Makambo ya mabe ekosila?
BATO mingi bazali koloba ete soki makambo ya mabe ekómi mingi lelo na mokili ezali mpo banda mwa bambula, bato bakómi na ezaleli ya koluka kaka matomba na bango moko. Bato mingi bazali kosala ata makambo ya mabe kaka mpo bázwa biloko oyo bazali na mposa na yango. Likambo yango ezali komonana kaka epai ya mwa ndambo ya bato te, kasi ata mpe na ekólo mobimba.
Mpo na bato mingi, bomoi ya basusu ezali na ntina moko te. Kutu, bato mosusu bayokaka nde esengo ntango bazali konyokola basusu. Bamonaka yango lokola lisano, ndenge bato mosusu ya mobulu balobaka ete konyokola basusu epesaka bango esengo. Ezali boni mpo na bamilio ya bato oyo balingaka bafilme ya mobulu mpe makambo ya mabe oyo ezali kotinda bato oyo basalaka bafilme bábimisaka yango mingi? Mbala mingi, bato oyo basepelaka kotala makambo ya mabe bakómaka motema makasi.
Mbala mingi, moto oyo basali ye mabe, makanisi na ye ebebaka mpe alukaka kosalela basusu kaka bongo. Noemí Díaz Marroquín, oyo azali molakisi na iniversite moko na Mexique alobelaki mpasi oyo makambo ya mabe ebimisaka. Alobaki boye: “Moto amekolaka makambo ya mabe mpe ekɔtaka na mimeseno na ye . . . Moto akómaka kosala makambo ya mabe ntango bato oyo afandi na bango bazali kolendisa yango.” Bato oyo basali bango mabe, balukaka mpe kosalela basusu mabe mpe mbala mosusu basalaka kaka ndenge basalaki mpe bango.
Longola yango, bato oyo balangwaka masanga mpe bamɛlaka bangi, nsukansuka balukaka kosala basusu mabe. Ezali mpe na bato mosusu oyo bazali kosepela te mpo guvɛrnema ya ekólo na bango ezali kokokisa bamposa ya bato te. Mpo na komonisa ete bazali kosepela te, basusu basalaka makambo ya mabe mpe batindaka bato básala mobulu oyo, mbala mingi enyokolaka bato oyo basali eloko te.
Kasi, okoki komituna boye: ‘Makambo ya mabe oyo bato basalaka eutaka na makanisi na bango moko? Nini esali ete mabe ekóma mingi?’
Nani azali kotinda bato básalaka makambo ya mabe?
Biblia eyebisi biso ete Satana Zabolo azali kotambwisa mokili oyo mpe azali “nzambe ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.” (2 Bakolinti 4:4) Aleki bato nyonso na moimi mpe na mabe. Yesu abengaki ye “mobomi-bato” mpe “tata ya lokuta.”—Yoane 8:44.
Banda botomboki ya Adama ná Eva, Satana azali kotambwisa bato nyonso oyo bazali kosala makambo ya mabe. (Genese 3:1-7, 16-19) Mbula 1 500 nsima ya botomboki ya Adama ná Eva, baanzelu mosusu bakómaki batomboki, balataki nzoto ya mosuni, basangisaki nzoto na basi mpe babotaki bana oyo babengamaki Banefilime. Bazalaki kosala makambo nini? Nkombo na bango epesi eyano. Nkombo yango elimboli “Bakweisi,” to “bato oyo bakweisaka basusu.” Emonani ete bato mabe bakɔtisaki mobulu mpe makambo ya mbindo oyo esukaki ntango Nzambe atindaki mpela na mokili. (Genese 6:4, 5, 17) Atako Banefilime bakufaki na Mpela, baanzelu oyo bazalaki batata na bango bazongaki na likoló mpe bakómaki kobengama bademo.—1 Petelo 3:19, 20.
Makambo oyo demo moko azalaki kosala mwana moko ntango Yesu azalaki awa na mabelé emonisi ete bademo bazali mpenza mabe. Mbala na mbala, demo yango azalaki kobwaka mwana yango, kokweisa ye na mɔtɔ mpe na mai mpo na koboma ye. (Malako 9:17-22) Emonani ete “mampinga ya bilimo mabe” bayokelaka bato mawa te ndenge moko na Satana Zabolo, motambwisi mabe oyo azali kokamba bango.—Baefese 6:12.
