na ngai, na nkɔkɔ ya mwasi, mpe tata-mwasi na ngai. Ntango nakokisaki mbula mitano, mama na ngai ayaki kokamata ngai kozanga ete tata ayeba mpe amemaki ngai na engumba Montréal, na Canada. Mbula minei na nsima azongisaki ngai na Angleterre mpo ete nakenda kofanda epai ya tata mpe nakɔta kelasi.

Mama na ngai mpe yaya na ngai ya mwasi bazalaki kotindela ngai nkomá pene na nsima ya sanza motoba nyonso. Na nsuka ya bankomá na bango, bazalaki kotombela ngai ete nakóma mwanamboka malamu, oyo azali sembo epai na Mokonzi mpe na mboka. Nakanisi ete biyano na ngai bisepelisaki bango te mpamba te nazalaki kokoma ete na makanisi na ngai bolingo ya ekólo mpe bitumba ezali mabe. Kasi, lokola nazalaki na litambwisi malamu te, na bolenge na ngai, nakómaki na bomoi oyo ezalaki na mokano te.

Na yango, na sanza ya Yulí, pɔ́sɔ motoba liboso ete Etumba ya Mibale ya Mokili mobimba ebanda, nabyangamaki na mosala ya sodá na mampinga ya ekólo Angleterre. Nazalaki bobele na mbula 20. Nokinoki, etuluku na biso etindamaki na nɔ́rdi ya ekólo France. Na ntango bampɛpo ya bitumba ya ekólo Allemagne ebundisaki biso, tobongisaki mandóki na biso mpe tobɛtaki bampɛpo yango masasi. Ezalaki bomoi moko oyo etondaki na bobangi mpenza. Tozongaki nsima liboso ya mampinga ya Allemagne oyo mazalaki sé kobɛlɛma, mpe nazalaki moko na baoyo bazongisamaki na engumba Dunkirk na boumeli ya pɔ́sɔ ya liboso ya Yúni 1940. Nazali naino komikundwela bililingi ya nsɔ́mɔ ya bibembe ya basodá ya mwa etuluku mobimba oyo etandamaki na libongo. Nabikaki na likambo wana ya nsɔ́mɔ mpe nakómaki na engumba Harwich na ɛ́sti ya Angleterre na mwa masuwa moke.

Na mbula elandaki, na sanza ya Mársi 1941, natindamaki na ekólo Inde. Epai kuna nayekolaki mosala ya kobongisa mpɛpo. Nsima ya kolekisa mwa ntango na lopitalo mpamba te nabɛlaki, batindaki ngai na limpinga moko ya basodá oyo ezalaki na Delhi, engumba-mokonzi ya ekólo Inde. Kuna, na mboka mosika nazalaki komiyoka malamu te, nabandaki kokanisa avenire. Mingimingi namitunaki na oyo ekómelaka biso soki tokufi.

Namonisi bosembo ya sika

Na engumba Delhi, nazalaki kolala na eteni moko ya ndako na Bert Gale, moninga na ngai mwanamboka Angleterre. Mokolo moko alobaki ete “Lingomba euti na Zábolo,” maloba yango malamwisaki bosepeli na ngai. Mwasi na ye asilaki kokóma Motatoli ya Yehova, mpe mbala na mbala, azalaki kotindela ye mikanda mikolimbolaka Biblia. Moko na yango ezalaki bongo mwa búku Espérance, yango ebéndaki likebi na ngai. Ndimbola oyo yango epesaki na ntina na elikya ya lisekwa epesaki ngai liyoki ya kimya.

Na ebandeli ya mobu 1943, Bert asololaki na Teddy Grubert, sivili moko oyo azalaki kosala na kaá ya basodá, ye azalaki molátɛlɛ (métis). Na kokwama nyonso toyaki koyeba ete Teddy azalaki Motatoli. Atako na mobu 1941 mikanda ya Batatoli ya Yehova mipekisamaki, amemaki biso na makita oyo Batatoli bazalaki kosala na engumba Delhi. Mpo na mbala ya liboso na bomoi na ngai, namonaki boninga ya solosolo, ya esengo kati na lisangá wana moke. Basil Tsatos, ndeko moklisto moko ya kala, mobotami na mboka Grèce, asepelaki na ngai mingi mpe ayanolaki na mituna na ngai. Na lisalisi ya Biblia, apesaki ngai biyano ya polele na ntina oyo tonunaka mpe tokufaka, na lisekwa, mpe na elaka ya Nzambe ya kotya mokili ya sika ya boyengebene.​—Misala 24:15; Baloma 5:12; 2 Petelo 3:13; Emoniseli 21:3, 4.

