Likambo nini lisili kokómela motindo na moto
“Ndenge nini ekoki kosalema ete na mikolo na biso bana bazali konyokwama? Ndenge nini ekoki kosalema ete banyama bazali konyokwama? Ndenge nini ekoki kosalema ete mobulu ezali kongala? . . . Ndenge nini ekoki kosalema ete bato mosusu bazali komipesa na misala ya koboma mpe ete bamosusu bazali kolangwa drogues? . . . Mpo na nini, bato bazali komipesa na misala wana mizali kobebisa mpenza bomoi, nzokande tozali na nyonso?”
EZALI WANA mituna oyo ministre ya yambo ya Angleterre amitunaki polele mpenza. Mbala mosusu osila komituna mituna lolenge oyo. Osilaki kozwa biyano ya malonga?
Kotyaka mituna yango kati na esika na yango, ministre ya yambo ya Angleterre alobaki ete: “Esili koleka mwa bambula, ntango nazalaki naino elenge mpe, kotondáká na bilikya, na makanisi mpe na mikano ndenge na ndenge, nabandaki mosala na ngai ya politike, nazalaki kokanisa lokola baninga na ngai mingi ya ntango wana ete, soki tolongi mokolo moko na kopesa ndako kitoko, éducation ya malamu mpe nivo ya bomoi kitoko epai na moto na moto, na bongo makambo nyonso makotambola malamu mpe tokokoka kokanisa mpo na avenir moko ya sembo mpe ya malamu. Sikawa toyebi ete ezali bongo te. Tosengeli kobundisa nde bizaleli mabe ya moto.” Ezali biso nde tolalisi.
Motindo na moto ekoki kolimbolama lokola ‘liboke na bizaleli ya kobotama oyo bato bazali na yango.’ Ya solo, bizaleli mabe bikoki kozala liziba ya mikakatano epai na moto ye moko, epai na ekolo mobimba to mpe na mokili mobimba. Kasi na meko nini motindo na moto ezali na likámá kati bokoli makasi ya mobulu, ya bobomi bato, ya kotekama na drogue mpe na misala misusu ya motindo yango oyo tozali komona lelo?
Motindo na moto ezali bobele yango moko nde ebimisi makambo oyo mazali pene na ‘kobebisa miboko mpenza ya bomoi na bato?’ To mpe makambo mosusu masengeli mpe kotalelama mpo na kolimbola soki mpo na nini bato babendami kozanga nkaka na misala wana ya mabe mpe oyo etondi na moimi, nzokande bakokaki kosepela na misala ya peto? Totalela motuna yango elongo.