Lelo oyo, bademo bazali kotinda bato na mobulu, ndenge Biblia emonisaki ete: “Na mikolo ya nsuka bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza ekozala. Mpo bato bakozala bato oyo bamilingaka bango moko, . . . bato ya lofundo, bato ya lolendo, . . . bato bazangi botɔndi, bato bazangi bosembo, bazangi bolingo ya libota, bandimaka boyokani te, bakoselaka bato makambo, bazangi komipekisa, bato ya kongala, bazangi bolingo ya makambo ya malamu, bato oyo batɛkaka bamosusu, bato ya motó makasi, bato bavimbi na lolendo, bato balingá bisengo na esika ya kozala bato oyo balingaka Nzambe, bazali na motindo moko boye ya ezaleli ya kokangama na Nzambe kasi bazali kowangana nguya na yango.”—2 Timote 3:1-5.
Bisakweli ya Biblia emonisi ete tozali mpenza na bantango yango ya mpasi, mpamba te, banda Yesu Klisto akómaki mokonzi na 1914, abenganaki Satana ná bademo na ye na likoló. Biblia elobi boye: “Mawa na mabelé mpe na mbu, mpamba te Zabolo akiteli bino, azali na nkanda makasi, mpo ayebi ete azali na eleko moko ya ntango mokuse.”—Emoniseli 12:5-9, 12.
Yango emonisi ete makambo ekobonga lisusu te? Díaz Marroquín, oyo tolobelaki na ebandeli alobi ete “bato bakoki mokemoke kotika” bizaleli ya mabe. Kasi, lokola elimo ya Satana ezali kotambwisa mokili, moto akoki kotika kosala mobulu kaka soki nguya oyo eleki ya Satana ezali kotambwisa makanisi na ye. Nguya yango ezali nini?
Makambo ekoki kobongwana—Ndenge nini?
Elimo santu ya Nzambe eleki nguya nyonso mpe ekoki kolonga nguya ya bademo. Esalisaka bato bálingana mpe báfanda na kimya. Moto oyo alingi kosepelisa Nzambe mpe kotonda na elimo santu asengeli koboya mpenza lolenge nyonso ya makambo ya mabe. Asengeli kobongwana mpe kosala makambo oyo Nzambe alingi. Nzambe alingi nini? Alingi ete tósala milende mpo na komekola bizaleli na ye. Yango ezali kosɛnga tótalelaka bato ndenge Nzambe atalelaka bango.—Baefese 5:1, 2; Bakolose 3:7-10.
Soki totaleli ndenge Yehova asalaka makambo, tokomona ete atyelaka bato nyonso likebi. Ata mokolo moko te asalá bato, to mpe banyama, makambo oyo ezangi bosembo.a (Deteronome 22:10; Nzembo 36:7; Masese 12:10) Ayinaka makambo ya mabe mpe bato nyonso oyo basalaka yango. (Masese 3:31, 32) Bomoto ya sika oyo Yehova azali kosɛnga baklisto esalisaka bango bátalelaka basusu ete baleki bango mpe bámemyaka bango. (Bafilipi 2:2-4) Bomoto yango ya sika emonanaka na bizaleli lokola “bolingo ya motema oyo euti na mawa, motema malamu, elimo ya komikitisa, boboto mpe motema molai.” Tosengeli te kobosana bolingo “mpo yango ezali ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.” (Bakolose 3:12-14) Omoni te ete mokili elingaki kozala malamu soki bato mingi bazalaki na bizaleli wana?
Kasi, okoki komituna soki bizaleli ya moto ekoki kobongwana mpo na libela. Tótalela ndakisa ya Martin.b Mobali yango azalaki kobɛta mwasi na ye mpe kogangela ye na miso ya bana na bango. Mokolo moko abɛtaki mwasi na ye makasi, kutu bana bakendaki kobenga bato ya pembeni. Nsima ya mwa bambula, bango nyonso, libota mobimba, bakómaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Martin ayekolaki bizaleli oyo asengeli kozala na yango mpe ndenge ya kofanda na bato. Abongwanaki mpenza? Mwasi na ye apesi eyano: “Kala, soki mobali na ngai asiliki, azalaki kokóma ndenge mosusu mpenza. Mpo na yango, libota na biso ezalaki na mobulu na boumeli ya bambula mingi. Nazali kotɔnda Yehova mingi ndenge asalisi Martin abongola bizaleli na ye. Sikoyo, akómi kofanda malamu na bana mpe na ngai.”
Wana ezali kaka ndakisa moko. Na mokili mobimba, bamilio ya bato oyo bayekoli Biblia na Batatoli ya Yehova batiki kosala makambo ya mabe. Yango emonisi mpenza ete bizaleli ya moto ekoki kobongwana.
Etikali moke makambo nyonso ya mabe esila
Mosika te, Yesu Klisto, mokonzi oyo ayokelaka bato mawa akoyangela mabelé mobimba na nzela ya Bokonzi ya Nzambe oyo etyami na likoló. Asili kobengana Satana, mobandisi ya makambo nyonso ya mabe ná bademo na ye kuna na likoló. Etikali moke, Bokonzi ya Nzambe ekokokisa bamposa ya bato nyonso oyo balingaka kimya, baoyo ekoyangela awa na mabelé. (Nzembo 37:10, 11; Yisaya 11:2-5) Kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa mikakatano nyonso ya bato. Kasi, lokola Bokonzi yango eyei naino te, okosala nini soki basali yo mabe?
Kozongisa mabe na mabe epesaka litomba te. Kosala bongo ebakisaka nde makambo ya mabe. Biblia elendisi biso tótyela Yehova motema, mpe na ntango oyo abongisi ‘akopesa epai ya moto na moto lokola ezali nzela na ye, na kotalela mbuma ya misala na ye.’ (Yilimia 17:10) (Talá etanda, “Okosala nini soki basali yo mabe?”) Na ntembe te, okoki koyoka mpasi soki basali yo mabe. (Mosakoli 9:11) Kasi, Nzambe akolongola makambo nyonso ya mabe ata mpe liwa. Alaki ete bato nyonso oyo abombá na makanisi na ye, baoyo babungisá bomoi mpo basalá bango makambo ya mabe, bakosekwa.—Yoane 5:28, 29.
Atako bato bazali naino na likoki ya kosala biso makambo ya mabe, tokoki kolendisama soki tozali kobatela boyokani malamu na Nzambe mpe kotyela bilaka na ye motema. Tótalela ndakisa ya Sara oyo abɔkɔlaki bana na ye mibale ye moko mpe ateyaki bango malamu. Ntango akómaki mobange, bana yango basundolaki ye. Bazalaki lisusu kosalisa ye te, ata soki abɛli. Atako bongo, Sara oyo azali lelo Motatoli ya Yehova alobi boye: “Atako nayokaka mawa, Yehova asundoli ngai te. Asalisaka ngai na nzela ya bandeko oyo basungaka ngai ntango nyonso. Nandimi mpenza ete mosika te, akosilisa mikakatano na ngai mpe ya bato nyonso oyo batyelaka nguya na ye motema mpe batosaka mibeko na ye.”
Bandeko ya elimo oyo Sara alobeli ezali banani? Ezali bandeko na ye Batatoli ya Yehova. Bazali libota moko ya bandeko na mokili mobimba, oyo bayokelaka basusu mawa mpe balikyaka ete mosika te, makambo ya mabe nyonso ekosila. (1 Petelo 2:17) Satana mobandisi ya mabe ná bato nyonso oyo basalaka mabe bakobomama. “Mokili oyo mabe” ekozala lisusu te. Tolendisi yo osolola na Batatoli ya Yehova mpo oyeba elikya yango malamu.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bizaleli mpe bomoto ya Nzambe elobelami na mozindo na buku Pusaná penepene na Yehova, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
b Topesi bango bankombo mosusu.
[Etanda na lokasa 6]
Okosala nini soki basali yo mabe?
Liloba ya Nzambe ezali kopesa batoli ya malamu oyo okoki kosalela soki basali yo makambo ya mabe. Luká kosalela maloba oyo ya bwanya:
“Koloba te ete: ‘Nakozongisa mabe!’ Tyá elikya epai ya Yehova, mpe akobikisa yo.”—Masese 20:22, NW.
“Soki omoni kati na mokili minyoko ya mobola mpe kobebisa na kosambisama mpe na boyengebene . . . , kamwá likambo yango te; zambi mokóló [akɛngɛlamaka] na mosusu oyo aleki ye na lokumu.”—Mosakoli 5:8.
“Esengo na bato ya elimo ya boboto, mpo bakozwa libula ya mabelé.”—Matai 5:5.
“Na yango, makambo nyonso oyo bolingaka ete bato básalela bino, bino mpe bosengeli kosalela bango kaka bongo.”—Matai 7:12.
“Bózongisa mabe na mabe na moto te. Bókanisaka nde kozongisa makambo ya malamu mingi na miso ya bato nyonso. Soki likoki ezali, na meko oyo yango etaleli bino, bózala na kimya elongo na bato nyonso. Bózongisa bino moko te mabe na oyo asali bino mabe, balingami, kasi bótikela nde nkanda esika; mpo ekomamá ete: ‘Kozongisa mabe ezali likambo na ngai; ngai nakozongisa, Yehova alobi bongo.’”—Baloma 2:17-19.
“Mpamba te Klisto mpe anyokwamaki mpo na bino, kotikeláká bino ndakisa mpo bólanda matambe na ye malamumalamu. . . . Ntango azalaki kofingama, azalaki kozongisa kofinga te. Ntango azalaki konyokwama, azalaki kokanela moto te, kasi akobaki komitika na mabɔkɔ ya moto oyo asambisaka na boyengebene.”—1 Petelo 2:21-23.
[Bililingi na lokasa 7]
Yehova ateyi bato mingi mpe babongwani