Mwa búku La paix de demain sera-t-elle de longue durée?, ebimisamaki na 1942, ebéndaki likebi na ngai mingi. Yango emonisaki Lisangá ya Mabota lokola “nyama na yauli ya lángi motane.” (Emoniseli 17:3, NW) Kotángáká maloba ya Emoniseli mokapo 17, vɛrsɛ́ 11, mwa búku yango elobaki ete: “Sikawa ekoki koloboma ete Lisangá ‘ezalaki mpe ezali te.’” Elobaki lisusu ete: “Lisangani ya mabota ya mokili ekobima lisusu.” Na 1945, koleka mbula misato na nsima, ezali yango mpenza esalemaki ntango Lisangá ya Mabota Masangani esalemaki!

Na eleko oyo bapekisaki mikanda ya Batatoli, nasalisaki baninga na ngai wana ya sika. Ntango bazwaki kartó moko ya mwa babúku La paix de demain sera-t-elle de longue durée?, na lisangá bapesaki ngai yango mpo ete nabatela yango. Moto moko te akokaki kokanisa koluka mikanda mipekisami na káa ya basodá. Mbala nyonso oyo nazalaki kokende na makita, nazalaki komema ndambo ya mwa babúku yango ete bandeko bázanga yango te. Kútu nabombaki mikanda na bango oyo mikolimbolaka Biblia ntango bazalaki kobanga ete bakoki koya koluka yango na bandako na bango. Na nsuka, na mokolo ya 11 Desɛ́mbɛ 1944, epekiseli elongolamaki.

Bosembo na ngai na mateya ya boklisto emekamaki na ntango Eyenga ya Mbotama ebongisamaki na limpinga na biso. Naboyaki kosangana na eyenga yango, mpamba te nasilaki koyekola ete Yesu abotamaki na eleko ya mpiɔ makasi ya sanza ya Desɛ́mbɛ te mpe ete baklisto ya liboso bazalaki kokumisa Eyenga ya Mbotama te.​—Kokanisá na Luka 2:8-12.

Ntango liyangani “The United Announcers” esalemaki na engumba Jubbulpore (Jabalpur) kobanda na mokolo mwa 27 kino 31 Desɛ́mbɛ 1944, nazalaki moko kati na bayangani soko 150. Bayangani mingi basalaki mobembo na engbunduka longwa na Delhi, mobembo ya kilomɛtɛlɛ koleka 600. Nakoki kobosana soko moke te esengo oyo ezalaki komonana na esika wana ya libándá ya polele, epai miso na ngai mamonaki lisangá ya Yehova kati na mosala.

Bayangani bazalaki kolala na bandako ya kolala ya biteyelo, epai tozalaki koyemba nzembo ya Bokonzi mpe kosepela na boninga ya esengo ya boklisto. Na eleko ya liyangani wana, nabandaki kosangana na mosala ya kosakola, mosala oyo mozali ntango nyonso na motuya na motema na ngai.

Mosala ya ntango nyonso na Angleterre

Nazongaki na Angleterre na mobu 1946 mpe nokinoki nabandaki kosangana na lisangá ya Wolverton. Atako tozalaki na basakoli ya Bokonzi bobele pene na zomi, nazalaki komiyoka ete nazali epai na ngai, mpe nazalaki na mayoki ya bosepeli lolenge moko katikati na bandeko na ngai na Inde. Vera Clifton amonanaki mwasi ya sembo mpe ya motema boboto kati na lisangá. Ntango nayebaki ete ye mpe azalaki, lokola ngai, na mposa ya kokóma mobongisi-nzela, ndenge tobéngaka baministre ya ntango nyonso, tobalanaki na mokolo ya 24 Máí 1947. Nabongisaki caravane moko, to ndako oyo ekoki kotambwisama na mibembo, mpe na mbula elandaki, tozwaki teritware na biso ya liboso, engumba Huntingdon.

Na eleko wana tozalaki kokamata bavelo na biso na ntɔ́ngɔ́ntɔ́ngɔ́ mpo na kokende kosakola na bamboka mike ya zamba. Tozalaki kosakola mokolo mobimba mpe tozalaki kopema bobele mpo na kolya mwa mikate na midi. Ata soko mopɛpɛ ezalaki makasi ndenge nini to mpe mbula makasi boni na ntango ya bozongi na biso na ndako, tozalaki na esengo mpe na bosepeli na mosala ya Nkolo.

Nsima ya bambula tolingaki kokólisa mosala na biso mpe kosakwela bato ya bikólo mosusu “nsango malamu.” (Matai 24:14) Na yango totindaki lisɛngi ya kokɔta na eteyelo mpo na bamisionere ya Gileadi na South Landing, na engumba New York, na États-Unis. Nsukansuka, tobyangamaki na kelasi ya 26 ya Gileadi mpe tozwaki mapɔlɔ́mi na Febwáli ya mobu 1956.

Mosala mingi na Afrika

Totindamaki na ekólo Rhodésie du Nord (lelo oyo Zambie) na Afrika mpo na mosala na biso ya misionere. Mwa moke nsima ya bokómi na biso, tobyangamaki mpo na kosala na Betele ya ekólo yango. Moko na misala na ngai na Betele ezalaki ya kokomela masangá ya Afrika ya Ɛ́sti. Na 1956, Kenya​—moko ya bikólo yango ya Afrika ya Ɛ́sti⁠—​ezalaki bobele na Batatoli minei, nzokande na Rhodésie du Nord bazalaki koleka 24 000. Ngai na Vera tobandaki kokanisa ete ekozala malamu soki tokosala epai mposa ezali mingi.

Na ntango yango, kozanga ete tómizela na yango, nazwaki libyangami mosusu mpo na kokende na Eteyelo ya Gileadi, ya mbala oyo mpo na kelasi ya bakɛngɛli na boumeli ya sanza zomi. Natikaki Vera na Rhodésie du Nord, mpe nakendaki mobembo na engumba New York, epai Eteyelo ya Gileadi ezalaki na ntango wana. Na Novɛ́mbɛ 1962, ntango kelasi esilaki, batindaki ngai na Kenya mpo na kofungola biro ya filiale kuna. Na ntango yango Batatoli bazalaki koleka nkámá na ekólo yango.

Wana nazalaki kozonga na Rhodésie du Nord mpo na kokutana na Vera, nasengelaki kotɛlɛma mwa moke na engumba Nairobi, na Kenya. Kasi ntango nakómaki, Bill Nisbet, misionere oyo azwaki lipɔlɔ́mi na kelasi ya 25 ya Gileadi, ayebisaki ngai ete ezali na libaku moko malamu ya kozwa ndingisa ya Letá mpo na kokɔta na Kenya nokinoki. Tokutanaki na bakonzi oyo batalelaka makambo ya kokɔta ya bapaya na mboka, mpe nsima ya mwa miniti moke, nazwaki ndingisa ya kofanda na Kenya na boumeli ya mbula mitano. Boye nakendaki lisusu na Rhodésie du Nord te; Vera nde alandaki ngai na engumba Nairobi.

Nsima ya kolanda kelasi ya koyekola lokótá Swahili, tokómaki kosangana na mosala ya kosakola na mwa lisangá moke ya Nairobi. Ntango mosusu, nsima ya kotángela moto lisoló na swahili, tozalaki koyoka nkolo ya ndako koloba ete “Nayokaka Lingelesi te!” Atako bongo, tolendendelaki mpe mokemoke tolóngaki mokakatano ya lokótá.

Na kati ya teritware na biso ezalaki na bakartyé ya bandako minene ekabolama na biteni mingi oyo ezalaki na bankombo ya Biblia lokola Yelusaleme mpe Yeliko. Nokinoki bato mingi bamonisaki bosepeli, mpe basakoli mingi ya Bokonzi babimaki na bisika yango. Bato bazalaki mpenza komonisa bosepeli mpo na solo ya Biblia! Wana bosembo na Bokonzi ememaki bomoko kati na libota ya Yehova, makanisi ya kokumisa bikólo mabungaki. Kútu ata mabala kati na bato ya bitúlúká bikeseni masalemaki, likambo oyo ezalaki komonana mpenza te kati na bato oyo bazali Batatoli te.

Basakoli ya sika bazalaki koyamba solo na molende. Na ndakisa, Samson, ye azalaki na mposa makasi ete solo ya Biblia ekɔta na etúká na ye na yango azalaki ntango nyonso kosɛnga ete babongisi-nzela bátindama kuna. Kútu, atongaki eteni mosusu na ndako na ye na etúká ya Ukambani mpo na kopesa bango esika ya kofanda. Mosika te lisangá ya sika ya basakoli ya Bokonzi esalemaki kuna.

Mbala mingi nakendaki kotala bandeko na biso na ekólo Éthiopie, na Afrika ya Ɛ́sti. Atako bazalaki kokanga bango, kobɛta bango, mpe kokɛngɛlakɛngɛla mosala na bango, bazalaki kolekisa mwayene ya ngonga 20 sanza na sanza kati na mosala ya kosakola. Mbala moko esalemaki ete mituka mibale mitondi na bandeko mibali mpe bandeko basi ya Éthiopie esalaki mobembo na boumeli ya pɔ́sɔ moko, kokatisáká banzela ya ngomba ya makámá, mpo na kokende na liyangani ya etúká oyo lisalemaki na Kenya. Myango na bango mpo na kosala ete mikanda ya Bokonzi mikɔta na ekólo na bango mizalaki mpenza kokamwisa. Biso na Kenya tozalaki na esengo ya kosalisa bango ete bázwaka yango.

Na 1973, Letá apekisaki mosala na biso na Kenya, mpe basɛngisaki biso bamisionere na makasi ete tólongwa na mboka yango. Na ntango yango Batatoli bazalaki koleka 1 200 na Kenya, mpe mingi kati na bango bayaki na libándá ya mpɛpo mpo na kopesa biso mbote ya kokabwana oyo nakoki kobosana yango te. Kozala na bango wana epusaki moto moko oyo tosalaki na ye mobembo na kotuna soki tozalaki bato ya lokumu. Ngai na Vera tozongaki na Angleterre mpe tozwaki teritware mosusu kuna, nzokande tozalaki na mposa ya kozonga na Afrika.

Tozongi na Afrika

Na yango, mwa basanza na nsima, totindamaki mpo na kosala epai mosusu ya sika, na Betele ya Accra, engumba-mokonzi ya Ghana, ekólo moko ya Afrika ya wɛ́sti. Kuna, moko ya mikumba na ngai ememaki ngai na komona na miso mpasi oyo bandeko na biso bazalaki kokutana na yango. Wana nazalaki kosomba bilei mpe biloko mosusu mpo na libota ya Betele, nakamwaki mpamba te biloko bizalaki ntalo mingi. Mbala mingi esalamaki ete tozalaki kokoka te kosomba biloko oyo tozalaki na mposa na yango. Kozanga esánsi mpe bibende ya kosanzé na mituka ezalaki sé kobakisa mikakatano.

Nayaki koyeba ntina ya kozala na motema molai, likambo oyo bandeko na biso ya ekólo Ghana basila kokólisa. Ezalaki mpenza elendiseli na komona elimo malamu oyo bandeko bazalaki komonisa wana bazalaki koboya masenginya ya kozwa biloko mosusu ya kobikela na nzela ya kanyaka. Litomba na yango ezali ete Batatoli ya Yehova na Ghana bayebanaki malamu mpo na bosembo na bango mpe bazwaki lokumu malamu liboso ya bakonzi mingi.

Nzokande, atako biloko mingi bizangaki, bokóli ya elimo ezalaki sé kosalema. Na ekólo mobimba, mikanda na biso mizalaki komonana kati na pene na ndako nyonso. Mpe tomonaki bokóli na mitángo ya basakoli ya Bokonzi na Ghana longwa na 17 156 na 1973 ntango tokómaki kino na 23 000 na 1981. Na mbula yango mpasi na ngai ya kanser ya mposo etombokaki, na ntembe te ekómaki makasi mpo ete nalekisaki ntango mingi na moi na Inde mpe na Afrika; yango epusaki biso na kotika ekólo Ghana mpe kozonga na Angleterre mpo na kozwa lisalisi ya minganga.

Makambo ya sika na Angleterre

Mpo na ngai bozongi na biso esɛngaki komesana na makambo mingi ya sika na mosala na ngai ya kosakola. Namesanaki kosolola na bonsomi nyonso na bato oyo bazali komemya Nzambe mpe Biblia. Kasi na engumba Londres, namonaki ezalela yango mpenza te. Nakamwaki mingi na kolendendela ya bandeko na Angleterre. Yango epusaki ngai na kokólisa bolingo mingi mpo na bato “balɛmbi mpe balemalemi” na elimo.​—Matai 9:36.

Nsima ya kouta na biso na Afrika, ngai na Vera tosalaki elongo na Betele ya Londres kino ayaki kokufa na Sɛtɛ́mbɛ 1991 wana azalaki na mibu 73. Ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te kobungisa moninga ya sembo oyo asalanaki na ngai na boumeli ya bambula mingi. Nazanga ye mpenza. Kasi nazali na esengo na bilendiseli malamu nazwaka na libota na biso ya Betele oyo ezali na basangani pene na 250.

Solo, natalelaka yango lokola libaku malamu ya komona lisangá ya Yehova kokende liboso mpe komona bibele bazali kopona kosala mosala ya ntango nyonso na bomoi na bango mobimba. Nalobi na bino solo ete, ezali na lolenge ya bomoi eleki oyo na malamu te, mpamba te “Yehova . . . akobatela bayengebene na ye.”​—Nzembo 37:28.

[Elilingi na lokasa 23]

Tosalaki mosala ya mobongisi-​nzela na Angleterre uta 1947 kino 1955

[Elilingi na lokasa 23]

Mpo na mbala ya liboso kati na mosala ya kosakola na ntango ya liyangani na ekólo Inde

[Elilingi na lokasa 23]

Ntango tozalaki bamisionere na Rhodésie du Nord

[Elilingi na lokasa 23]

Na 1985, elongo na baninga oyo tomonanaki na bango lisusu te na boumeli ya mbula 12

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto